Tópesa bango libaku ya koyoka “mokolo mosusu”
1 “Mpô ya likambo wâná, tokoyóka yó mokolo mosusu.” (Bikela 17:32, Liloba lya Nzambe) Ezali yango nde bato mosusu balobaki nsima na lisukulu ya Paulo oyo eyebani mingi na likoló ya ngomba ya Marsi. Motindo moko lelo oyo, basusu bazali na mposa ya koyoka mingi lisusu na ntina na nsango ya Bokonzi oyo tozali koyebisa bango na ntango ya boleki na biso ya liboso.
2 Tozali kokokisa eteni eleki monene ya mateya na biso wana ezali biso kozonga mpo na kotala bato mpo na kokolisa mposa na bango. Soki tomibongisi malamu, tokozwa matomba ya malamu. Mokanda mpo na Eteyelo ezali kopesa batoli oyo elandi na lokasa 49: “Omikɔtisela naino yo moko ndimbola nyonso oyo epesami na ntina na likambo boye to likambo boye. Meká koluka koyeba mpo na nini mpe ndenge nini. Salá makasi ya kolimbola makanisi na maloba na yo moko. Yekolá mpo osimba ntina malamu na bapreve to bilembeteli bipesami na Biblia na ntina na likambo boye to likambo boye. Omibongisa malamu mpo na kosalela mikapo mipesami.”
3 Soki totiki buku “La Bible: Parole de Dieu ou des hommes?,” tokoki koloba ete:
◼ “Na ntango ya lisolo na biso ya mbala eleki, tolobelaki bantina oyo tozali na yango mpo na kotya elikya na biso kati na Biblia. Buku oyo natikelaki yo ebimisi motuna oyo: ‘Mpo na nini kotánga Biblia?’ Tángá maloba ya ebandeli na lokasa 5 mpe tiká moto yango ayanola na motuna ya nsuka.] Biblia elobi na biso ete Nzambe ye moko akosilisa mosika te mikakatano nyonso oyo ezali kotungisa bato mpe ezali kokamba biso na nzela oyo tosengeli kotambola mpo na kozwa matomba oyo eleko wana ya esengo ekomemela biso. [Tángá Nzembo 119:105.] Buku oyo ezali esaleli ebongisami mpo na boyekoli ya Biblia ya moto ye moko mpe ya libota. Nakozala na esengo ya kolakisa yo lolenge nini kosalela yango.”
4 Na ntango tozali kozonga kotala baoyo totikelaki bango trakte “Mpo na nini kondimela Biblia,” tokoki koloba boye:
◼ “Biso nyonso tozali komibanzabanza mpo na oyo mikolo mizali koya ebombeli biso. Kasi soki totali ndenge makambo mazali lelo na mokili, nini ekosalema engebene makanisi na yo? [Tiká ye ayanola.] Bato bakoki bobele kopesa makanisi ya likolólikoló na ntina na makambo oyo makobima, nzokande Nzambe ayebi mpenzampenza likambo oyo ekosalema. [Tángá Yisaya 46:10.] Mbala mosusu okokamwa na koyoka ete Biblia ezali koyebisa ete mosika te tokokoka kozala na bomoi ya esengo kati na mokili moko ya sika oyo ekokóma paladiso. [Tángá paragrafe ya liboso ya lokasa 5.] Limbisá ngai ete nalobela yo na bozindo na ntina na elaka wana kitoko.”
5 Soki tozongeli moto moko oyo totikelaki ye “Traduction du monde nouveau,” mbala mosusu tokoki kobenda likebi na likanisi oyo:
◼ “Mbala eleki natikelaki yo Biblia mpe nalakaki yo ete nakozonga mpo nalakisa yo lolenge ya kosalela yango malamu. Ekoki kokóma ete tómituna lolenge nini tokoki kobatela boninga malamu elongo na mozalani na biso. Biblia ezali kopesa biso batoli ya kitoko, mpe nalisalisi ya Traduction du monde nouveau ezali na biso pɛtɛɛ mpo na kozwa oyo tozali na yango mposa. [Kendá na bankasa 1543-1544 mpe talá liloba “bolingo.” Bendá likebi ya moto yango likoló na mikapo lokola 1 Bakolinti 13:4; Bakolose 3:14 mpe 1 Petelo 4:8. Limbolá na mokuse lolenge nini kosalela mitinda oyo ekoki kobimisa matomba malamu.] Talá ndakisa moko oyo ezali komonisa banzela ebongi oyo Biblia ezali komonisa mpo na kolonga mikakatano na biso. Mbala ya nsima, nakozala na esengo ya komonisa yo lolenge nini mosusu Biblia ekoki kosalisa biso na kozwa bolamu mpe kimya ya elimo.”
6 Ezali na eloko te ya motuya monene koleka oyo tokoki kokabola epai na bazalani na biso koleka boyebi ya solo ya Liloba ya Nzambe. Boyebi yango ekoki kopesa epai na bato bobangi ya Yehova mpe kolendisa bango na kotambola kati na nzela na ye, mpe likambo oyo lizali kopesa bolamu ya seko.—Mas. 2:20, 21.