Biblia: Liziba ya kobɔndisa mpe ya elikya kati na mokili ya yikiyiki
1 Bato bazali kokutana na mikakatano mingi lelo oyo; na bongo bazali na mposa ya libɔndisi mpe ya elikya. Bobele Biblia yango moko nde ezali na likoki ya kopesa libɔndisi ya solo. Ezali kopesa biso elikya ya mokili ya sika mpe ya sembo. (Lom. 15:4; 2 Pet. 3:13) Buku Auxiliaire, na lokasa 207, ezali kopesa likanisi oyo: “Kozanga Biblia, mbɛlɛ tokokaki te koyeba Yehova, to mpe mapamboli kitoko oyo mazali kozwama na nzela na mbeka ya lisiko na Klisto; kozanga yango, mbɛlɛ tokoki te koyeba makambo mingi likoló na masɛngami mpo na kozwa bomoi ya seko kati na Bokonzi ya sembo ya Nzambe to na nse na boyangeli na yango.
2 Na sanza ya Mai, tokobenda mpenzampenza likebi likoló na mokumba oyo Liloba ya Nzambe, Biblia, ezali kokokisa mpo na kosalisa bango ete báyikela mikakatano oyo miuti na mokili mpiko. Tokopesa bango Les Saintes Écritures—Traduction du monde nouveau mpe buku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? Tokoki koloba nini mpo na kosalisa bato ya motema malamu ete bándima motuya ya Biblia?
3 Nsima na komiyebisa, tokoki koloba mwa likambo lokola oyo:
◼ “Na ntembe te ondimi solo ete mikakatano oyo mizingi biso mizali mpenza kobulunganisa kimya na biso ya elimo. Epai wapi tokoki kozwa batoli ebongi oyo ezali komonisa biso lolenge nini kolonga bampasi motindo wana? [Tiká ye ayanola.] Namoni ete Biblia ezali kopesa elikya mpamba te ezali koteya biso lolenge nini kozala na esengo. [Tángá Luka 11:28.] Ntina ya mosala na biso ezali ya kolendisa bato ete bátángaka Biblia mpe bázwa litomba na mateya na yango. Buku oyo ya boyekoli na Biblia, La Bible: Parole de Dieu ou des hommes?, ekoki kosalisa yo kati na likambo yango. Talá oyo elobi na ntina na eutelo ya bampasi mingi ya mokili. [Tángá molɔngɔ ya mibale ya paragrafe 9, na lokasa 187.] Soki osepeli kotánga buku yango, nakozala na esengo ya kotikela yo yango.”
4 Tokoki kopona kosalela lisolo moko ya pɛtɛɛ lokola oyo elandi:
◼ “Tozali kosala nyonso mpo na kolendisa bato ete básepela mingi na Liloba ya Nzambe, Biblia. Nalingi kopesa yo trakte oyo Mpo na nini kondimela Biblia? Ezali komonisa mpo na nini tokoki komibalola epai na Biblia mpo na kozwa elikya moko ya solo kati na mokili moko kitoko. [Kendá na lokasa 6 mpe tángá Nzembo 37:29 bakisa mpe paragrafe ya nsuka.] Nasɛngi na yo ete otánga trakte yango mpe na ntango nakoya mbala ya nsima okoyebisa ngai makanisi na yo likoló na elikya oyo Biblia ezali kopesa biso.”
5 Bamoko kati na basakoli bakolinga ntango mosusu kosalela lisolo oyo ya mbala moko mpo na kobanda boyekoli ya Biblia:
◼ “Nayei kotala yo mpo na kosɛnga yo boyekoli ya Biblia na ndako kozanga kofuta. Biblia epemami na Nzambe mpe mateya na yango makoki kosalisa biso mpo na kozongisa makambo na molɔngɔ. Elobeli ya sika ya Les Saintes Écritures—Traduction du monde nouveau ebongi malamu mpo na boyekoli ya moto ye moko. Emonani ete libongoli yango eyebani epai ya bamilio ya batángi na Biblia kati na mokili mobimba. Limbisá ngai nalakisa yo na mokuse ndenge nini okoki kosalela yango. [Kendá na lokasa 1659 mpe benda likebi na eteni 36A. Na kotalela bosepeli amonisi, talelá mokapo moko to mikapo mibale ya mitindami mpe bósolola na ntina na likanisi oyo liuti na yango. Limbolá na nini botaleli ya mikapo wana ezali komonisa makambo oyo Nzambe akani kokokisa na nzela ya Bokonzi na ye.] Na kozala na esengo ya kozonga mpo na kosolola lisusu na ntina na elikya ya Bokonzi.”
6 Biblia ezali liziba ya libɔndisi mpe ya elikya, mpe ezali na solo oyo ekoki komema biso na bomoi ya seko. (Yoa. 17:3, 17) Na kolakisáká boyebi ya Biblia epai ya bazalani na biso, tozali kosepelisa Yehova, “oyo alingi ete bato nyonso bábika.”—1 Tim. 2:4.