Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 15/12 lok. 3
  • Ozali koyeba lisusu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozali koyeba lisusu?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • Batatoli ya Yehova bazali lingomba moko ya Protesta?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Feti ya Bonane—Ezali mpo na bakristo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Ezali na ntina oyekola Ebre mpe Greki?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Yehova, Nzambe oyo ayebi kosolola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 15/12 lok. 3

Ozali koyeba lisusu?

Osepelaki mpenza na botángi ya banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Na bongo, talá soki okoki kopesa biyano na mituna milandi:

• Na ndenge nini Nzambe akoki kokómisa yo mozwi?

Na ntango ya kala, Yehova apambolaki bato mosusu, na ndakisa Abrahama mpe Salomo, na bozwi ya biloko ya mosuni. Kasi bozwi oyo bakristo basengeli na yango mpe oyo Nzambe akoki kosalisa moto azwa, esangisi mpe kondima, kimya, kosepela na biloko oyo azali na yango, mpe esengo.​—1/9 nkasa 3-7.

• Liteya nini tokoki kozwa na ndenge Yesu abikisaki Petro ntango alingaki kozinda na mbu? (Mat. 14:28-31)

Soki tomoni ndeko moko azangi kondima, tokoki, na ndenge ya elilingi, kosembola lobɔkɔ na biso mpe kosalisa ye akóma na kondima mingi lisusu.​—15/9, lokasa 8.

• Kosikolama na biso esɛngaki Yehova nini?

Yehova ayokaki mpasi ntango Mwana na ye anyokwamaki mpe atyolamaki. Ndenge oyo Abrahama andimaki kopesa mwana na ye mbeka ezalaki elilingi ya ndenge oyo Yehova andimaki komona mwana na ye azali kobomama lokola mosali ya mabe.​—15/9, nkasa 28-29.

• Mpo na nini Codex ya Vatican ezali na ntina mingi?

Ezali maniskri ya monɔkɔ ya Grɛki oyo ekomamaki mbula soki 300 nsima ya ntango oyo basilisaki kokoma Biblia na mobimba na yango. Ezali na mikanda nyonso ya Makomami ya Ebre mpe ya Grɛki, longola kaka mwa biteni oyo ebungá. Ezali moko ya mikanda oyo esalisaka mpenza bato ya mayele mpo na koyeba makambo oyo ezalaki na makomi ya ebandeli ya Biblia.​—1/10, nkasa 18-19.

• Liteya nini tokoki kozwa na Masese 24:27 mpo na oyo etali ‘kotonga libota’?

Mobali oyo alingi kobala asengeli komibongisa malamu mpo na kokokisa mokumba yango. Yango elimboli komibongisa mpo na kokokisa bamposa ya mosuni ya libota na ye mpe komibongisa mpo na kotambwisa makambo ya elimo na libota.​—15/10, lokasa 12.

• Mpo na nini ebongi te koloba ete Batatoli ya Yehova bazali lingomba moko ya Protesta?

Lingomba ya Protesta ebandaki na Mpoto na ekeke ya 16, ntango bato balukaki kobongola Lingomba ya Katolike. Basalelaka nkombo “Protesta” mpo na kolobela bato oyo balandaka makanisi oyo etɛmɛlaka Lingomba ya Katolike. Batatoli ya Yehova bandimaka bokonzi ya pápa te, mpe bandimaka na motema moko ete Biblia nde elobaka solo; atako bongo, bandimaka te mateya mpe makambo mingi ya mangomba ya Protesta oyo eyokani te na Makomami.​—1/11, lokasa 19.

• Ezali na ntina moto ayekola Ebre mpe Grɛki mpo ayeba Biblia malamu?

Te. Koyeba minɔkɔ wana esalaka te ete moto akanga mbala moko ntina ya nsango oyo ezali na Biblia. Ata soki moto ayekoli minɔkɔ yango, akozala kaka na mposa ya kosalela badiksionɛrɛ mpe babuku ya gramɛrɛ mpo esalisa ye. Lokola Nzambe atindaki bato bákoma maloba ya Mosaleli na ye oyo aleki monene na monɔkɔ mosusu emonisi ete moto akoki kotánga Biblia mpe koyekola solo na minɔkɔ oyo elobamaka lelo.​—1/11, nkasa 20-23.

• Ndenge nini Yehova mpe Yesu bazali bandakisa malamu ya bonkonde?

Atako Yehova azali Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba, asalelaka bato makambo na boboto mpe na limemya. Ntango asololaki na Abrahama mpe Moize, asalelaki liloba moko ya Ebre oyo mbala mingi ebongolamaka: “Nabondeli yo.” (Eba. 13:14; Kob. 4:6) Nzambe ayokelaka mpe bato. (Eba. 18:23-32) Yesu azalaki mpe komemya bato, na ndenge azalaki kobenga bango na nkombo na bango mpe koluka kosalisa bango.​—15/11, lokasa 25.

• Mpo na nini bakristo ya solo baboyaka kosala fɛti ya Bonane?

Bonane ezalaka fɛti moko monene na manaka ya Azia. Mbala mingi, na fɛti yango bato batombelanaka bomoi malamu mpe bakumisaka bilimo. Bakristo bamemyaka mpe batosaka baboti na bango, kasi basanganaka te na bafɛti oyo ezali na boyokani na losambo ya bankɔkɔ oyo bakufá mpo bábatela bango mpe balukaka te ete banzambe ya libota básalisa bango.​—1/12, nkasa 20-23.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto