Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 1/3 nk. 30-31
  • Longisá losambo ya solo!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Longisá losambo ya solo!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Masolo mosusu
  • Nzambe oyo ayinaka kozanga bosembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Kobomama ya Sodoma mpe Gomola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Yesu abikisi bato na ndenge ya likamwisi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Moize azwi mokumba moko monene
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 1/3 nk. 30-31

Mpo na bilenge

Longisá losambo ya solo!

Malako: Tángá lisolo oyo na esika oyo makɛlɛlɛ ezali te. Ntango ozali kotánga bavɛrsɛ, salá lokola ozalaki wana ntango makambo yango esalemaki. Salá lokola nde ozali komona makambo yango mpe ozali koyoka mingongo. Omitya na esika ya bato oyo balobeli. Salá lokola yo mpe ozali kosala likambo yango.

Bato oyo balobeli: Eliya, Ahabe, mpe basakoli ya Baala soki 450

Na mokuse: Eliya amonisi ete Yehova aleki Baala.

1 TALELÁ LISOLO OYO.​—TÁNGÁ 1 BAKONZI 18:17-40.

Salá na papye mosusu elilingi oyo ezali komonisa boyokani oyo ezalaki kati na Eliya, basakoli ya Baala, mpe bitumbelo ndenge ozali kokanisa.

Makɛlɛlɛ nini ozali “koyoka” ntango makambo oyo elobelami na vɛrsɛ 26 tii 29 ezali kosalema?

․․․․․

Okanisi ete mongongo ya Eliya ezali koyokana ndenge nini ntango azali kosolola na basakoli ya Baala?

․․․․․

2 KƆTÁ NA MOZINDO.

Mpo na nini esɛngaki ete Eliya azala na mpiko mpo na kokutana na Ahaba mpe na nsima asala momekano oyo elingaki koyokisa ebele ya basakoli ya Baala nsɔni? (Lisalisi: Tángá 1 Bakonzi 18:4, 13, 14.)

․․․․․

Salelá mikanda oyo ozali na yango mpo na koluka likambo moko oyo elobeli losambo ya Baala. Na ndakisa, wapi mwa makambo mosusu oyo bazalaki kosala na losambo na bango? Losambo ya Baala esalaki nini na Yisraele?

․․․․․

Mpo na nini okanisi ete Eliya asalaki talase zingazinga ya etumbelo ya Yehova mpe na nsima atondisaki yango na mai?

․․․․․

3 SALELÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI. KOMÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI NA NTINA NA . . .

Mpiko oyo esengeli mpo na kolongisa losambo ya solo.

․․․․․

Matomba oyo bato oyo bamonisaka mpiko ya ndenge wana bazwaka.

․․․․․

MAKAMBO MOSUSU OYO OKOKI KOSALELA.

Na likambo (makambo) nini na bomoi okoki komonisa mpiko mingi mpo na kolongisa losambo ya solo?

․․․․․

4 NA LISOLO OYO MAKAMBO NINI OMONI ETE EZALI NA NTINA MINGI MPO NA YO, MPE MPO NA NINI?

․․․․․

Soki ozali na biblia te, sɛngá Batatoli ya Yehova, to tángá mikanda mosusu oyo elimbolaka biblia na Internet na www.pr2711.com

[Etanda na lokasa 31]

Liyebisi oyo etali liyangani ya etúká

Kobanda mbula oyo, badati mpe bisika oyo mayangani ya etúká esalemaka mbula na mbula, ekobima lisusu te na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Okoki komona badati mpe bisika yango na Internet na adrɛsi oyo: jw.org.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto