Nani azali Moyoki ya mabondeli?
SOKI ezali na Moto oyo ayokaka mabondeli, boye, ye nde asalá biloko nyonso. Nani mosusu akoki koyeba makanisi na yo, longola kaka ye oyo asalá bɔɔngɔ? Nani mosusu akoki koyanola na mabondeli mpe kopesa bato lisungi oyo bazali na mposa na yango? Kasi, okoki komituna boye: ‘Ebongi mpenza kondima ete Mozalisi azali?’
Bato mingi bakanisaka ete mpo na kondima ete Mozalisi azali, esengeli te kondima makambo ya siansi. Kasi, koloba ete kondimela Nzambe eyokani te na siansi ezali lokuta. Tótalela makambo oyo elandi.
◼ Ankɛtɛ moko oyo basali kala mingi te epai ya baprofesɛrɛ 1 646 ya makambo ya siansi na bainiversite 21 ya minene na États-Unis, emonisi ete na kati ya baprofesɛrɛ misato moko kaka nde alobaki ete “andimaka te ete Nzambe azali.”
Ya solo, bato mingi ya siansi bandimaka ete Nzambe azali.
Makambo oyo emonisi ete Mozalisi azali
Tosengeli nde kondima kaka bindimandima ete Moyoki ya mabondeli azali? Soki moke te! Koloba ete kozala na kondima elimboli kondima likambo nyonso bindimandima ezali lokuta. Biblia emonisi ete kondima ezali “elembeteli oyo ezali komonisa bosolo ya makambo atako ezali komonana te.” (Baebre 11:1) Libongoli mosusu ya Biblia elobi ete kondima “endimisaka biso makambo oyo tomonaka te.” Na ndakisa, okoki komona te nguya oyo esalaka ete tóyoka mingongo ya bato oyo bazali koloba na radio, kasi, telefone na yo emonisaka polele ete nguya wana oyo esalaka ete oyoka mongongo ya moto na mosika, ezali; mpe ondimaka likambo yango. Ndenge moko mpe, atako tokoki te komona Moyoki ya mabondeli, tokoki kotalela makambo oyo ekoki kondimisa biso ete azali mpenza.
Epai wapi tokoki komona makambo oyo ekoki kondimisa biso ete Nzambe azali? Ntina ya koluka mosika ezali te. Biblia elobi boye: “Ya solo, ndako nyonso etongamaka na moto, kasi oyo atongá biloko nyonso ezali Nzambe.” (Baebre 3:4) Ondimi maloba yango? Mbala mosusu ntango otalaka ndenge molɔ́ngɔ́ ebongisamá malamu, ndenge bomoi ebandá, to bɔɔngɔ ya moto oyo esalemá na ndenge ya kokamwa na kati ya biloko nyonso oyo ezali awa na mabele, omonaka ete esengeli kozala na moto moko oyo aleki mpenza bato nyonso.a
Kasi, biloko oyo Nzambe asalá ekoki koteya biso makambo nyonso te oyo etali Nzambe. Koluka koyeba soki Nzambe azali na kotala kaka biloko oyo asalá, ezali lokola koyoka na mosika ndenge moto moko azali kopusana pene ya porte moko oyo ekangami. Oyebi ete moto moko azali koya, kasi oyebi te soki azali nani. Mpo na koyeba ye, osengeli kofungola porte. Tosengeli mpe kosala bongo mpo na koyeba Moto oyo akelá biloko nyonso.
Biblia ezali lokola porte oyo tosengeli kofungola mpo na koyeba Nzambe. Ntango ofungoli porte yango mpe otaleli bisakweli na yango mosusu oyo elobeli ata makambo mikemike mpe ndenge yango ekokisamaki, okomona makambo oyo ekondimisa yo ete Nzambe azali.b Kasi, longola yango, masolo oyo elobeli ndenge Nzambe azalaki kosalela bato makambo, emonisi bizaleli ya Moyoki ya mabondeli.
Moyoki ya mabondeli azali ndenge nini?
Biblia emonisi ete Moyoki ya mabondeli azali mpenza mpe okoki koyeba ye. Ya solo, kaka moto mpenza nde akoki koyoka likambo mpe kokanga ntina na yango. Maloba ya vɛrsɛ oyo ezali mpenza kokitisa motema: “Ee Moyoki ya libondeli, ɛɛ bato ya lolenge nyonso bakoya epai na yo.” (Nzembo 65:2) Ayokaka baoyo babondelaka ye na kondima. Azali mpe na nkombo. Biblia elobi boye: “Yehova azali mosika mpenza na bato mabe, kasi ayokaka libondeli ya bayengebene.”—Masese 15:29.
Yehova akoki koyoka mawa to esengo. Azali “Nzambe ya bolingo” mpe abengami “Nzambe ya esengo.” (2 Bakorinti 13:11; 1 Timote 1:11) Ntango mabe ekómaki mingi, Biblia elobi ete Nzambe “ayokaki mpasi na motema na ye.” (Ebandeli 6:5, 6) Ndenge balobaka ete Nzambe abimiselaka bato bampasi mpo na komeka bango, ezali lokuta. Biblia elobi boye: “Nzambe ya solo akoki kosala mabe ata moke te.” (Yobo 34:10) Atako bongo, okoki komituna boye: ‘Soki Nzambe azali Mozalisi mpe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, mpo na nini atiki ete bampasi ekoba boye?’
Yehova apesá bato likoki ya kosalela bonsomi ya kopona, mpe yango esalisi biso tóyeba ndenge Nzambe azali. Tosepelaka te lokola tozali na bonsomi ya kopona ndenge oyo tokotambwisa bomoi na biso? Kasi likambo ya mawa, bato mingi basalelaka bonsomi na bango na ndenge ya mabe mpe yango ebimiselaka bango mpe bato mosusu mpasi. Talá motuna oyo ebongi kokanisa yango malamumalamu: Ndenge nini Nzambe akolongola bampasi mpe akotikela bato bonsomi na bango? Tokotalela motuna yango na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mosusu oyo emonisi ete Nzambe azali, talá mwa buku Cinq questions à se poser sur l’origine de la vie mpe buku Y a-t-il un Créateur qui se soucie de vous? nyonso mibale ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Mwa buku Un livre pour tous mpe buku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? ebimisami na Batatoli ya Yehova mpo na kosalisa yo otalela makambo oyo emonisi ete Biblia ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe.
[Etanda na lokasa 5]
Mangomba nde esalaka ete otya ntembe?
Likambo ya mawa, mangomba nde esalaka ete bato mingi bándima te ete Nzambe azali na motema mawa mpe ayokaka mabondeli. Lokola mangomba emikɔtisaka na bitumba, na terorisme mpe ekangaka miso na likambo ya kobebisa bana, yango etindaka ata bato oyo basambelaka báloba ete ‘Nzambe azali te.’
Mpo na nini mbala mingi mangomba nde etindaka bato na mabe? Na mokuse, bato mabe nde basalaka makambo ya mabe na nkombo ya lingomba. Biblia esakolaki ete bato mabe bakokɔta na lisangá ya bokristo mpe bakosalela yango na mikano ya mabe. Ntoma Paulo ayebisaki bakɛngɛli bakristo boye: “Na kati na bino mpenza, mibali bakobima mpe bakoloba makambo ya mbilingambilinga mpo na kobenda bayekoli bálanda bango.”—Misala 20:29, 30.
Nzambe ayinaka mangomba ya lokuta. Kutu, Biblia, Liloba ya Nzambe, elobi ete mangomba ya lokuta ezali na ngambo ya “makila . . . ya baoyo nyonso babomamaki na mabele.” (Emoniseli 18:24) Lokola mangomba ya lokuta elongi te koteya bato makambo ya Nzambe ya solo, oyo ezaleli na ye ya libosoliboso ezali bolingo, mangomba yango ezali na ngambo ya makila na miso ya Nzambe.—1 Yoane 4:8.
Moyoki ya mabondeli abosani te bato oyo bazali konyokwama mpo na mangomba ya lokuta. Lokola Nzambe alingi bato, mosika te akosalela Yesu mpo na kosambisa bato nyonso oyo basambelaka ye na bokosi. Yesu alobaki boye: “Na mokolo yango, bato mingi bakoloba na ngai: ‘Nkolo, Nkolo, tosakolaki na nkombo na yo te?’ . . . Nzokande nakoyebisa bango polele ete: Nayebi bino ata moke te! Bólongwa mosika na ngai, bino bato oyo bobukaka mibeko.”—Matai 7:22, 23.