Christophe Plantin—Moko ya bato ya liboso oyo babimisaki biblia na masini
BATO mingi bayebi nkombo ya Johannes Gutenberg (1397-1468), moto ya liboso oyo asalelaki masini mpo na kobimisa Biblia. Kasi, bato mingi te bayebaka Christophe Plantin. Nzokande, ye mpe azali moko ya bato ya liboso oyo babimisaki mikanda na masini mpe, na bambula ya 1500, asalaki mosala monene mpo bato na mokili mobimba bázala na Babiblia mpe mikanda mosusu.
Christophe Plantin abotamaki na mobu soki 1520 na engumba Saint-Avertin, na ekólo France. Lokola azalaki na mposa ya kofanda na ekólo oyo bandimi ya mangomba ndenge na ndenge bayokanaka mpe epai nkita ezali malamu koleka na France, akendaki kofanda na engumba Anvers, ntango akómaki na mbula pene na 30.
Na ebandeli, Plantin azalaki kosala mosala ya kokangisa mikanda mpe kosala biloko ndenge na ndenge ya mposo ya nyama. Lokola azalaki kosala mosala na ye malamu, bato ya mbongo bazalaki kosomba biloko na ye mingi. Kasi, na mobu 1555, Plantin akutanaki na likambo moko oyo esalaki ete atika mosala yango. Mokolo moko, ntango azalaki kokende kotika sakosi ya mposo ya nyama oyo batindaki ye asalela Mokonzi Philippe II ya Espagne, oyo azalaki mpe koyangela mokili oyo ezali lelo Belgique, Luxembourg mpe Pays-Bas, etuluku moko ya bato babimelaki ye na balabala moko ya Anvers. Bato yango oyo balangwaki masanga batubaki ye mopanga na lipeka. Atako mpota oyo azokaki esilaki, Plantin akokaki lisusu kosala mosala ya mobɔkɔ te mpe asengelaki koluka mosala mosusu. Hendrik Niclaes, mokambi ya etuluku moko oyo ekabwanaki na Lingomba ya Anabaptiste, apesaki Plantin mbongo mpe akómaki kosala mosala ya kobimisa mikanda na masini.
“Mosala mpe kolendendela”
Plantin apesaki kompanyi na ye ya kobimisa mikanda nkombo “De Gulden Passer.” Na mokanda nyonso oyo abimisi na masini azalaki kotya liyemi ya bibende mibale oyo basalelaka nzela egumbamá (compas) ná maloba “Labore et Constantia,” elimboli “Mosala mpe Kolendendela.” Emonani ete elembo yango ebongaki mpenza na moto wana oyo alingaki mosala.
Lokola Plantin azalaki na eleko oyo Mpoto etondaki na yikiyiki na makambo ya losambo mpe ya politiki, azalaki kosalela mayele mpo na koboya mindɔndɔ. Mpo na ye, mosala ya kobimisa mikanda na masini ezalaki na ntina koleka likambo mosusu nyonso. Mokomi Maurits Sabbe alobi ete atako Plantin azalaki na baninga oyo bazalaki Baprotesta, ye moko “azalaki kolinga komonisa polele te soki azali moto ya lingomba nini.” Mpo na yango, bazalaki mbala na mbala kopanza ye nsango ete azali kobimisa mikanda ya bapɛngwi. Kutu, na mobu 1562, akimaki na Paris mpe afandaki kuna mbula mobimba ná mwa basanza.
Ntango Plantin azongaki na Anvers na mobu 1563, akómaki kosala na bakomelesa minene, oyo mingi bayebanaki ete bazali na Lingomba ya Protesta. Na boumeli ya mbula mitano oyo asalaki na bango, Plantin abimisaki babuku ndenge na ndenge 260. Kati na yango ezalaki na Babiblia ya Liebele, ya Grɛki, mpe ya Latin, bakisa mpe Biblia ya Néerlandais oyo ebongolamaki na Iniversite ya Louvain, oyo atyaki mayemi ya ngɛlingɛli.
“Mosala eleki monene ya kobongisa mokanda liboso ebimisama na masini”
Na mobu 1567, ntango bato ya Belgique, Luxembourg mpe Pays-Bas bakómaki kotombokela boyangeli ya Espagne, Philippe II, mokonzi ya Espagne atyaki Duc d’Albe guvɛrnɛrɛ na bikólo wana. Lokola bapesaki ye bokonzi mingi, moto yango asalaki nyonso mpo na kosukisa botomboki ya Baprotesta oyo ezalaki kokóma makasi. Na bongo, Plantin abandaki mosala monene oyo akanisaki ete ekosalisa ye alongola na mitó ya bato makanisi ete azali mopɛngwi. Plantin akómaki na mposa ya kobimisa Biblia oyo ebongisami malamu na monɔkɔ ya Liebele mpe ya Grɛki. Mpo na kobimisa Biblia yango, Plantin alongaki kozwa lisalisi ya Mokonzi Philippe II. Mokonzi alakaki kopesa ye mbongo mpe atindaki Arias Montanus, moto moko ya mayele mingi, mpo akamba mosala yango.
Montanus ayebaki malamu minɔkɔ mingi mpe azalaki molende na mosala; azalaki kosala ngonga 11 na mokolo. Bato mosusu ya mayele na mibeko ya lokota oyo bautaki na Espagne, na Belgique, mpe na France basungaki ye. Mokano na bango ezalaki ya kobongisa buku ya sika oyo ekozala lokola Polyglotte de Complute.a Longola Vulgate na monɔkɔ ya Latin, Septante na monɔkɔ ya Grɛki, mpe makomi ya Liebele ya ebandeli, Plantin akɔtisaki mpe Targoum ya monɔkɔ ya Aramɛyɛ mpe Peshitta ya monɔkɔ ya Syriaque, bakisa mpe mabongoli na yango ya liloba mokomoko na Latin.
Mosala monene wana ebandaki na mobu 1568 mpe esilaki na mobu 1572. Na kotalela ndenge oyo bazalaki kobimisa mikanda na masini na ntango wana, tokoki mpenza koloba ete mosala yango esalemaki mbangu mpenza. Montanus akomelaki Mokonzi Philippe II mokanda moko oyo elobaki boye: “Mosala oyo esalemi awa na boumeli ya sanza moko eleki mosala oyo esalemaka na Loma na boumeli ya mbula mobimba.” Plantin abimisaki Biblia 1 213 oyo ezali na minɔkɔ mingi na kati, mpe mokomoko ezalaki na volimi mwambe ya minene. Na lokasa ya ebandeli batyaki liyemi ya nkɔsi, ngɔmbɛ, mbwa ya zamba, ná mpate bazali kolya esika moko na kimya, oyo emonisi likambo elobami na Yisaya 65:25. Liboke moko ya bavolimi nyonso ezalaki kotɛkama na ntalo ya florins 70—ezalaki mbongo mingi mpenza, mpamba te na ntango wana, libota oyo ezali na makoki ezalaki kozwa florins 50 na mbula mobimba. Liboke ya bavolimi nyonso ekómaki kobengama Polyglotte d’Anvers. Bazalaki mpe kobenga yango Biblia Regia (Biblia ya Mokonzi) mpamba te Mokonzi Philippe II nde abimisaki mbongo mpo na kobimisa yango.
Atako Pápa Grégoire XIII andimaki Biblia yango, bato mosusu balobaki mabe mpo na Arias Montanus mpe mosala oyo asalaki. Ntina moko ezali ete mpo na Montanus, makomi ya Liebele ya ebandeli elekaki Vulgate oyo ezalaki na Latin. Monguna na ye ya liboso ezalaki Léon de Castro, mwana-mboka Espagne oyo azalaki moto ya mayele na teoloji; ye azalaki koloba ete Vulgate eleki makomi mosusu nyonso. De Castro alobaki ete Montanus abebisaki makomi mpamba te akɔtisaki mateya oyo ezali kokweisa Bosato. Na ndakisa, de Castro amonaki ete na vɛrsɛ ya 1 Yoane 5:7 na Peshitta oyo ezali na monɔkɔ ya Syriaque, balongolaki maloba oyo ezalaki te na bamaniskri ya kalakala ete: “na likoló, Tata, Liloba, mpe Elimo Santu: mpe bango misato bazali moko.” (King James Version) Atako bongo, tribinale ya Lingomba ya Katolike na Espagne ekataki likambo ete Montanus azali mopɛngwi te. Bato mosusu balobaka ete Polyglotte d’Anvers ezali “mosala eleki monene ya kobongisa mokanda liboso ebimisama na masini oyo moto asalaki ye moko na siɛklɛ ya 16.”
Matomba mpo na bato ya bileko mosusu
Bato mingi oyo bazalaki kobimisa mikanda na ntango wana bazalaki kaka na masini mibale to misato. Nzokande, ntango mosala ya Plantin ekolaki mpenza, azalaki na masini koleka 22 mpe basali 166. Na mikili nyonso oyo bazalaki koloba monɔkɔ ya Espagnol, bayebaki ye lokola moto oyo ayebaki malamu mosala ya kobimisa mikanda na masini.
Na ntango yango, botomboki ekómaki koya ndɔngɔ na Belgique, Luxembourg, ná Pays-Bas mpo na bokonzi ya Espagne. Mobulu ekómaki tii na engumba Anvers. Na mobu 1576, bato ya bikólo mosusu oyo Espagne ezwaki na mosala ya soda batombokaki mpe bapunzaki engumba yango mpo bafutaki bango te. Batumbaki bandako koleka 600, mpe babomaki ebele ya bato ya Anvers. Bakomelesa bakimaki engumba yango. Makambo yango esalaki ete Plantin azanga mbongo mpo na mosala na ye. Longola yango, basoda oyo batombokaki basɛngisaki ye afutaka mpako oyo elekaki mpenza makasi.
Na mobu 1583, Plantin akendaki kofanda na engumba Leyde, na kilomɛtrɛ 100 na nɔrdi ya Anvers. Kuna, afungolaki esika ya kobimisa mikanda mpe bakambi ya Iniversite ya Leyde, eteyelo oyo bato ya Lingomba ya Protesta bafungolaki, baponaki ye mpo abimiselaka bango mikanda na bamasini. Mpo na yango, makambo oyo bafundaki ye liboso, ete atiki Lingomba ya Katolike, ezongaki lisusu. Yango wana, Plantin azongaki na Anvers na nsuka ya mobu 1585; mwa moke na nsima, engumba yango ezongaki na mabɔkɔ ya Espagne. Na ntango wana, Plantin azalaki na mbula koleka 60, mpe kompanyi na ye ya kosala mikanda etikalaki kaka na basali minei oyo bazalaki kosalela kaka masini moko. Plantin abandaki kobundabunda mpo akóma lisusu na bamasini mingi. Kasi, kompanyi na ye ezongaki lisusu ndenge ezalaki liboso te, mpe na mokolo ya 1 Yuli 1589, Plantin akufaki.
Na boumeli ya mbula 34, Christophe Plantin abimisaki mikanda ndenge na ndenge 1 863; elingi koloba buku soki 55 na mbula. Ata lelo oyo, motángo wana ezali monene mpo na moto oyo azali kobimisa mikanda na bamasini na ye moko! Atako Plantin azalaki komonisa polele te soki azali na lingomba nini, mosala oyo asalaki esukaki kaka te na kokolisa mosala ya kobongisa mpe kobimisa mikanda na masini, kasi elendisaki mpe bato na koyekola Biblia. (2 Timote 3:16) Plantin ná bato mosusu oyo bazalaki kobimisa mikanda na eleko wana basalaki mosala monene mpo ata bato mpamba bázala na Biblia.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Biblia yango oyo ezali na minɔkɔ ndenge na ndenge na kati ebimaki na mobu 1517. Ezalaki na makomi ya Liebele, ya Grɛki, ya Latin mpe biteni mosusu na Aramɛyɛ. Talá lisolo “Polyglotte de Complute—Buku oyo esalisi mingi mpo na kobongola Biblia,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Aprili 2004, nkasa 28-31.
[Etanda/Elilingi na lokasa 15]
MUSÉE PLANTIN-MORETUS
Na mobu 1877, ndako oyo Plantin, mpe nsima na ye, bana na ye mpe bankɔkɔ na ye bafandaki na Anvers mpe epai basalaki mosala, ekómaki musée to ndako epai babombá biloko ya kala oyo bato bakoki kokende kotala. Ndako mosusu te ya kobimisa mikanda ya ntango wana ebatelamá malamu tii lelo. Na kati, ezali na masini mitano ya kobimisa mikanda oyo esalemaki na siɛklɛ ya 17 mpe ya 18. Ezali mpe na bamasini mosusu mibale, oyo eumeli koleka mosusu nyonso na mokili mobimba banda na ntango oyo Plantin azalaki na bomoi. Na ndako yango ezali mpe na mwa banzungu mikemike 15 000 oyo bazalaki kobongisa bibende oyo ezali na makomi, ná mwa biteni ya mabaya 15 000 oyo ezali na makomi, mpe mwa basaani 3 000 ya kwivre. Esika ya kobomba mikanda ezali na maniskri 638 oyo eumeli, mosusu banda na siɛklɛ ya 9 tii na siɛklɛ ya 16, mpe babuku 154 oyo esalemaki liboso ya mobu 1501. Moko na babuku yango ezali Biblia ya Gutenberg oyo eumeli kobanda na mobu 1461 mpe Polyglotte d’Anvers moko.
[Elilingi na lokasa 15]
Arias Montanus
[Elilingi na lokasa 16]
Polyglotte d’Anvers ezali na makomi ya Liebele, “Vulgate” na Latin, mpe “Septante” na Grɛki, bakisa mpe “Peshitta” na Syriaque, mpe Targoum na Aramɛyɛ ná mabongoli na yango na Latin
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Na ndingisa ya Museum Plantin-Moretus/Stedelijk Prentenkabinet Antwerpen
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 15]
Bililingi nyonso mibale: Na ndingisa ya Museum Plantin-Moretus/Stedelijk Prentenkabinet Antwerpen