Biblia ebongolaka bato
NINI etindaki rasta moko akata nsuki na ye ya milai mpe atika koyina mindɛlɛ? Mpe nini esalisaki elenge mobali moko ya mobulu oyo azalaki kokɔngɔla mbongo mpo na batɛki bangi abongola bomoi na ye? Tóyoka bato yango.
“Natiká ata kokanisela basusu mabe.”—HAFENI NGHAMA
MBULA: 34
EKÓLO: ZAMBIE
BOMOI NA YE YA KALA: RASTA
NDENGE NAZALAKI: Nabotamaki na Zambie, na kaa moko ya bato bakimá mboka na bango. Mama akimaki Namibie ntango etumba moko ebimaki mpe akɔtaki na ebongiseli moko ya bato ya sudi-wɛsti ya Afrika (SWAPO). Ebongiseli yango ezalaki kobundisa boyangeli ya Afrika ya Sudi oyo ezalaki koyangela Namibie na ntango wana.
Na boumeli ya mbula 15 ya bomoi na ngai, nafandaki na bakaa mingi ya bato oyo bakimá mboka na bango. Na bakaa ya SWAPO, bazalaki koteya bilenge báluka bonsomi. Bakɔtisaki biso mpenza na motó makambo ya politiki mpe bateyaki biso tóyinaka mindɛlɛ.
Ntango nazalaki na mbula 11, nazalaki na mposa ya kokóma mokristo ya lingomba moko oyo ezalaki na kaa oyo esangisaki mangomba ndenge na ndenge na ndakisa, Katolike, Protesta, Lingomba ya Anglican, mpe mangomba mosusu. Pastɛrɛ oyo nasololaki na ye apekisaki ngai nasala bongo. Banda wana nazalaki lisusu te kosepela na mateya ya Nzambe oyo nazalaki kondima. Kasi, ntango nakómaki na mbula 15, mposa oyo nazalaki na yango mpo na miziki ya reggae mpe mposa ya kosilisa makambo ya kozanga bosembo oyo baindo ya Afrika bazalaki konyokwama mpo na yango, etindaki ngai nakɔta na etuluku ya Barasta. Natikaki nsuki ekóma milai, nakómaki komɛla marijuana, nakómaki koboya kolya misuni, mpe nakómaki kobunda mpo baindo bázwa bonsomi. Kasi, natikaki te bomoi na ngai ya mbindo to kotala bafilme ya mobulu. Mpe nakobaki kaka koloba maloba ya nsɔni.
NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Na 1995, ntango nazalaki na mbula soki 20, nabandaki kokanisa na mozindo mpo na oyo nakosala na bomoi na ngai. Nazalaki kotánga mikanda nyonso ya Barasta oyo nazalaki komona. Mikanda yango mosusu ezalaki kolobela Biblia, kasi nazalaki mpenza kokanga te ntina ya bandimbola na yango. Na yango, nazwaki ekateli ya kotánga Biblia ngai moko.
Na nsima, moninga na ngai moko ya Rasta apesaki ngai mokanda moko oyo elimbolaka Biblia oyo ebimisamaki na Batatoli ya Yehova. Ngai moko, nayekolaki mokanda yango nzela moko na Biblia. Na nsima, nakutanaki na Batatoli ya Yehova mpe nakobaki koyekola Biblia na bango.
Nasalaki makasi natika komɛla makaya mpe masanga ya makasi. (2 Bakorinti 7:1) Nabongisaki nzoto na ngai, nakataki nsuki na ngai ya milai, natikaki kotala pornografi mpe bafilme ya mobulu, mpe natikaki kosalela maloba ya nsɔni. (Baefese 5:3, 4) Nsukansuka, natikaki kutu kokanisela mindɛlɛ mabe. (Misala 10:34, 35) Kosala mbongwana wana, esɛngaki natika miziki oyo etindaka bato báyina bato ya mposo mosusu mpe nakabwana na baninga na ngai ya kala, oyo bakokaki mbala mosusu kosala ete nazongela bomoi na ngai ya kala.
Nsima ya kosala mbongwana wana, nalukaki Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova mpe nasɛngaki ete nakóma moko na bango. Nakómaki koyekola Biblia. Ntango nazwaki ekateli ya kozwa batisimo mpo na kokóma Motatoli ya Yehova, libota na ngai esepelaki te. Mama ayebisaki ngai napona lingomba nyonso ya “bokristo” kasi ya Batatoli ya Yehova te. Moko ya banɔkɔ na ngai, oyo azalaki moto monene na guvɛrnema azalaki ntango nyonso kotyola ngai mpo na ekateli oyo nazwaki ya kosangana na Batatoli.
Kasi, koyekola ndenge Yesu asalelaki bato makambo mpe kosalela batoli na ye esalisaki ngai nalonga botɛmɛli mpe kotyola. Ntango nazalaki kotala makambo oyo Batatoli bazalaki koteya ná oyo Biblia ezalaki koloba, nandimaki ete namoni Lingomba ya solo. Na ndakisa, balandaka etinda ya Biblia oyo esɛngi kosakwela basusu. (Matai 28:19, 20; Misala 15:14) Mpe bakɔtaka te na makambo ya politiki.—Nzembo 146:3, 4; Yoane 15:17, 18.
MATOMBA OYO NAZWI: Koyekola kotosa mitinda ya Biblia esalisi ngai na makambo ebele. Na ndakisa, kotika komɛla marijuana ebateli ngai mpo nabebisaka te bankama ya badolare sanza na sanza. Namonaka lisusu bimonamona te, mpe makanisi mpe nzoto na ngai ebongá.
Sikoyo, bomoi na ngai ekómi na ntina mpe ezali kotambwisama ndenge nazalaki kokana banda nazalaki elenge. Mpe na koleka nyonso, nazali mpenza komiyoka ete nazali penepene na Nzambe.—Yakobo 4:8.
“Nayekolaki ndenge ya kosilikaka mpambampamba te.”—MARTINO PEDRETTI
MBULA: 43
EKÓLO: AUSTRALIE
BOMOI NA YE YA KALA: MOTƐKI BANGI
NDENGE NAZALAKI: Mbala mingi, libota na ngai ezalaki kotambolatambola ntango nazalaki kokola. Tofandaki na bingumba ya mike, na engumba ya monene, mpe mpo na mwa ntango tofandaki na mwa bamboka ya Australie. Nabosanaka te makambo ya kitoko oyo tozalaki kosala na ntango wana elongo na bandeko na ngai mpe banɔkɔ—koboma mbisi, koboma nyama, kosala bibundeli ya banzete, mpe kosala bikeko ya biloko mosusu.
Tata azalaki kosala masano ya makofi mpe abandaki kolakisa ngai ndenge ya kobunda ntango nazalaki naino mwana moke mpenza. Mobulu ekɔtelaki ngai mpenza na makila. Ntango nakómaki na mbula koleka zomi na misato, nazalaki kolekisa ntango mingi na komɛla masanga na bikala. Ngai ná baninga na ngai, tozalaki koluka kaka bitumba. Tozalaki kosalela bambeli mpe banzete ya baseball mpo na kobundisa etuluku moko ya bato 20 to mpe koleka.
Nakómaki na mbongo mpo nazalaki kotɛka bangi mpe biloko oyo basali ya libongo bazalaki koyiba. Nazalaki mpe kokɔngɔlela batɛki bangi mbongo, nazalaki kobangisa bato oyo bazalaki na mbongo na bango na mandoki. Mokano na ngai ezalaki ya kokóma mobomi-bato. Likambo oyo nazalaki koloba ntango nyonso ezalaki, naboma to báboma ngai.
NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Nayokaki nsango ya Batatoli ya Yehova ntango nazalaki kokola. Ntango nakómaki na mbula soki 20, nazali komikundola ete natunaki mama soki ayebi esika moko na bango azalaka. Mikolo mibale na nsima, Motatoli moko na nkombo Dixon, abɛtaki na porte na ngai. Nsima ya kosolola mwa moke, abengaki ngai na makita ya Batatoli ya Yehova. Nakendaki na makita yango mpe nayanganaka na makita yango ekokisi lelo mbula koleka 20. Mituna nyonso oyo nazalaki na yango, Batatoli bayanolaki ngai na Biblia.
Nasepelaki koyeba ete Yehova amibanzabanzaka mpo na moto mokomoko, ata mpe bato oyo basambelaka ye te. (2 Petro 3:9) Namonaki ete azali Tata ya bolingo oyo atyelaka ngai likebi, ata soki moto moko te azali kokipe ngai. Motema na ngai mpe ekitaki na koyeba ete akolimbisa masumu na ngai soki natiki banzela na ngai ya mabe. Bavɛrsɛ ya Biblia oyo ezali na Baefese 4:22-24 esalisaki ngai mpenza. Mokapo yango elendisaki ngai ‘nalongola bomoto ya kala’ mpe ‘nalata bomoto ya sika oyo ezalisamaki na boyokani ya mokano ya Nzambe.’
Esɛngaki ngai ntango mingi mpo nabongola bomoi na ngai. Nazalaki kolekisa pɔsɔ mobimba kozanga kosimba bangi, kasi na wikende, ntango nazali na baninga na ngai nazalaki komɛla lisusu. Namonaki ete nasengeli kokabwana na baninga na ngai soki nalingi kobongisa bomoi na ngai, na yango nazwaki ekateli ya kokende na engumba mosusu. Baninga mosusu basɛngaki ngai tókende, mpe nandimaki. Na mobembo, babandaki komɛla marijuana mpe bapesaki ngai mwa ndambo. Nayebisaki bango ete nazali kotika bizaleli yango, mpe ntango kaka tokómaki na engumba yango, tokabwanaki. Mwa moke na nsima, nayokaki ete baninga na ngai bayibaki na banki moko na mandoki.
MATOMBA OYO NAZWI: Nsima ya kokabwana na baninga na ngai wana, ezalaki lisusu mpasi te mpo nasala mbongwana na bomoi na ngai. Na 1989, nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli. Nsima ya batisimo na ngai, ndeko na ngai ya mwasi, mama, mpe tata, bango nyonso bakómá kosalela Yehova lokola ngai.
Nabalá eleki sikoyo mbula 17 mpe nazali na bana misato. Nayekolaki ndenge ya kosilika noki te, ata ntango batumoli ngai. Mpe nayekolaki kolinga bato ya ‘bikólo, mposo, mpe minɔkɔ’ nyonso. (Emoniseli 7:9) Namonaka mpenza bosolo ya maloba ya Yesu, oyo alobaki ete: “Soki botikali na kati ya liloba na ngai, bozali mpenza bayekoli na ngai, mpe bokoyeba solo, mpe solo ekopesa bino bonsomi.”—Yoane 8:31, 32.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 19]
Kosala mbongwana, esɛngaki natika miziki oyo etindaka bato báyina bato ya mposo mosusu
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 20]
Ngai ná baninga na ngai, tozalaki koluka kaka bitumba. Tozalaki kosalela bambeli mpe banzete ya baseball mpo na kobundisa etuluku moko ya bato 20 to mpe koleka