Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/98 lok. 8
  • Tósakola epai na “bato ya mitindo nyonso”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tósakola epai na “bato ya mitindo nyonso”
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Masolo mosusu
  • Boyebi oyo euti na Nzambe ezali koyanola na ebele ya mituna
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Makanisi mpo na ndenge ya kobanda masolo na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • “Oyo elimboli bomoi ya seko”
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Makanisi mpo na ndenge ya kobanda masolo na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1998
km 7/98 lok. 8

Tósakola epai na “bato ya mitindo nyonso”

1 Ntango tozali kokutana na bato ya mimeseno ndenge na ndenge mpe ya mangomba ndenge na ndenge, tóyeba malamu ete Yehova alingi ete “bato ya mitindo nyonso bábika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Tim. 2:4, NW) Longola batrakte mingi mpe mwa babuku mingi oyo ebimisami mpenzampenza mpo na ntina yango, tozali mpe na mikanda mibale ya malamu oyo tokoki kosalela ntango nyonso mpo na kosalisa bato oyo lingomba na bango eteyi bango te solo na ntina na Nzambe mpe Klisto.

2 Buku L’humanité à la recherche de Dieu ezali kolobela biutelo ya mangomba minene ya mokili; na bongo ekoki kopesa nzela na bato ya mitindo nyonso ete básala bokokanisi kati na bindimeli na bango mpe makambo oyo Biblia ezali koteya na ntina na Nzambe bobele moko ya solo. To mpe, na kobendáká likebi likoló na bomoi ya Yesu Klisto, buku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo ekoki kosalisa moto ete ayeba malamumalamu Mwana ya Nzambe mpe abendama na ye, lokola yango esalemaki mpo na bato mingi na ekeke ya liboso. (Yoa. 12:32) Mbala nyonso oyo tokomona ete ebongi mpenza, tósalela makanisi oyo malandi mpo na kolakisa babuku yango:

3 Soki tokanisi ete ekozala malamu kolakisa buku “Moto oyo alekaki bato nyonso,” tótuna motuna oyo:

◼ “Eloko nini eyelaka yo na makanisi ntango ozali kokanisa Yesu? [Tótika moto yango apesa eyano.] Bato mingi oyo bayekolaka istware bandimaka ete Yesu azalaki moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. [Tótánga ndakisa moko oyo tokoki kozwa na maloba ya ebandeli ya buku Moto oyo alekaki bato nyonso.] Biblia ezali komonisa ete bomoi ya Yesu ezali ndakisa mpo na bato ete bálanda yango.” Tótánga 1 Petelo 2:21 mpe paragrafe ya liboso na lokasa ya nsuka ya maloba ya ebandeli ya buku Moto oyo alekaki bato nyonso. Soki molobani na biso asepeli koyeba makambo mosusu mingi na ntina na Yesu, tólakisa ye buku yango. Liboso ya kotika ye, tótánga Yoane 17:3 mpe tótuna ye ete: “Ndenge nini tokoki kozwa boyebi yango oyo ezali komema na bomoi ya seko?” Tóyokana na ye malamu mpo na mokolo oyo tokozonga kopesa eyano na motuna yango.

4 Na bozongeli na biso ya sika, mpo na kolimbola lolenge ya kozwa boyebi oyo epesaka bomoi, tokoki na ndakisa koloba boye:

◼ “Nalakaki ete nakozonga lisusu mpo na kolakisa yo lolenge tokoki kozwa boyebi oyo ememaka na bomoi ya seko.” Tólakisa buku Boyebi, mpe tómonisa lolenge boyekoli esalemaka na kosaleláká mokapo ya liboso.

5 Soki tosepeli kolakisa buku “L’humanité à la recherche de Dieu,” tóbanda liboso na kotuna motuna oyo:

◼ “Lelo oyo, mangomba mazali ebele: osilá komituna ndenge nini tokoki koyeba lingomba oyo endimami na Nzambe?” Nsima ya koyoka eyano ya moto yango, tófungola buku L’humanité à la recherche de Dieu na lokasa 377. Tóbimisa makanisi oyo mazwami na nimero 7, mpe tótuna moto yango soki ye mpe akanisaka ete lingomba ya solo esengeli kosangisa bato ya mposo nyonso. Tótánga vɛrsɛ moko kati na bavɛrsɛ oyo etyami wana mpe, soki ntango epesi biso nzela, tóbimisa makanisi ya nimero mosusu ya molɔngɔ yango. Soki moto yango asepeli mpenza, tólakisa ye buku. Ntango tolingi kokenda, tokoki kobimisa motuna oyo: “Bopusi nini lingomba ya solo esengeli kozala na yango likoló na etamboli ya bandimi na yango?” Tóyokana na ye mpo na mokolo tokozonga koyanola na motuna yango.

6 Ntango tozongi lisusu mpo na kolimbola bopusi oyo lingomba ya solo esengeli kozala na yango likoló na bomoi ya bandimi na yango, tokoki kotuna boye:

◼ “Na makanisi na yo, lingomba esengeli kozala na bopusi likoló na etamboli ya bandimi na yango? [Tótika moto yango apesa eyano.] Yesu amonisi biso eloko oyo lingomba esengeli kotalelama na yango.” Tótánga Matai 7:17-20 mbala moko na nkasa 12 mpe 13 ya buku L’humanité à la recherche de Dieu. Na nsima, tósɛnga na moto yango ete atánga paragrafe 20 na nkasa 13 mpe 14. Soki ntango epesi biso nzela, tótalela paragrafe 25-29 na nkasa 16-18. Na yango, tokoki mbala mosusu kobanda boyekoli na mwa buku Azali kosɛnga, to na buku Boyebi.

7 Lolenge ya kobanda lisolo: Ezali na bisaleli mingi mpo na koteya kati na buku L’humanité à la recherche de Dieu, oyo ekoki kosalisa mpo na kobanda lisolo na bokutani ya liboso, to na bozongeli ya sika. Tokoki kobanda lisolo bobele na kotunáká motuna moko oyo mobongi mpenza. Na ndakisa, talá mwa mituna miponami mpe mitó na makambo oyo makanisi na yango tokozwa yango na bankasa oyo etyami:

“Des questions qui méritent une réponse” (Mituna oyo misɛngi biyano): nkasa 17-18

“Jésus était-il un mythe?” (Yesu azalaki bobele lisapo mpamba?): lokasa 237

“Qui a écrit la Bible?” (Nani akomaki Biblia?): lokasa 241

“Le Qurʼān et la Bible” (Koran mpe Biblia): lokasa 285

“Preuves de l’authenticité de la Bible” (Bilembetele ya bosolo ya Biblia): nkasa 340-341

“Les croyances des Témoins de Jéhovah” (Bindimeli ya Batatoli ya Yehova): nkasa 356-357

“Comment identifier la vraie religion” (Lolenge ya koyeba lingomba ya solo): lokasa 377

8 Tokoki kofungola na nkasa oyo eponami na buku L’humanité à la recherche de Dieu mpe kolimbola likanisi oyo etalelami. Na nsima tóyebisa mokolo oyo tokozonga na kotunáká motuna moko oyo moyokani na lisolo oyo tosololi, motuna oyo tokopesa eyano na mwa buku Azali kosɛnga to na buku Boyebi. Tóbosana te kobyanga moto yango na likita ya bato banso mpe kotikela ye lokasa ya libyangi.

9 Bato ya mitindo nyonso oyo bazali na motema malamu bazali koluka solo na ntina na Nzambe mpe na Klisto. Tokoki kosalisa bango na ntango tozali kosala mosala na biso ya kosakola. Yango wana, tókoba ‘kosala mosala mpe kobunda etumba mpo na bongo, zambi tosili kolikya epai na Nzambe na bomoi, ye oyo azali Mobikisi na bato ya mitindo nyonso.’​—1 Tim. 4:10.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto