Mituna ya batángi
Kotombola kɔpɔ ya masanga elobelami na Biblia te, kasi mpo na nini Batatoli ya Yehova baboyaka kosala yango?
Kotombola kɔpɔ ya masanga ezali momeseno oyo ebandá kala mpe epalangani na mokili mobimba, ata soki esika na esika bazali na ndenge oyo basalaka yango. Na bisika mosusu, soki bato batomboli bakɔpɔ na bango, batutisaka yango. Mbala mingi, moto oyo asɛngi baninga bátombola bakɔpɔ atombelaka moto moko makambo ya malamu to asɛngaka ete azala na esengo, na nzoto kolɔngɔnɔ, na bomoi molai, mpe bongo na bongo. Mpo bato oyo bazali wana bámonisa ete bandimi makambo yango, bakoki kozongela maloba na ye to kotombola bakɔpɔ na bango mpe na nsima, komɛla mwa moke. Bato mingi bakanisaka ete momeseno yango ezali mabe te; nzokande, Batatoli ya Yehova bazali na bantina mingi oyo etindaka bango básalaka yango te.
Elingi koloba te ete baklisto baboyaka kotombela moto ete azala na esengo to mpe na nzoto kolɔngɔnɔ. Na siɛklɛ ya liboso, mokanda moko oyo lisangani ya mikóló-bakambi ekomelaki masangá esukaki na maloba oyo ekoki kobongolama na “bótikala malamu,” to mpe “bózala nzoto kolɔngɔnɔ.” (Misala 15:29) Longola yango, basaleli mosusu ya Nzambe balobaki na mikonzi boye: “Tiká ete . . . nkolo na ngai, abika libela” to “Tiká ete mokonzi abika libela.”—1 Mikonzi 1:31; Nehemia 2:3.
Kasi, momeseno ya kotombola kɔpɔ ya masanga eutá wapi? Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 1968 (na Lifalanse) ezongelaki maloba ya buku moko (Encyclopædia Britannica, ebimeli ya 1910), volimi 13, lokasa 121, ete: “Ekoki mpenza kozala ete momeseno ya kotombola kɔpɔ ya masanga mpo na kotombela moto nzoto kolɔngɔnɔ eutá na molulu moko ya losambo oyo bazalaki komɛla mpo na banzambe mpe bato bakufá. Ntango bazali kolya, Bagrɛki ná Baloma bazalaki kopesa banzambe na bango mbeka ya masanga mpe na bafɛti ya losambo, bazalaki komɛla mpo na banzambe yango mpe bato bakufá.” Buku yango ebakisaki boye: “Mimeseno ya komɛla masanga mpo na kopesa mbeka ezali na boyokani na momeseno ya kotombola kɔpɔ ya masanga mpo na kotombela bato nzoto kolɔngɔnɔ.”
Ezali bongo tii lelo? Buku moko (International Handbook on Alcohol and Culture ya 1995) elobi boye: “Ekoki mpenza kozala ete momeseno [ya kotombola kɔpɔ ya masanga] eutaki na milulu ya mangomba ya kala ya kosopa mai mosantu lokola mbeka epai ya banzambe: bazalaki kosopa makila to vinyo mpo na kosɛnga lipamboli, bazalaki koloba ‘bomoi molai!’ to ‘zalá nzoto kolɔngɔnɔ!’”
Ya solo, elingi koloba te ete eloko to momeseno nyonso oyo eutá to ekokani na oyo ezalaki na mangomba ya lokuta ya kala ezali mabe mpo na baklisto ya solo. Tózwa ndakisa ya mbuma ya grenade. Buku moko elobi boye: “Emonani ete mangomba ya bapakano ezalaki kosalela mbuma ya grenade lokola elembo moko mosantu.” Atako bongo, Nzambe asɛngaki bátya bambuma ya grenade ya nsinga na ndelo ya elamba ya nganga-nzambe monene, mpe batyaki bambuma ya grenade likoló ya makonzí ya kwivre ya tempelo ya Salomo. (Exode 28:33; 2 Mikonzi 25:17) Lisusu, na ntango ya kala, lopɛtɛ ya libala ezalaki eloko ya losambo. Nzokande lelo oyo, bato mingi bayebi yango te; bayebi ete lopɛtɛ yango emonisaka ete moto oyo alati yango abalá.
Ezali boni mpo na likambo ya kosalela vinyo na losambo? Na ndakisa, na eleko moko, bato ya Sekeme oyo bazalaki kosambela Baala “bakɔtaki na ndako ya nzambe na bango, mpe balyaki mpe bamɛlaki mpe [balakelaki Abimeleke mabe, NW].” (Basambisi 9:22-28) Okanisi ete mosambeli ya sembo ya Yehova akokaki kosangana na komɛla mpo na mokano wana mabe, mbala mosusu mpo na kosɛnga nzambe asala Abimeleke mabe? Na eleko moko oyo bato mingi na Yisalaele batombokelaki Yehova, Amosa alobaki boye: “Bazali kolalalala pembeni na bitumbelo nyonso. . . . Na ndako ya Nzambe na bango bazali komɛla vinyo na baoyo basili kofutisa lifuti.” (Amosa 2:8) Okanisi ete basambeli ya solo bakokaki kosangana na makambo ya ndenge wana, ata soki bazalaki kosopa masanga yango lokola mbeka epai ya banzambe to bazalaki kaka komɛla? (Yilimia 7:18) Mosambeli ya solo akokaki kotombola kɔpɔ ya vinyo mpe kosɛnga na nzambe moko apambola bomoi ya moto boye to boye?
Na bantango mosusu, basambeli ya Yehova mpe bazalaki kotombola mabɔkɔ mpo na kosɛnga ete makambo na bango etambola malamu. Bazalaki kotombola mabɔkɔ epai ya Nzambe ya solo. Tozali kotánga boye: “Salomo atɛlɛmaki liboso ya etumbelo ya mbeka ya [Yehova] . . . asembolaki mabɔkɔ na ye na likoló, ye ete, Ɛɛ [Yehova], Nzambe ya Yisalaele, Nzambe mosusu azali lokola na yo te . . . ɛɛ, yoká bango kuna na efandelo na yo likoló, mpe ekoyoka yo, limbisá.” (1 Mikonzi 8:22, 23, 30) Ndenge moko mpe “Ezela asanzolaki [Yehova]. . . . Mpe bato nyonso bazongisaki liloba ete, Bobele bongo! Bobele bongo! Batombolaki mabɔkɔ na bango likoló mpe bakitisaki mitó na bango, basanzolaki [Yehova].” (Nehemia 8:6; 1 Timote 2:8) Emonani polele ete basambeli yango ya sembo batombolaki te mabɔkɔ likoló mpo nzambe ya makila malamu apambola bango.—Yisaya 65:11.
Bato mingi oyo batombolaka kɔpɔ ya masanga bakoki kokanisa te ete ezalaka mpo na koluka lipamboli ya nzambe moko boye, kasi bakoki mpe te kolimbola ntina oyo batombolaka yango. Nzokande, lokola bato yango bamitunaka te soki likambo oyo basalaka ezali na ndimbola nini, yango emonisi te ete baklisto ya solo basengeli komekola bango.
Eyebani ete na makambo mosusu mpe, Batatoli ya Yehova baboyaka kosala ndenge oyo bato bazali kosala. Na ndakisa, bato mingi bapesaka bendɛlɛ to drapo losako; bango bakanisaka te ete basambelaka yango. Baklisto ya solo bapekisaka bato te kosala bongo, kasi bango moko basalaka yango te. Ntango Batatoli bayebi ete likambo ya ndenge wana ekoki kosalama, basalaka na mayele ete bázala wana te mpo na kobɛtisa basusu libaku te. Ata ndenge nini, baboyaka kosala milulu ya ekólo mpamba te eyokani te na mibeko ya Biblia. (Exode 20:4, 5; 1 Yoane 5:21) Lelo oyo, bato mingi bakoki komona ete kotombola kɔpɔ ya masanga ezali molulu ya losambo te. Atako bongo, baklisto ya solo bazali na bantina mingi oyo basalaka yango te; eutaki na mangomba ya lokuta mpe ata lelo oyo, ekoki komonana ete bato basalaka yango mpo na kosɛnga lipamboli ‘na likoló,’ lokola nde bazali koluka lisalisi na nguya moko oyo eleki bango.—Exode 23:2.