Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/9 nk. 3-4
  • Bomoi na yo etambwisami na makambo masilá kokanama?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bomoi na yo etambwisami na makambo masilá kokanama?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Masolo mosusu
  • Biblia eteyaka endimeli oyo ete makambo ya bomoi ya moto na moto masilá kokanama?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Otambwisami na endimeli oyo ete bomoi esila kotangama?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Osengeli kondima ete bomoi na yo esila kotangama?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Makama esilá kotángama to mpe makambo makanelami
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/9 nk. 3-4

Bomoi na yo etambwisami na makambo masilá kokanama?

ALA NÒ DON.” Na lokóta ya Bambara na mboka Mali, na Afrika ya Wɛ́sti, maloba wana malimboli: “Ezali mosala ya Nzambe.” Maloba motindo yango mayokamaka mingi na eteni wana ya mokili. Na lokóta ya Wolof, elobamaka boye: “Yallah mo ko def” (Nzambe nde asalaki yango). Mpe na lokóta ya Dogon balobaka ete: “Ama biray” (Nzambe abimisi yango).

Maloba yango makokani na oyo malobamaka na bipai mosusu na mokili. Maloba lokola, “Ntango na ye ekokaki” mpe “Ezalaki mokano ya Nzambe” mayokamaka mingimingi ntango liwa to likámá ekómelaka bato. Na Afrika ya Wɛ́sti, maloba lokola oyo: “Moto akokana Nzambe akosukisa” makomamaka mingi na babísi mpe matyamaka lokola bilembo kati na bamagazini. Mpo na bato mingi maloba yango mazali bobele masese. Nzokande, mbala mingi mapesaka likanisi ya kondimela makila mabe.

Makila mabe ezali mpenza nini? Búku The World Book Encyclopedia elimboli yango lokola “endimeli oyo elobi ete makambo nyonso masilá kokanama na banguya oyo moto azali na likoki te ya kotambwisa yango.” “Banguya” yango ezali nini? Esili koleka bankóto ya bambula, bato ya Babilone bazalaki kondima ete makambo oyo masilá kokanama mpo na bomoi ya moto moko mazwaki bopusi makasi oyo eutaki na elilingi ya minzɔ́tɔ na ntango ye abotamaki. (Kokanisá na Yisaya 47:13.) Bagreke bazalaki kondima ete makila mabe ya moto ezalaki kotambwisama na banzambe basi misato ya nguya oyo bazalaki kotonga, komeka mpe kokata nsinga ya bomoi ya moto. Nzokande, ezalaki bateolojiɛ́ ya boklisto ya nkombo mpamba nde babimisaki likanisi ete Nzambe ye moko asilá kokana makambo oyo makosalema na bomoi ya moto na moto!

Na ndakisa “Santu” Augustin, akweisaki “makanisi mabe mpe ya lokuta” ya bato oyo bayekolaka minzɔ́tɔ. Lisusu, alobaki ete “kondima ete Nzambe azali, mpe bobele na ntango yango koboya kondima ete asilá koyeba liboso makambo oyo makosalema na mikolo mizali koya, ezali likambo ya bozoba koleka.” Alobaki ete mpo ete Nzambe azala mozwi-na-nguya-nyonso, asengeli “koyeba makambo nyonso liboso ete másalema” kopesa nzela na “makambo nyonso oyo masilá kotyama na molɔngɔ́.” Kasi, Augustin, na mposa nyonso alobaki ete atako Nzambe ayebi liboso makambo nyonso oyo makosalema, nzokande bato bazali na bonsomi ya kopona oyo balingi kosala.​—The City of God, Búku V, Mokapo 7-9.

Bikeke mingi na nsima, teolojiɛ́ John Calvin, moto ya lingomba Protestá akólisaki likanisi mosusu kolobáká ete wana bamoko “basili kokanama [na Nzambe] mpo na kozala bana na ye basangoli na libula ya bokonzi na likoló,” basusu bakanami mpo ete “nkɛlɛ na ye ekwela bango”!

Lelo oyo, likanisi oyo emonisi ete makambo ya bomoi ya moto mokomoko masilá kokanama ezali likambo oyo lindimami na biteni mingi ya mokili. Tótalela likambo oyo likómelaki Ousmane, elenge mobali moko na Afrika ya Wɛ́sti. Azalaki moko kati na banakelasi ya mayele na eteyelo, kasi ntango asalaki mamekani na ye ya nsuka, alóngaki te! Yango elingaki koloba te ete akozongela bobele kelasi yango kasi asengelaki mpe kokutana na mitungisi ya libota na ye mpe ya baninga na ye. Moninga na ye moko amekaki kobɔndisa ye na kolobáká ete yango ezalaki mokano ya Nzambe. Mama ya Ousmane mpe lolenge moko alobaki ete ezalaki kokokisama ya makambo masilá kokanama.

Liboso, Ousmane azalaki na esengo ya kondima makanisi na bango ya kobɔndisa. Nzokande, soki kokweya na ye ezalaki mpenza mokano ya Nzambe, akokaki kosala eloko moko te mpo na kopɛngola yango. Kasi tata na ye azalaki na makanisi lolenge mosusu. Ayebisaki Ousmane ete kokweya na mamekani ezalaki libunga na ye moko​—kasi ya Nzambe te. Ousmane alóngaki te mpamba te azalaki na bopɔtu na boyekoli na ye.

Lokola kondima na ye na makambo masilá kokanama ebulunganaki, Ousmane azwaki ekateli ya kotalela makambo yango ye moko. Tozali sikawa kosɛnga na yo ete osala lokola ye na kotaleláká lisoló lilandi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto