Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 15/2 nk. 3-4
  • Bampasi eleki ndelo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bampasi eleki ndelo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Batondi na “mpasi mpe na bolózi”
  • Ezalaki kati na mokano ya Nzambe?
  • Ntango mpasi ekozala lisusu te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Biblia elobi nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Motuna 3: Mpo na nini Nzambe atiki ete nanyokwama?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?
    Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 15/2 nk. 3-4

Bampasi eleki ndelo

“MPO na nini mpasi makasi boye epai na moto mokomoko mpe na mokili mobimba . . . ? Nzambe atalelami lokola moto oyo asalaka ete likambo nyonso ezala na ntina, nzokande ezali na ebele ya makambo oyo mazangi ntina kati na mokili oyo, bampasi mingi ezangi ntina mpe masumu ya mpambampamba. Mbala mosusu, ezali Nzambe oyo nde Nietzsche alobaki na ntina na ye ete azali: mokonzi mabe, mokosi, mobubi mpe mobomi?”​—Búku On Being a Christian, ekomami na Hans Küng.

Osili kososola ete Hans Küng, Mokatolike mpe moto na teoloji, azali bobele komonisa mokakatano oyo etungisaka bato mingi​—mpo na nini Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, oyo atondi na bolingo, atiki nzela na bampasi mingi boye? Oyoká naino te bato bazali kotuna motuna motindo wana? Moto nyonso oyo ayokelaka basusu mawa azali kolela na ntina na oyo Küng abéngi ete “molúká ya makila mozangi nsuka, ya mitɔki mpe ya mpisoli, ya minyoko, ya bwale mpe ya nsɔ́mɔ, komiyoka ete osundolama, bakisá mpe liwa.” Na ntembe te, yango ekokani na molúká ya mai makasi, mpela ya minyoko mpe ya mawa monene oyo ebebisi bomoi ya bamilió ya bato na boumeli ya lisoló mobimba ya moto.​—Yobo 14:1.

Batondi na “mpasi mpe na bolózi”

Kanisá naino mpasi oyo ezali kouta na bitumba, bwale yango esuki te bobele epai na baoyo bazwi likámá, kasi ekómeli mpe baoyo batikali na mawa, na ndakisa baboti mpe bandeko ya bana oyo babomami, mpe basusu oyo banyokolami lokola banyama. Euti kolobama kala mingi te ete: “Na boumeli ya mbula 10 oyo euti koleka, milió moko na ndambo ya bana babomamaki na bitumba ya mindóki.” Ebongiseli ya Croix-Rouge euti komonisa kala mingi te ete, na Rwanda na 1994, “mibali mingi, basi mpe bana babomamaki na nkó mpe na lolenge ya nsɔ́mɔ mpenza.”

Tosengeli mpe kobosana te mpasi oyo bato babebisaka bana mike bazali kobimisa. Mama moko oyo atungisami na mawa, oyo mwana na ye ya mobali amibomaki nsima ya kobebisama na mobateli moko ya bana, alobaki ete: “Mobali oyo abebisaki mwana na ngai . . . abebisaki ye mpe bana mibali mosusu na lolenge ya nsɔ́mɔ mpe na yauli ya koleka ndelo.” Lisusu, tokoloba boni mpo na mpasi ya nsɔ́mɔ oyo eyokami na baoyo bakweaki na mabɔkɔ ya babomi oyo bazangá mawa, to baoyo babomaka bato mbala na mbala, na ndakisa babomi oyo bakangamaki na Grande-Bretagne, oyo “bazalaki komema bato bipai mosusu, kosangana na basi na makasi, konyokola mpe koboma, na boumeli ya mbula 25 kozanga ete bázwa etumbu”? Na boumeli ya lisoló ya bato, emonani ete mibali mpe basi bazali konyokolana mpe komonisana mpasi na lolenge ya koleka ndelo mpenza.​—Mosakoli 4:1-3.

Longola makambo wana, totángi lisusu mpasi oyo euti na bokɔnɔ ya makanisi mpe ya nzoto, mpe mpasi ya mawa monene oyo ezali kokwela mabota ntango balingami na bango bazali kokufa mobesu. Esengeli mpe kobosana te bwale ya baoyo bazali kokufa na nzala to na makámá mosusu oyo balobaka ete mauti na biloko bizalisami. Ezali na bato mingi te oyo bakoki kotya ntembe na maloba oyo ya Mose ete mbula 70 to 80 oyo tosalaka kati na bomoi etondi na “mpasi mpe na bolózi.”​—Nzembo 90:10, NW.

Ezalaki kati na mokano ya Nzambe?

Ekoki nde kolobama, lokola bamoko bamonisaka yango, ete bampasi oyo ezali kobima ntango nyonso euti na mokano moko ya Nzambe oyo eyebanaki malamu te? Tosengeli nde komona mpasi sikawa mpo na kososola malamu bomoi ‘na mokili oyo ekoya nsima’? Ekoki nde kondimama, lokola Teilhard de Chardin, Mofalansé mpe moto na filozofi, akanisaki yango ete “mpasi oyo ezali koboma mpe kopɔlisa bato, ezali na ntina mingi mpo na moto ete abika mpe akóma ekelamu ya elimo”? (The Religion of Teilhard de Chardin; biso nde totɛngisi yango.) Ezali bongo te!

Mozalisi oyo atondi na boboto akoki mpenza kosala ezingelo moko ya mabe mpe na nsima aloba ete azali na bolingo ntango abikisi bato na makámá mauti na ezingelo yango? Soko moke te! Nzambe ya bolingo akoki kolinga te kosala likambo motindo wana. Na yango, mpo na nini Nzambe atiki nzela ete mpasi ezala? Mpasi ekosuka mokolo mosusu? Lisoló oyo lilandi likoyanola na mituna wana.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto