Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 1/6 nk. 28-31
  • Nasungamaki na ntango ya komekama makasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nasungamaki na ntango ya komekama makasi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Moyuda ya kobotama
  • Ebandeli ya komekama
  • Namekamaki na ndenge oyo eleki mabe
  • Eleko ya kobɔndisama
  • Nabiki na káa ya Auschwitz
  • Nabiki na bakáa mosusu
  • Kobima na bolɔkɔ mpe bomoi oyo elandaki
  • Na lisalisi ya Yehova, tobikaki na mabɔkɔ ya bakonzi ya mabe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • “Bakangamaki mpo na kondima”
    Lamuká!—2006
  • Lobanzo na ngai ya liboso—Kotikala sembo
    Lamuká!—2001
  • Nayekolaki kotya elikya epai na Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 1/6 nk. 28-31

Nasungamaki na ntango ya komekama makasi

LISOLO YA ÉVA JOSEFSSON

Tozalaki etuluku moke oyo toyanganaki na Újpest, na engumba Budapest, na ekólo Hongrie, mpo na likita moke liboso ya kobima na mosala ya kosakola. Ezalaki na 1939, mwa moke liboso ya ebandeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mpe mosala ya kosakola ya Batatoli ya Yehova epekisamaki na ekólo Hongrie. Mbala mingi bazalaki kokanga baoyo bazalaki kosangana na mosala ya koteya Biblia epai na bato.

LOKOLA ezalaki mbala na ngai ya liboso ya kosangana na mosala yango, nazalaki komitungisa mpe kobanga. Ndeko mobali moko, ye mobange, abalukaki epai na ngai mpe alobaki ete: “Éva, osengeli kobanga soko moke te. Kosalela Yehova ezali lokumu eleki monene oyo moto akoki kozala na yango.” Maloba wana ya komibanzabanza mpe ya kolendisa masungaki ngai kati na komekama makasi.

Moyuda ya kobotama

Nazali mwana ya liboso kati na libota ya bana mitano, tata na mama bazalaki Bayuda. Mama azalaki kosepela na Lingomba ya Bayuda te, mpe abandaki kotalela mangomba mosusu malamu. Ezali na lolenge yango nde akutanaki na Erzsébet Slézinger, mwasi Moyuda oyo azalaki mpe koluka solo ya Biblia. Erzsébet asalaki ete Mama akutana na Batatoli ya Yehova, mpe bongo, ngai mpe nakómaki kosepela mingi na mateya ya Biblia. Nokinoki, nabandaki koyebisa bato mosusu makambo oyo nazalaki koyekola.

Ntango nakómaki na mbula 18, na eleko ya molunge ya 1941, namonisaki komipesa na ngai epai ya Yehova Nzambe na nzela ya batisimo na Ebale Danube. Tozwaki batisimo nzela moko na Mama, kasi Tata aboyaki kondima mateya ya boklisto oyo tokómaki kolanda. Nokinoki nsima ya batisimo na ngai, nazwaki bibongiseli mpo na mosala ya mobongisi-nzela, elingi koloba, kosangana na mosala ya ntango nyonso. Nazalaki na mposa ya velo, na yango, nabandaki mosala na laboratware ya izini monene ya bilamba.

Ebandeli ya komekama

Banazi babɔtɔlaki ekólo Hongrie, mpe izini esika nazalaki kosala ekómaki kotambwisama na bato ya Allemagne. Mokolo moko, babéngaki basali nyonso ete bátɛlɛma liboso ya bakɛngɛli mpo na kolapa ndai ya bosembo na boyangeli ya Nazi. Bayebisaki biso ete soki moto aboyi kosala bongo ekomemela ye mindɔndɔ. Na boumeli ya molulu ntango basɛngisaki biso ete tópesa losako na Hitler, natɛlɛmaki na limemya nyonso kasi nasalaki likambo oyo esɛngamaki te. Bobele mokolo yango, babyangaki ngai na biro, bapesaki ngai lifuti na ngai, mpe balongolaki ngai na mosala. Lokola misala mizalaki mingi te, nabandaki komituna soki mwango na ngai ya kozala mobongisi-nzela ekosuka boni. Nzokande, mokolo elandaki, nazwaki mosala mosusu mpe ezalaki na lifuti malamu koleka oyo nazalaki kozwa liboso.

Sikawa mposa na ngai mpo na mosala ya mobongisi-nzela ekokaki kokokisama. Nasalaki elongo na baninga mingi babongisi-nzela mpe oyo ya nsuka ezalaki Juliska Asztalos. Tozalaki kosalela bobele Biblia na mosala ya kosakola, tozalaki na mikanda mpo na kokabola te. Soki tokutani na bato oyo bamonisi bosepeli, tozalaki kozonga mpe kotikela bango mikanda.

Mbala na mbala, ngai na Juliska tosengelaki kolongwa na teritware moko mpe kokende na teritware mosusu. Ezalaki bongo mpamba te, ntango sángó moko ayokaki ete tozali koteya ‘bampate na ye,’ asakolaki na ndakonzambe ete soki Batatoli ya Yehova bayei epai na bango, basengeli koyebisa ye to bapolisi. Ntango bato ya boboto bazalaki koyebisa biso likambo yango, tozalaki kokende na teritware mosusu.

Mokolo moko ngai na Juliska tosololaki na elenge mobali moko oyo amonisaki bosepeli. Toyokanaki ete tokozongela ye mpo na kotikela ye mokanda mpo na kotánga. Kasi ntango tozongaki, bapolisi bazalaki wana, bakangaki biso mpe bamemaki biso na biro na bango na mboka moke Dunavecse. Basalelaki mwana mobali wana lokola mpambo na ndɔbɔ mpo na kokanga biso. Ntango tokómaki na biro ya bapolisi, tokutaki sángó moko kuna mpe tososolaki ete ye mpe azalaki kati na mayele mabe wana.

Namekamaki na ndenge oyo eleki mabe

Kuna na biro ya bapolisi, bakataki ngai nsuki nyonso mpe natɛlɛmaki bolumbu liboso ya bapolisi soko zomi na mibale. Bazalaki kotuna ngai mpo na koyeba nani azali mokonzi na biso na Hongrie. Nalimbwelaki bango ete tozali na mokonzi mosusu te bobele Yesu Klisto. Na bongo, kozanga mawa, babɛtaki ngai makasi na ngondó na bango, kasi natekaki bandeko na ngai baklisto te.

Nsima na yango, bakangaki ngai makolo nyonso mibale na nsinga mpe batyaki ngai mabɔkɔ na motó mpe bakangaki yango esika moko. Bongo, moko nsima na mosusu, babebisaki ngai, bango nyonso longola bobele polisi moko. Bakangaki ngai makasi na boye ete mbula misato na nsima bilembo bizalaki naino na mabɔkɔ na ngai. Banyokolaki ngai mingi mpe babombaki ngai na ndako ya nse ya mabelé pɔsɔ mibale kino bampota ya minene ekaukaki.

Eleko ya kobɔndisama

Nsima bamemaki ngai na bolɔkɔ ya engumba ya Nagykanizsa, epai Batatoli ya Yehova bazalaki mingi. Tolekisaki mbula mibale ya mwa esengo atako tozalaki bakangami. Tozalaki kosala makita nyonso na kobombana, mpe tozalaki kosala mwa moke lokola kati na lisangá. Tozalaki mpe na mabaku mingi ya kopesa litatoli ya libaku malamu. Ezalaki na bolɔkɔ yango nde nakutanaki na Olga Slézinger; na mosuni azalaki ndeko ya Erzsébet Slézinger, mwasi oyo ateyaki ngai na mama na ngai solo ya Biblia.

Na 1944, Banazi bazwaki ekateli ya kosilisa Bayuda ya ekólo Hongrie nyɛɛ, ndenge bazalaki koboma bango na bikólo mosusu oyo bazwaki. Mokolo moko bayaki kozwa ngai na Olga. Bakɔtisaki biso na engbunduka oyo ememaka bibwele, mpe nsima ya mobembo ya mpasi tokatisaki ekólo Tchécoslovaquie, tokómaki na esika tozalaki kokende, na sudi ya ekólo Pologne—na káa ya Auschwitz, esika bazalaki koboma bato.

Nabiki na káa ya Auschwitz

Nazalaki komiyoka na libateli pene na Olga. Ata na ntango ya minyoko makasi azalaki se kosɛkisa. Ntango tokómaki na káa ya Auschwitz, tokendaki epai ya Mengele, monganga moko mabe, oyo mokumba na ye ezalaki ya kokabola bato ya sika baoyo balɛmbaki mpe baoyo bazalaki makasi mpo na mosala. Bazalaki kotinda baoyo balɛmbaki na oyo babéngaki chambre ya gaze. Ntango ekómaki ngala na biso, Mengele atunaki Olga ete, “Ozali na mbula boni?”

Na molende, mpe afungoli miso na mwa kosɛka, ayanolaki ete, “20.” Mbula na ye mpenza ezalaki mbala mibale koleka oyo apesaki. Kasi, Mengele asɛkaki mpe alekisaki ye na lobɔkɔ ya mobali mpe abikaki.

Bakangami nyonso na káa ya Auschwitz bazalaki na bilembo na bilamba na bango ya bolɔkɔ—Bayuda bazalaki na Monzoto ya Davidi, mpe Batatoli ya Yehova bazalaki na triangle ya langi ya violɛ. Ntango balingaki kotonga Monzoto ya Davidi na bilamba na biso, tolimbolaki ete tozali Batatoli ya Yehova mpe tolingi triangle ya violɛ. Ezalaki te mpo toyokaki nsɔni kozala Bayuda, kasi tozalaki sikawa Batatoli ya Yehova. Bamekaki kopusa biso na makasi ete tóndima elembo ya Bayuda na konyatáká mpe kobɛtáká biso. Kasi totikalaki ngwi kino bandimaki biso lokola Batatoli ya Yehova.

Nsima ya mwa ntango, nakutanaki na ndeko na ngai ya mwasi Elvira, oyo nalekaki ye na mbula misato. Libota na biso mobimba ezalaki na bato nsambo, tokendaki biso nyonso na káa ya Auschwitz. Bobele ngai na Elvira nde tondimamaki ete tokoki mpo na mosala. Tata, Mama, mpe bandeko na biso misato bakufaki na chambre ya gaze. Na ntango yango, Elvira azalaki naino Motatoli te, mpe tofandaki esika moko te kati na káa. Abikaki, mpe akendaki na États-Unis, akómaki Motatoli ya Yehova na engumba ya Pittsburgh, na etúká ya Pennsylvanie, mpe na nsima akufaki kuna na 1973.

Nabiki na bakáa mosusu

Na eleko ya malili ya mobu 1944 mpe 1945, bato ya Allemagne bazwaki ekateli ya kolongola bato nyonso oyo bazalaki na káa ya Auschwitz, mpamba te basoda ya ekólo Russie bazalaki kopusana. Bongo bakendaki na biso na Bergen-Belsen na nɔrdi ya Allemagne. Nokinoki nsima ya bokómi na biso, batindaki ngai na Olga na engumba Braunschweig. Awa esengelaki tópesa mabɔkɔ na kolongola bitika ya babombi oyo mampinga ya bikólo oyo bisanganaki mpo na kobundisa Allemagne babwakaki. Ngai na Olga totalelaki likambo yango. Lokola toyebaki mpenza te soki kosala mosala yango ekokaki kobebisa etɛlɛmɛlo na biso ya kozanga kokɔta na etumba, tozwaki ekateli ete tokosangana na yango te.

Ekateli na biso epesaki bango nkanda. Babɛtaki biso na fimbo ya mposo ya nyama mpe bakendaki na biso liboso ya basoda oyo basengelaki koboma biso na mandoki. Bapesaki biso miniti moko mpo tókanisa, mpe balobaki ete soki tobongoli makanisi te, bakobɛta biso masasi. Tolobaki ete tozali na mposa ya miniti ya kokanisa te mpamba te tosilaki kozwa ekateli. Nzokande, lokola komanda ya káa oyo azalaki na lotomo ya kopesa etinda ete báboma moto azalaki te, na yango babomaki biso te.

Na kozeláká, basɛngisaki biso na makasi ete tótɛlɛma na libándá monene ya káa mokolo mobimba. Basoda mibale oyo bazalaki na mandoki, oyo bazalaki kotika esika na basusu nsima ya ngonga mibale, bazalaki kokɛngɛla biso. Bapesaki biso bilei te, mpe tonyokwamaki makasi na mpiɔ, lokola ezalaki sanza ya Febwáli. Pɔsɔ mobimba ya monyoko motindo wana elekaki, kasi komanda azalaki se koya te. Bongo bamatisaki biso na nsima ya motuka monene, mpe tokamwaki na komona ete tozongaki na Bergen-Belsen.

Uta ntango wana ngai na Olga tozalaki konyokwama. Nazalaki lisusu na nsuki mingi te mpe nabɛlaki fɛfɛlɛ makasi. Nakokaki kosala mwa moke na milende makasi. Mwa supu ya ndunda mpe eteni ya limpa oyo bazalaki kopesa biso mokolo na mokolo ekokaki te. Kasi esengelaki kaka tósala mpamba te baoyo bazalaki kokoka te bazalaki kobomama. Bandeko basi [Batatoli] ya ekólo Allemagne oyo tozalaki kosala na bango na kuku basalisaki ngai ete napemaka mwa moke. Ntango bakɛngɛli bazalaki koya, bandeko basi bazalaki koyebisa ngai, bongo nazalaki kotɛlɛma na kiti na ngai ya mosala, komonisáká lokola nazali kosala na molende.

Mokolo moko Olga azwaki makasi te mpo na kokende na esika na ye ya mosala, mpe nsima na wana tomonaki ye lisusu te. Nabungisaki moninga ya molende mpe mosalani, moto oyo asungaki ngai mingi na boumeli ya basanza ya mpasi na káa. Lokola azalaki moyekoli mopakolami ya Nkolo na biso Yesu Klisto, na ntembe te azwaki nokinoki mbano na ye ya likoló.​—Emoniseli 14:13.

Kobima na bolɔkɔ mpe bomoi oyo elandaki

Ntango etumba esilaki na sanza ya Máí 1945 mpe bonsomi ekɔtaki, nalɛmbaki mingi na boye ete nakokaki te kosepela ete monyoko esili; nakokaki mpe te kokɔta na mituka oyo mizalaki komema bato oyo babimaki na bolɔkɔ kino na mikili oyo mindimaki koyamba bango. Natikalaki sanza misato na lopitalo mpo nazongela lisusu nzoto makasi. Na nsima namemamaki na ekólo Suède, oyo ekómaki mboka na ngai ya sika. Nakutanaki lisusu na bandeko na ngai baklisto, mpe na nsima, nazongelaki mosala ya kosakola, yango nde bozwi ya motuya.

Na 1949, tobalanaki na Lennart Josefsson, oyo na boumeli ya bambula mingi asalaki lokola mokɛngɛli-motamboli ya Batatoli ya Yehova. Ye mpe akɔtaki bolɔkɔ na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba mpo ete abatelaki kondima na ye. Na mokolo ya 1 Sɛtɛ́mbɛ 1949, tobandaki bomoi ya sika lokola babongisi-nzela, mpe batindaki biso na engumba ya Borås. Na boumeli ya bambula na biso ya liboso kuna, tozalaki kotambwisa pɔsɔ na pɔsɔ boyekoli ya Biblia na bato zomi oyo bazalaki komonisa bosepeli. Tozalaki na esengo ya komona ete pene na mbula libwa masangá ekómaki misato na Borås, sikawa ezali mitano.

Nakokaki kotikala mobongisi-nzela ntango molai te mpamba te na 1950 tobotaki mwana ya mwasi, mbula mibale na nsima tobotaki mwana ya mobali. Na yango, nazwaki libaku malamu ya koteya bana na biso solo ya motuya oyo ndeko ya bolingo na ekólo Hongrie ateyaki ngai ntango nazalaki bobele na mbula 16, ete: “Kosalela Yehova ezali lokumu eleki monene oyo moto akoki kozala na yango.”

Soki nakanisi bomoi na ngai, nandimi ete namoni bosolo ya makambo moyekoli Yakobo akomaki ntango akundwelaki biso mpiko ya Yobo: “[Yehova] atondi na mawa mpe na boboto.” (Yakobo 5:11) Atako ngai mpe namekamaki makasi, napambwami mingi mpo nazwi bana mibale, babálani na bango, mpe bankɔkɔ motoba—bango nyonso bazali basambeli ya Yehova. Longola wana, nazali na ebele, ebele ya bana mpe bankɔkɔ na elimo, bamoko bazali babongisi-nzela mpe bamosusu bamisionere. Sikawa elikya na ngai monene ezali ya kokutana na balingami oyo bazali kolala kati na kufa mpe koyamba bango ntango bakolamuka uta na nkunda ya ekaniseli.​—Yoane 5:28, 29.

[Elilingi na lokasa 31]

Na mosala ya kosakola na ekólo Suède nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba

[Elilingi na lokasa 31]

Elongo na mobali na ngai

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto