“Na mabelé mobimba lokito na bango eyokani”
“Bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, kobatisáká bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu.”—MATAI 28:19.
1, 2. (a) Mokumba nini Yesu apesaki bayekoli na ye? (b) Mpo na nini baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki na likoki ya kosala mosala monene wana?
LIBOSO Yesu amata na likoló, atikelaki bayekoli na ye mokumba moko. Alobaki na bango boye: “Bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, kobatisáká bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu.” (Matai 28:19) Ezalaki mosala monene mpenza!
2 Kanisá ete na Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), elimo santu ekitelaki bayekoli soki 120 mpe babandaki koyebisa bato ete Yesu nde Masiya oyo Nzambe alakaki, oyo na nzela na ye bakoki kozwa lobiko. (Misala 2:1-36) Ndenge nini mwa bato moke wana bakokaki kosakola epai ya “bato ya bikólo nyonso”? Mpo na bato, yango ekokaki kosalema te, kasi “epai ya Nzambe makambo nyonso ekoki kosalema.” (Matai 19:26) Elimo santu ya Yehova esungaki baklisto ya liboso, mpe balekisaki ntango te. (Zekalia 4:6; 2 Timote 4:2) Yango wana, nsima ya mwa bambula, ntoma Paulo alobaki ete nsango malamu ezalaki kosakolama “na bozalisi nyonso oyo ezali na nse ya likoló.”—Bakolose 1:23.
3. Nini ezipaki “blé,” oyo elakisi baklisto ya solo?
3 Na ekeke ya liboso mobimba, losambo ya solo ezalaki se kopalangana. Kasi, Yesu asakolaki ete na ntango moko boye Satana akolona “matiti mabe” oyo ekozipa “blé,” oyo elakisi baklisto ya solo, mpe likambo yango ekoumela bankama ya bambula tii na ntango ya kobuka mbuma. Ntango bantoma nyonso bakufaki, maloba ya Yesu ekokisamaki.—Matai 13:24-39.
Bato bazali se koya ebele na mikolo na biso
4, 5. Kobanda 1919, baklisto bapakolami babandaki mosala nini, mpe mpo na nini ezalaki mokakatano monene?
4 Na 1919, ntango ekokaki mpo na kokabola blé, to baklisto ya solo, ná matiti mabe. Baklisto bapakolami bayebaki ete basengelaki naino kokokisa mokumba oyo Yesu apesaki. Bazalaki kondima mpenza ete bazali na “mikolo ya nsuka” mpe bayebaki esakweli ya Yesu oyo elobaki ete: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.” (2 Timote 3:1; Matai 24:14) Bayebaki mpenza ete mosala ezalaki naino mingi.
5 Kasi, lokola kaka bayekoli na mobu 33 T.B., baklisto bapakolami bazalaki na mokakatano monene. Bazalaki kaka mwa bankóto mpe bafandaki na mikili mingi te. Ndenge nini bakokaki kosakola nsango malamu “na mabelé mobimba oyo efandami”? Yebá ete bato ya mokili oyo bazalaki milio 300 na ntango ya bokonzi ya Loma, bakómaki pene na miliare 2 nsima ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Lisusu, na ekeke ya 20, bato bazalaki kobakisama nokinoki.
6. Ndenge nini mosala ya kosakola nsango malamu ekendeki liboso tii na bambula ya 1930?
6 Atako bongo, bapakolami ya Yehova basalaki lokola bandeko na bango na ekeke ya liboso, babandaki kosala mosala na kondima nyonso epai ya Yehova, mpe elimo na ye esalisaki bango. Na katikati ya bambula ya 1930, basakoli soki 56 000 bazalaki kopalanganisa solo ya Biblia na mikili 115. Basalaki mosala monene, kasi mosala oyo etikalaki elekaki mingi.
7. (a) Likambo nini ya sika baklisto bamonaki? (b) Na lisalisi ya “bampate mosusu,” ndenge nini mosala ya koyanganisa ezali kokende liboso?
7 Na nsima, baklisto wana ya molende bamonaki ete mosala na bango ezali mpenza monene ntango bayebaki soki “ebele ya bato” oyo Emoniseli 7:9 elobeli ezali banani; kasi, likambo yango epesaki bango elikya ete bakozwa lisalisi. Esengelaki koyanganisa “na bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso” ebele ya “bampate mosusu,” elingi koloba bandimi oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabelé. (Yoane 10:16) Bato yango ‘bakosalela Yehova mosala mosantu butu moi.’ (Emoniseli 7:15) Elingi koloba ete bakopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola mpe koteya. (Yisaya 61:5) Yango wana, baklisto bapakolami basepelaki na komona ete bapalanganisi ya nsango malamu bakómaki bankóto mpe na nsima bamilio. Na 2003, bato 6 429 351 basalaki mosala ya kosakola—mingi kati na bango bazali na kati ya ebele ya bato.a Baklisto bapakolami bazali na botɔndi mpo na lisalisi yango, mpe bampate mosusu bazali na botɔndi mpo na libaku malamu ya kopesa bandeko na bango bapakolami mabɔkɔ.—Matai 25:34-40.
8. Batatoli ya Yehova basalaki nini ntango bakutanaki na mikakatano na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba?
8 Ntango bato oyo bakokanisi bango na blé bamonanaki lisusu polele, Satana abimisaki mpenza manzaka mpo na kobundisa bango. (Emoniseli 12:17) Asalaki nini ntango ebele ya bato bakómaki komonana? Angalaki na nkanda! Ntembe ezali te ete ye nde abimisaki mikakatano oyo basambeli ya solo bakutanaki na yango na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Na bikólo nyonso oyo ekɔtaki na bitumba yango, bakómaki kotya baklisto mpanzi likoló. Bandeko mingi banyokwamaki na ndenge ya nsɔmɔ, bamosusu bakufaki mpo na kondima na bango. Kasi, balobaki lokola mokomi ya nzembo ete: “Kati na boyokani elongo na Nzambe, nakokumisa liloba na ye, nakolikya epai na Nzambe mpe nakobanga soki moke te. Bato ya mosuni bakoki kosalela ngai nini?” (Nzembo 56:4; Matai 10:28) Elimo ya Yehova elendisaki baklisto bapakolami ná bampate mosusu, mpe bazongaki nsima te. (2 Bakolinti 4:7) Yango wana, “liloba ya Nzambe ekobaki kokola.” (Misala 6:7) Na 1939, mbula oyo etumba ebandaki, baklisto ya sembo 72475 bapesaki lapolo ya mosala ya kosakola. Nzokande, lapolo ndambo oyo esangisamaki na 1945, mbula oyo etumba esilaki, emonisaki ete Batatoli 156 299 basakolaki nsango malamu na mbula wana. Emonani mpenza ete Satana alongaki te!
9. Biteyelo nini efungwamaki na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba?
9 Basaleli ya Yehova bakanisaki te ete mosala ya kosakola esukaki mpo bikólo ya mokili ezalaki kondongwana na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Kutu, na 1943, ntango etumba ezalaki mpenza kongala, bafungolaki biteyelo mibale. Moko oyo ebengamaka lelo Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, esengelaki kobanda kosalema na masangá nyonso mpo na kolakisa Batatoli ndenge ya kosakola mpe kokómisa bato bayekoli. Mosusu oyo ebengami Gileadi, Eteyelo ya la Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia, ezalaki mpo na kopesa bamisionɛrɛ formasyo mpo na kosakola na mikili mosusu. Ntango etumba esilaki, baklisto ya solo babongisamaki mpo na mosala monene.
10. Ndenge nini basaleli ya Yehova bamonisaki molende na bango na 2003?
10 Batatoli yango basali mosala monene mpenza! Bilenge mpe mikóló, baboti mpe bana, ata mpe bibɔsɔnɔ oyo bazwi formasyo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, bamipesaki mpe bazali komipesa mpo na kokokisa mokumba monene oyo Yesu apesaki. (Nzembo 148:12, 13; Yoele 2:28, 29) Na 2003, na sanza mokomoko, bato 825185 bamonisaki ete balingi kolɛmbisa mabɔkɔ te na ndenge bamipesaki na mosala ya mobongisi-nzela mosungi to ya sanza na sanza. Kaka na mbula yango, Batatoli ya Yehova balekisaki ngonga 1 234 796 477 mpo na koyebisa bato nsango malamu ya Bokonzi. Na ntembe te Yehova azali kosepela na molende ya basaleli na ye!
Na mikili mosusu
11, 12. Bandakisa nini ezali komonisa mosala monene oyo bamisionɛrɛ basali?
11 Banda bambula mingi, bana-kelasi ya Gileadi bazali kosala mosala malamu mingi, mpe banda mwa bambula, bana-kelasi ya Eteyelo mpo na kobongisa basungi bazali kolanda ndakisa na bango! Na ndakisa, na Brésil, basakoli bazalaki ata 400 te ntango bamisionɛrɛ ya liboso bakómaki kuna na 1945. Bamisionɛrɛ yango ya liboso mpe bamosusu oyo balandaki nsima basali mosala makasi elongo na bandeko ya molende ya Brésil, mpe Yehova apamboli mpenza mosala na bango. Moto nyonso oyo ayebi ndenge oyo makambo ezalaki na ntango wana akosepela na koyoka ete basakoli bakómaki 607 362 na 2003!
12 Tólobela naino Japon. Liboso ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, basakoli ya Bokonzi bazalaki soki 100 na ekólo wana. Na ntango ya bitumba, bakómaki moke mpamba te banyokolaki bango makasi, mpe ntango etumba esilaki, kaka mwa basakoli moke bazalaki naino na bomoi na elimo mpe na mosuni. (Masese 14:32) Na ntembe te bato moke yango ya sembo basepelaki mingi na 1949 ntango bayambaki bamisionɛrɛ 13 ya liboso oyo bautaki na Gileadi, mpe bamisionɛrɛ yango basepelaki mbala moko na bandeko na bango ya Japon, oyo bazali bato ya esengo mpe bayambi-bapaya. Na 2003, nsima ya mbula koleka 50, basakoli bazali 217 508 na Japon! Yehova apamboli mpenza basaleli na ye na mokili yango. Makambo ezali mpe ndenge yango na mikili mosusu. Baoyo bazalaki na makoki ya kosakola na mikili mosusu bapesi mpenza mabɔkɔ na mosala ya kopalanganisa nsango malamu, na boye ete na 2003, nsango yango eyokanaki na mikili mpe bisanga 235. Ya solo, ebele ya bato bazali kouta na “bikólo nyonso.”
“Bauti na . . . mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso”
13, 14. Ndenge nini Yehova amonisaki ntina ya kosakola nsango malamu na “minɔkɔ nyonso”?
13 Ntango bayekoli bazwaki elimo santu na Pantekote ya mobu 33 T.B., likamwisi ya liboso oyo esalemaki ezalaki ete bakómaki koloba na minɔkɔ ya ebele ya bato oyo bayanganaki wana. Ekoki kozala ete bato nyonso oyo bazalaki koyoka bango bayebaki monɔkɔ oyo bato ya bikólo mingi bazalaki koloba, mbala mosusu monɔkɔ ya Grɛki. Lokola mpe bazalaki “mibali oyo babangaka Nzambe,” ekoki kozala ete bazalaki koyoka makambo oyo bazalaki koloba na Liebele na tempelo. Kasi, bafungolaki matoi malamumalamu ntango bayokaki nsango malamu na minɔkɔ oyo bayebaki banda bomwana.—Misala 2:5, 7-12.
14 Lelo oyo mpe, nsango malamu ezali kosakolama na minɔkɔ mingi. Esakweli elobaki ete ebele ya bato bakouta na bikólo nyonso kaka te, kasi mpe na “mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso.” Yango wana, Yehova asakolaki na nzela ya Zekalia ete: “Bato zomi ya minɔkɔ ya bikólo nyonso bakosimba, ɛɛ bakosimba mpenza nsongɛ ya elamba ya moto moko, moyuda, bakoloba ete: ‘Tolingi kokende na yo, mpo toyoki ete Nzambe azali na yo.’” (Zekalia 8:23, NW) Atako Batatoli ya Yehova balobaka minɔkɔ ya bapaya na nguya ya elimo santu te, bayebi ete ezali na ntina mingi koteya bato na monɔkɔ ya mboka ya bango.
15, 16. Ndenge nini bamisionɛrɛ mpe bato mosusu babundaki etumba mpo na kobongola mikanda na minɔkɔ ya mboka?
15 Ya solo, ezali na mwa minɔkɔ oyo bato ebele mpenza balobaka, lokola Lingelesi, Lifalanse, mpe Espagnol. Kasi, bato oyo bakendaka kosakola na mikili mosusu basalaka makasi mpo na koyekola minɔkɔ ya mboka mpo bato nyonso oyo bazali na “ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko” báyoka nsango yango. (Misala 13:48) Koyekola minɔkɔ yango ekoki kozala mpasi. Ntango bandeko ya Esanga Tuvalu, na sudi ya Pasifike, bakómaki na mposa ya mikanda na monɔkɔ na bango, misionɛrɛ moko andimaki mokumba ya kobongola yango. Lokola diksionɛrɛ ya monɔkɔ ya Tuvaluan ezalaki te, abandaki mpe koyanganisa maloba ya lokota yango. Nsukansuka, buku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradisb ebimaki na Tuvaluan. Ntango bamisionɛrɛ bakómaki na Curaçao, mikanda oyo elimbolaka Biblia ezalaki te na Papiamento, monɔkɔ ya mboka yango, diksionɛrɛ ya monɔkɔ yango mpe ezalaki te. Lisusu, bato yango bazalaki koyokana te na ndenge oyo monɔkɔ yango esengeli kokomama. Kasi, nsima ya mbula mibale kobanda bamisionɛrɛ ya liboso bakómaki, trakte ya liboso ebimisamaki na monɔkɔ yango. Lelo oyo, Papiamento ezali moko ya minɔkɔ 133 oyo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali kobimisama nzela moko na Lingelesi.
16 Bamisionɛrɛ ya liboso oyo bakómaki na ekólo Namibie bamonaki Motatoli moko te ya ekólo yango oyo akokaki kosalisa bango mpo na kobongola mikanda. Lisusu, na Nama, monɔkɔ moko ya mboka yango, maloba ezali te mpo na kobongola makanisi lokola “ya kokoka.” Misionɛrɛ moko alobi boye: “Nazalaki mbala mingi kopesa mosala ya kobongola na balakisi oyo bazalaki koyekola Biblia. Lokola bayebaki mpenza solo te, nasengelaki kofanda na bango mpo na koyeba soki fraze mokomoko ebongolami malamu.” Atako bongo, trakte Bomoi na mokili ya sika ebongolamaki na minɔkɔ minei oyo balobaka na Namibie. Lelo oyo, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali kobima sanza na sanza na monɔkɔ ya Kwanyama mpe ya Ndongo.
17, 18. Mosala nini ezali kosalema na Mexique mpe na bikólo mosusu?
17 Bato mingi ya ekólo Mexique balobaka Espagnol. Kasi, liboso bato ya Espagne bákóma kuna, bato ya mboka yango bazalaki koloba minɔkɔ mingi, mpe mosusu elobamaka tii lelo. Yango wana, Batatoli ya Yehova babongolaka mikanda na minɔkɔ 7 ya Mexique mpe mpo na bababa. Mosala na biso ya Bokonzi na monɔkɔ ya Maya ezali mokanda ya liboso oyo ebandaki kobimisama sanza na sanza na monɔkɔ wana ya Ba-Indien. Na kati ya basakoli 572 530 ya Mexique, bankóto mingi bazali Ba-Maya, Ba-Aztèque, mpe bato ya bikólo mosusu.
18 Na bambula oyo, ebele ya bato bakimi bamboka na bango mpe bakei kofanda na mboka mopaya, mpe bamosusu batiki bamboka na bango mpo na koluka misala. Yango wana, na mikili mingi, basakoli bakómi na bato ebele oyo balobaka minɔkɔ ya bapaya oyo basengeli mpe koteya. Batatoli ya Yehova bazali kondima mokumba ya kosakola epai ya bato yango. Na ndakisa, na Italie, ezali sikoyo na masangá mpe bituluku ya mike oyo bayekolaka na minɔkɔ mosusu 22. Mpo na kosalisa bandeko na kosakola epai ya bato oyo balobaka minɔkɔ mosusu, babongisaki bakelasi mpo na kolakisa minɔkɔ 16, bakisa mpe bajɛstɛ ya kosolola na bababa. Na mikili mosusu, Batatoli ya Yehova bazali mpe kosala molende ndenge yango mpo na koteya ebele ya bato oyo bakimi bamboka na bango. Tomoni mpenza ete na lisalisi ya Yehova, bato ya minɔkɔ ebele bazali kobakisama na molɔngɔ ya ebele ya bato.
“Na mabelé mobimba”
19, 20. Maloba nini ya Paulo ezali lelo oyo kokokisama na ndenge ya kokamwa mpenza? Limbolá.
19 Na ekeke ya liboso, ntoma Paulo akomaki boye: “Bayokaki nde te? Ɛɛ, ya solo, ‘na mabelé mobimba lokito na bango eyokani, mpe na bansukansuka ya mabelé oyo efandami maloba na bango.’” (Baloma 10:18) Soki na ekeke ya liboso ezalaki ndenge wana, tokoloba boni mpo na mikolo na biso? Bamilio ya bato—mbala mosusu motángo eleki monene banda mokili ebanda—bazali koloba: “Nakokumisa [Yehova] ntango nyonso, lisanzoli na ye ekozala na monɔkɔ na ngai libela.”—Nzembo 34:1.
20 Lisusu, mosala yango ezali kozonga nsima te. Basakoli ya Bokonzi bazali se kokóma mingi. Bangonga oyo bazali kolekisa na mosala yango ezali se kobakisama. Bazali kozongela bamilio ya bato oyo bazali kosepela mpe bazali koyekola Biblia na bankóto ya bato. Bato mosusu ya sika bazali mpe kosepela koyoka nsango. Na mbula eleki, bato 16 097 622 bazalaki na Ekaniseli ya liwa ya Yesu. Emonani polele ete mosala ezali naino mingi. Tiká tókoba kolanda ndakisa ya bosembo ya bandeko na biso oyo bayikelaki minyoko makasi mpiko. Mpe tiká tózala na molende lokola bandeko na biso oyo, banda 1919, bamipesaki na mosala ya Yehova. Tiká ete biso nyonso tókoba koloba lokola mokomi ya nzembo ete: “Tiká ete nyonso na mpema básanzola [Yehova]. Aleluya!”—Nzembo 150:6.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lapolo ya mosala mpo na mbula mobimba na nkasa 18 tii 21.
b Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Okoki kolimbola?
• Mosala nini bandeko babandaki na 1919, mpe mpo na nini ezalaki likambo moke te?
• Banani bayanganisamaki mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola?
• Mosala nini bamisionɛrɛ mpe bandeko mosusu basali na mikili ya bapaya?
• Makambo nini ezali komonisa yo ete Yehova azali kopambola mosala ya basaleli na ye lelo oyo?
[Etanda na lokasa 18-21]
LAPOLO YA BATATOLI YA YEHOVA NA MOKILI MOBIMBA MPO NA MBULA 2003
(Talá na zulunalo oyo ebimisamaki)
[Bililingi na lokasa 14, 15]
Basaleli ya Yehova bakanisaki te ete mosala ya kosakola esuki mpo na yikiyiki ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Mɔtɔ makasi: fɔtɔ ya U.S. Navy; bililingi mosusu: fɔtɔ ya U.S. Coast Guard
[Bililingi na lokasa 16, 17]
Ebele ya bato basengeli kouta na mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso