Papias apesaki motuya na maloba na Nkolo
“NAZALAKI kosepela te na baoyo balobaka mingi, . . . kasi nazalaki nde kosepela na baoyo bateyaka makambo ya solo.” Oyo ezali bongo maloba ya Papias, mokomi ya ekeke ya mibale ya ntango na biso oyo azalaki komitanga moklisto.
Papias azalaki na bomoi na eleko oyo elandaki kufa ya bantoma na Yesu Klisto. Ya solo, azalaki moninga ya Polycarpe, oyo balobaka ete ayekolaki makambo epai na ntoma Yoane. Soki totaleli makambo oyo alobaki mpe mwango oyo alandaki mpo na kozwa boyebi, na ntembe te, Papias ayebaki mpenza makambo mingi.
Mwango ya mayele
Mposa ya Papias mpo na solo emonani polele kati na mikanda mitano oyo akomaki na ntina na maloba na Nkolo. Na ntembe te, na bolenge na ye, Papias abombaki makambo mingi na maloba ya solo oyo azalaki koyoka. Na nsima, longwa na esika azalaki kofanda engumba Phrygie, na etúka ya Hiérapolis, na Asie mineure, Papias asɛngaki na mibangé bayebisa ye soki basilaki komona to basilaki koyoka moko na bantoma na Yesu. Azalaki kotuna bango na mposa mingi mpe abombaki makambo oyo bazalaki koloba.
Papias alimbolaki ete: “Nakakatanaki te mpo na kokoma . . . nyonso oyo nayekolaki na likebi ntango nyonso epai na mibangé, mpe namikundolaki malamu mpo na kondimisa bino solo na bango. Mpo ete lokola bato mingi, nazalaki kosepela te na baoyo balobaka mingi, kasi nazalaki nde kosepela na baoyo bateyaka makambo ya solo; nazalaki mpe kosepela te na baoyo bazalaki koyebisa mitinda ya bato mosusu, kasi nazalaki nde kosepela na baoyo balobelaka mitinda mipesami na Nkolo mpo na kondima mpe kolanda kosala na boyokani na solo yango moko. Mpe soki moto moko alingi kolanda nzela na ngai, oyo azalaki moninga ya mibangé, nakotuna ye makambo malobamaki na mibangé—André alobaki nini to Petelo alobaki nini, to Filipi alobaki nini to Toma soko Yakobo alobaki nini, to Yoane alobaki nini soko Matai alobaki nini, to moyekoli mosusu ya Nkolo.”
Mokanda na ye
Na ntembe te, Papias azalaki mpenza na boyebi mingi na elimo. Tokoki kokanisa bobele na lolenge oyo azalaki kotya likebi mpo na koyoka makambo matali bomoi mpe mosala ya ntoma moko na moko. Pene na mobu 135 T.B., Papias akomaki mokanda mpo na koyebisa makambo oyo ayekolaki. Likambo ya mawa mpenza, mokanda yango mosilá kobunga. Irénée, ye oyo azalaki komitanga ete azalaki moklisto na ekeke ya mibale ya ntango na biso, mpe Eusèbe, mokomi na makambo ya kala na ekeke ya minei, balobelaki yango kati na mikanda na bango. Na yango, ekokaki kotangama na ekeke ya libwa ya ntango na biso, mpe ekoki kozala ete eumelaki na ekeke ya zomi na minei.
Papias azalaki na kondima kati na koya ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto. (Emoniseli 20:2-7) Engebene Irénée, [Papias] akomaki na ntina na eleko oyo “biloko bizalisami bikozonga ya sika mpe bikosikwama, bikobimisa ebele ya bilei ya lolenge nyonso, longwa na mamwé ya likoló mpe mabelé oyo makobota malamu, lolenge moko na mibangé, baoyo bamonaki Yoane, moyekoli ya Klisto, baoyo balobaki ete bayokaki lolenge Nkolo azalaki koteya na ntina na ntango yango.” Na nsima Papias akomaki ete: “Makambo oyo mabongi na kotyelama motema mpo na baoyo bazali na kondima. Mpamba te lokola Yuda, motɛki, oyo aboyaki kondima mpe alobaki ete: ‘Lolenge nini Nzambe akoki kozalisa bambuma motindo wana?’ Nkolo alobaki ete: ‘Baoyo bakozala na bomoi na ntango wana bakomona yango.’”
Papias akomaki mokanda wana na ntango oyo mateya oyo bazalaki kobenga gnosticisme (boyebi boleki na ntina na mabombami ya losambo) ezalaki makasi. Ba gnostiques (baoyo bamipesaki na mateya yango) basangisaki filozofi, makanisi mpamba, mateya ya Bopakano na oyo ya boklisto ya lipɛngwi. Ya solo, lolenge Papias amonisaki bisakweli, to maloba ya Nkolo, emekaki kotɛmɛla gnosticisme. Nsima na ye, Irénée alandaki kotɛmɛla lokuta ya ba gnostiques mpe na bizaleli ya elimo bileki ndelo. Mikanda ya ba gnostiques ezalaki minene mingi, epesaki nzela na Papias ete aloba na lolenge na kotyola mpo na “baoyo balobaka mingi.” Mokano na ye mozalaki polele—alingaki kosilisa lokuta na nzela na solo.—1 Timoté 6:4; Bafilipi 4:5.
Makambo malobami likoló na ba Evanzile
Kati na ndambo na makomi ya Papias oyo mazali kino lelo oyo, tozali kokuta masoló ya makambo makomamaki na Matai mpe Malako. Na ndakisa, Papias alobaki mpo na makomi ya Malako ete: “Malako, oyo azalaki kokoma makambo malobamaki na Petelo, akomaki na sikisiki mpenza makambo oyo azalaki komikundola.” Na nsima, mpo na komonisa bosolo ya Evanzile wana, Papias akóbaki kokoma ete: “Bongo Malako asalaki libunga te, wana azalaki kokoma ndambo ya makambo oyo azalaki komikundola na yango; mpe akanaki te ete abosana likambo moko oyo ye ayokaki, to ete atya likambo moko ya lokuta kati na oyo akomaki.”
Papias apesaki bilembeteli biuti na Biblia te oyo emonisi ete, liboso Matai akomaki Evanzile na ye na lokotá ya Liebele. Papias alobi ete: “Matai asangisaki bongo na lokóta ya Liebele ba logia (ya Yesu), mpe moto na moto alimbolaki yango na lolenge oyo ye akokaki kosala yango.” Ekoki mpenza kozala ete Papias atalelaki makambo makomami na Evanzile ya Luka mpe ya Yoane, atalelaki mpe mikanda misusu ya Makomami na Greke ya boklisto. Soki bongo, azalaki moko na batatoli ya liboso oyo bamonisaki bosolo na yango mpe kopemama na yango na Nzambe. Atako bongo, likambo ya mawa ezali ete, bobele ndambo moke na biteni na mikanda ya Papias nde bizali kino lelo oyo.
Azalaki komibanzabanza na bamposa na ye ya elimo
Lokola mokɛngɛli kati na lisangá ya Hiérapolis, Papias azalaki molukiluki monene. Lisusu, azalaki komemya mingi Makomami. Papias alobaki na bosembo nyonso ete mateya mapesamaki na Yesu Klisto to na bantoma na Ye, ezalaki na ntina mingi mpo na kolimbola koleka mateya mpamba oyo mazwamaki kati na mikanda ya mikolo na ye.—Yuda 17.
Elobami ete Papias abomamaki na Pergame na mobu 161 to na mobu 165 T.B. Bopusi monene oyo mateya na Yesu Klisto ezalaki na yango likoló na bomoi ya Papias mpe etamboli na ye, ekoki koyebisama na sikisiki te. Atako bongo, azalaki na mposa makasi ya koyekola mpe kolobela Makomami. Ezali mpe bongo mpo na baklisto ya solo ya mikolo na biso, mpo ete bazali komibanzabanza na bamposa na bango ya elimo. (Matai 5:3) Mpe lolenge moko na Papias, bazali kopesa motuya na maloba na Nkolo.