Nzambe azali kosepela ndenge mateya ya “boklisto” ezali kobongwana?
NA NDAKISA, soki osɛngi moyemi moko asalela yo elilingi na yo. Ntango asilisi mosala na ye, otali yango mpe osepeli mingi. Omoni mpenza elongi na yo mobimba. Okanisi naino ntango bana na yo, bankɔkɔ na yo mpe bana ya bankɔkɔ na yo bakobanda kotala yango na esengo.
Kasi, nsima ya bambula, nkɔkɔ na yo moko amoni ete mwa libandi oyo ezali komonana na elilingi ezali malamu te, na yango, asɛngi bábakisa mwa nsuki. Nkɔkɔ na yo mosusu asepeli na zolo te, mpe asɛngi bábongisa yango. Na nsima, bambula ezali koleka mpe bazali “kobongisa, kobongisa,” tii nsukansuka elongi ezali lisusu lokola elongi na yo te. Okanisi boni soki oyebaki ete likambo ya ndenge wana ekosalema? Na ntembe te olingaki kosepela te.
Na mawa nyonso, lisolo ya elilingi oyo tokamati lokola ndakisa ezali komonisa mpenza likambo oyo ekómelaki lingomba ya boklisto. Makambo oyo eleká ezali komonisa ete ntango kaka bantoma nyonso basilaki kokufa, eumelaki te “boklisto” ebandaki kobongwana, ndenge Biblia esakolaki yango.—Matai 13:24-30, 37-43; Misala 20:30.a
Bato bakoki kolanda mitinda ya Biblia ata soki bonkɔkɔ na bango ezali ndenge nini mpe ata na eleko nini. Kasi, kokamata mateya ya Biblia, kobongola yango mpo na koyokanisa yango na makanisi ya bato, ezali likambo mosusu mpenza. Nzokande, ezali likambo yango mpenza nde esalemaki. Na ndakisa, tótalela ndenge oyo babongoli makambo mosusu ya ntina mingi.
Lingomba esangani na Leta
Yesu ateyaki ete Bokonzi na ye ezali na likoló mpe, na ntango oyo ebongi, Bokonzi yango ekoboma bikonzi nyonso ya bato mpe yango moko ekoyangela mabele mobimba. (Danyele 2:44; Matai 6:9, 10) Bokonzi yango ekosalela ebongiseli ya politiki ya bato te mpo na koyangela. Yesu alobaki ete: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te.” (Yoane 17:16; 18:36) Yango wana, atako bayekoli ya Yesu bazalaki kotosa mibeko ya Leta, kasi bazalaki kokɔta na makambo ya politiki te.
Kasi, na ekeke ya minei, ntango Amperɛrɛ Constantin azalaki mokonzi ya Loma, mitema ya bato mingi oyo balobaki ete bazali baklisto elɛmbaki mpo na kozela Klisto azonga mpe Bokonzi ya Nzambe ebanda koyangela. Mokemoke, likanisi na bango mpo na makambo ya politiki ekómaki kobongwana. Mokanda moko (Europe—A History) elobi ete: “Liboso ya Constantin, baklisto bazalaki koluka bokonzi [ya politiki] te mpo na kondimisa makanisi na bango. Nsima ya Constantin, Lingomba ya boklisto na bato minene ya politiki ekómaki patalo na mokaba.” Boklisto yango ya sika ekómaki lingomba ya Leta ya Loma mpe babengaki yango lingomba “ya mokili mobimba,” to “katolike.”
Mokanda moko (Great Ages of Man) elobi ete lokola Lingomba esanganaki na Leta, yango esalaki ete “na mobu 385 T.B., mbula 80 mpamba nsima ya monyoko ya nsuka oyo banyokolaki baklisto, Lingomba yango moko ekómaki koboma bato oyo bazalaki koteya makambo mosusu mpe bakonzi ya lingomba bakómaki bakonzi minene, mwa moke kaka lokola amperɛrɛ.” Na bongo, makambo ebongwanaki mpe banda ntango wana, mpo bato bándima mpe bákɔta na lingomba, bakómaki kosalela mopanga na esika ya koteya bango mpo bándima mpe na esika ya basakoli oyo bazalaki bato mpamba na ekeke ya liboso, ekómaki nde bakonzi oyo bamipesaki batitre ya mineneminene. (Matai 23:9, 10; 28:19, 20) Herbert Wells, moto ya mayele na istware, akomaki ete “bokeseni monene” ezali na kati ya lingomba ya boklisto ya ekeke ya minei “mpe mateya ya Yesu moto ya Nasalete.” “Bokeseni monene” yango ebongolaki mpe mateya ya Nzambe mpe ya Klisto.
Babongoli mateya ya Nzambe
Klisto na bayekoli na ye bateyaki ete “Nzambe azali se moko, Tata,” oyo azali na nkombo na ye moko, Yehova; mpe tozali kokuta nkombo yango mbala soki 7 000 na mikanda ya kalakala ya Biblia oyo babengaka bamaniskri. (1 Korinto 8:6, Boyokani ya Sika; Nzembo 83:18) Yesu azali ekelamu ya Nzambe. Na Kolose 1:15, Biblia ya Katolike Liloba lya Nzambe elobi ete “abótámí yambo ya bikelámo bínso.” Yango wana, lokola bakelaki ye kokela, Yesu alobaki na bosembo mpenza ete: “Tata aleki ngai.”—Yoane 14:28.
Kasi na ekeke ya misato, bakonzi minene mosusu ya lingomba, bakómaki kosepela na mateya ya Platon, moto ya filozofi ya Bagreke. Ye azalaki koteya nzambe ya bapersona misato. Bango mpe babalolaki mateya oyo ezali kolobela Nzambe mpo na koyokanisa yango na liteya ya Bosato. Na bikeke oyo elandaki, liteya yango oyo ezali na Biblia te elobaki ete Yesu akokani na Yehova mpe elimo santu ya Nzambe, to nguya na ye, ezali moto.
Na ndenge oyo lingomba endimaki liteya ya Bosato, mokanda moko (New Catholic Encyclopedia) elobi boye: “Liteya ya ‘Nzambe moko na Bapersona misato’ ezalaki mpenza koteyama te, eyebanaki mpe te na bomoi ya baklisto mpe na bindimeli na bango tii na nsuka ya ekeke ya minei. Nzokande ezali likanisi yango nde ebengamaki Liteya ya Bosato. Moto moko te kati na baklisto oyo balandaki nsima ya bantoma azalaki koteya likambo oyo ekokani ata moke na likanisi yango.”
Mokanda mosusu mpe elobi likambo yango (The Encyclopedia Americana), elobi ete: “Liteya ya Bosato oyo ebandaki na ekeke ya minei elobaki mpenza solo te na ntina etali lolenge ya Nzambe; kutu, babalolaki yango kobalola.” Mokanda mosusu (The Oxford Companion to the Bible) elobi ete liteya ya Bosato ezali moko na “mateya oyo ebakisamaki nsima.” Kasi, mateya ya bapakano oyo Lingomba ekɔtisaki esuki kaka na Bosato te.
Babongoli liteya ya molimo
Lelo oyo, bato mingi bandimaka ete moto azali na molimo oyo ekufaka te mpe ebimaka soki nzoto ekufi. Kasi, oyebi ete liteya yango ya mangomba babakisaki yango nde kobakisa na nsima? Yesu andimaki liteya ya solo oyo Biblia elobi mpenza ete bakufi “bayebi likambo te,” bazali lokola bato balali mpɔngi. (Mosakoli 9:5; Yoane 11:11-13) Bato bakozonga lisusu na bomoi na nzela ya lisekwa, oyo elimboli ‘kolamuka lisusu’ na liwa ndenge moto alamukaka na mpɔngi. (Yoane 5:28, 29) Soki ezalaki ete molimo ekufaka te, mbɛlɛ tolingaki kozala na mposa ya lisekwa te, mpamba te kozanga kokufa, elimboli ete liwa ezali te.
Yesu amonisaki ete liteya ya Biblia oyo elobi ete bakufi bakosekwa ezali liteya ya solo na ndenge asekwisaki bato oyo bakufaki. Tókamata ndakisa ya Lasalo, moto oyo akufaki na boumeli ya mikolo minei. Ntango Yesu asekwisaki ye, Lasalo abimaki na lilita, mpe azalaki moto ya bomoi oyo azali kopema. Balobi te ete ntango Lasalo alamukaki, molimo moko oyo ekufaka te eutaki na likoló mpe ekɔtaki na nzoto na ye. Soki ezalaki bongo, tokoki koloba te ete Yesu asalaki malamu na ndenge asekwisaki ye!—Yoane 11:39, 43, 44.
Boye, liteya oyo elobi ete molimo ekufaka te eutá wapi? Mokanda moko (The Westminster Dictionary of Christian Theology) elobi ete liteya yango “eutaki mpenzampenza na filozofi ya Bagreke kasi na mateya ya Biblia te.” Mokanda mosusu (The Jewish Encyclopedia) elobi boye: “Liteya oyo elobi ete molimo etikalaka na bomoi ntango nzoto ekufi euti na filozofi to na makanisi ya bato ya teoloji kasi na kondima te, mpe ata esika moko te Makomami Mosantu eteyi yango bongo.”
Mbala mingi, likambo moko ya lokuta ebimisaka likambo mosusu ya lokuta, ezali mpe bongo mpo na liteya oyo elobi ete molimo ekufaka te. Liteya yango efungolaki nzela na likanisi mosusu ya bapakano oyo elobeli monyoko ya seko na lifelo ya mɔ́tɔ.b Nzokande, Biblia elobi polele ete “masumu makofuta mbongo, mbongo yango bobele kufa,” kasi monyoko ya seko te. (Baloma 6:23) Yango wana, ntango ezali kolobela lisekwa, Biblia King James elobi boye: “Mai monene epesaki bakufi oyo bazalaki kati na yango; mpe liwa mpe lifelo ebimisaki bakufi oyo bazalaki kati na yango.” Ndenge moko mpe, Biblia Douay elobi ete “mai monene . . . na liwa na lifelo epesaki bakufi na yango.” Boye, na maloba ya polele, baoyo bazali na lifelo ezali bato oyo bakufá, ‘bazali na mpɔngi’ lokola Yesu alobaki yango.—Emoniseli 20:13.
Ondimi mpenza ete liteya oyo elobaka ete Nzambe anyokolaka bato na lifelo seko na seko etindaka bato básepela na ye? Ezali mwa mpasi. Bato ya mitema sembo mpe oyo bazali na bolingo basepelaka na likanisi yango ata moke te! Nzokande, Biblia ezali koteya ete “Nzambe azali bolingo” mpe ete likambo ya konyokola, ata banyama, esepelisaka ye ata moke te.—1 Yoane 4:8; Masese 12:10; Yilimia 7:31; Yona 4:11.
Bazali kobebisa “elilingi” na ntango na biso
Tii na moi ya lelo bazali kaka kobebisa mateya ya Nzambe mpe ya boklisto. Molakisi moko ya makambo ya mangomba amonisaki kowelana oyo ezali kati na lingomba na bango ya Protesta ete ezali nde kowelana mpo na kopona nini oyo esengeli “kozala na bokonzi kati na Makomami mpe bindimeli oyo ezali makanisi ya bato, to mpe kowelana kati na bosembo oyo lingomba esengeli kozala na yango na bokonzi ya Klisto na kobongola mateya ya boklisto mpo na koyokanisa yango na makambo ya mikolo oyo. Na likambo yango, motuna monene ezali mpenza oyo: Nini oyo esengeli kokata ndenge oyo lingomba esengeli kotambola . . . Makomami Mosantu to makanisi ya bato ya mikolo oyo?”
Na mawa nyonso, “makanisi ya bato ya mikolo oyo” nde ezali kolonga. Na ndakisa, biso nyonso toyebi ete mangomba mingi ebongoli mateya na yango na makambo mingi mpo emonana ete ezali kotingama na makambo ya kalakala te kasi ezali kondima makanisi ya sika. Mingimingi na oyo etali bizaleli ya bato, mangomba ekómi koteya ete moto asala oyo amoni malamu, lokola tomonaki yango na lisolo ya liboso. Nzokande, Biblia emonisi polele mpenza ete pite, ekobo, mpe kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi ezali masumu minene na miso ya Nzambe mpe baoyo bazali kosala yango “bakosangola Bokonzi ya Nzambe te.”—1 Bakolinti 6:9, 10; Matai 5:27-32; Baloma 1:26, 27.
Ntango ntoma Paulo akomaki maloba oyo tozongeli awa na likoló, makambo mabe ezalaki kosalema mingi epai ya Bagreke mpe ya Baloma oyo bazalaki zingazinga na bango. Paulo akokaki mbala mosusu koloba ete: ‘Ya solo, Nzambe abomaki Sodomo na Gomola mpo bamipesaki mingi na pite, kasi likambo yango esalemá eleki mbula 2 000! Nabanzi ete ezali makambo oyo ezali lisusu mpo na ntango oyo te, oyo bato bafungwami miso.’ Nzokande, alukaki makanisi ya komilongisa te; aboyaki kobebisa mateya ya Biblia.—Bagalatia 5:19-23.
Tyá miso na yo na “elilingi” ya libosoliboso
Yesu ayebisaki bakonzi ya mangomba ya Bayuda ya ntango na ye ete losambo na bango ezalaki ‘mpamba mpo bazalaki kolakisa malako oyo mazali mibeko ya bato.’ (Matai 15:9) Makambo oyo bakonzi wana ya mangomba basalaki na Mibeko ya Mose, ezali ndenge moko na makambo oyo bakonzi ya mangomba ya boklisto basalaki mpe bazali kosala na mibeko ya Klisto: bapakolaki yango “langi,” elingi koloba batii makanisi ya bonkɔkɔ likoló ya mateya ya solo ya Nzambe. Kasi, Yesu alongolaki makambo nyonso ya lokuta mpo na bolamu ya bato ya mitema sembo. (Malako 7:7-13) Yesu azalaki kaka koloba solo, ezala ete bato basepelaki na yango to te. Azalaki ntango nyonso kolanda oyo Liloba ya Nzambe elobi.—Yoane 17:17.
Bokeseni ezali monene kati na Yesu na bato mingi oyo bazali koloba ete bazali baklisto! Kutu, Biblia esakolaki ete: “Bato bakozala na mposa mingi ya makambo ya sika mpe bakoyanganisa . . . bateyi oyo bango moko bakosepela na bango; mpe na nsima, na esika ya koyoka mateya ya solo, bakolanda masapo.” (2 Timote 4:3, 4, Bible de Jérusalem) “Masapo” yango, oyo tolobeli mwa ndambo na yango, ebebisaka na elimo, nzokande mateya ya solo ya Liloba ya Nzambe etongaka mpe ememaka na bomoi ya seko. Yango nde solo oyo Batatoli ya Yehova bazali kolendisa yo oyekola.—Yoane 4:24; 8:32; 17:3.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na lisese ya masangu na matiti mabe mpe lisese ya nzela ya monene na nzela ya moke (Matai 7:13, 14), Yesu amonisaki ete na bantango nyonso, mwa bato oyo bakokangama na boklisto ya solo bakobanda kozanga te. Kasi, bato yango bakomonana lokola nde bazipi bango na ebele ya bato oyo bakokanisi bango na matiti mabe, bato yango, oyo bazipi baklisto ya solo, bakobɛta ntolo ete bazali baklisto ya solo mpe mateya na bango nde ezali mateya ya solo ya boklisto. Lisolo na biso ezali mpenza kolobela boklisto ya ndenge yango.
b Maloba oyo babongoli na “lifelo” ezali Sheol na Liebele mpe Hades na Greke, maloba yango mibale elimboli “lilita.” Na yango, atako babongoli ya Biblia King James na Lingelesi babongolaki liloba Sheol mbala 31 na “lifelo,” babongolaki yango mpe mbala 31 na “lilita” mpe mbala 3 na “libulu,” yango emonisi ete maloba yango elimboli se eloko moko.
[Bililingi na lokasa 7]
Na mosala na bango ya kosakola, Batatoli ya Yehova bazali koteya bato Biblia, Liloba ya Nzambe.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 4]
Ya misato banda na lobɔkɔ ya mwasi: ONU/Fɔtɔ ya Saw Lwin.