“Kondima kati na liloba ya Nzambe”—liyangani ya etúká 1997
1 Ntoma Paulo akundwelaki Timoté ete “Makomami nyonso mapemami na elimo ya Nzambe.” (2 Tim. 3:16) Lokola Liloba ya Nzambe epemami, tozali na bantina nyonso ya komonisa kondima kati na yango. Na mbula oyo, liyangani ya etúká ekozala na motó na likambo ete: “Kondima kati na Liloba ya Nzambe.” Ezala toyebi solo esilá koleka mbula mingi to toyei na lisangá ya Yehova sika, manáka ekolendisa kondima na biso kati na Biblia. Mokomoko kati na biso asengeli komibongisa mpo na koyangana na liyangani mobimba. Ekozala likambo ya kolendisa ete bato oyo bauti komonisa bosepeli kala mingi te bázala wana elongo na biso, mingimingi baoyo toyekolaḱa na bango Biblia!
2 Liyangani ya mikolo misato: Mbula oyo, liyangani moko ya mikolo misato ebongisami mpo na bolamu na biso. Mosala na biso ya Bokonzi ya Febwáli 1997 ezali kopesa molɔngɔ́ ya mayangani 53 oyo ekosalama na Burundi, na Congo mpe na Zaïre. Na ntango oyo tokómi, osili koyeba liyangani oyo lisangá na bino ebyangami mpe boye ozali kokamata bibongiseli mpo na kozala wana mikolo nyonso misato. Osengaki loi (congé) ekoki epai na nkolo mosala na yo? Soki ozali na bana oyo bazali na kelasi, oyebisaki balakisi na bango na limemya nyonso ete bakozala te na eteyelo mokolo ya mitano mpe ya pɔ́sɔ mpo na likambo moko ya ntina etali kobongisama na bango na makambo ya losambo?—Det. 31:12.
3 Mokolo na mokolo, liyangani ekobanda na 9h30. Bikuke bikofungwama na 8h00. Bobele baoyo bazali na mosala ya kosala nde bakopesama ndingisa ya kokota liboso ya ngonga, kasi bakobomba bisika te liboso ete báfungola bikuke mpo na bato nyonso.—Filp. 2:4.
4 Ekozala malamu ete tótya likebi: Na ekeke ya liboso, ntoma Petelo akundwelaki baklisto ete bakosala malamu na kotya likebi na liloba ya esakweli lokola na mwinda oyo ezali kopela na esika ya molili. (2 Pet. 1:19) Ezali solo mpo na biso mpe. Lokola tozali kobika na mokili oyo etambwisami na Satana, tozali lokola na esika ya molili. Tozali na botɔ́ndi lokola tolongolami na molili ya elimo. (Kols. 1:13; 1 Pet. 2:9; 1 Yoa. 5:19) Mpo ete tótikala kati na pole, tosengeli kozala na kondima makasi kotyáká likebi na Liloba lipemami na Yehova. Ezali mpenza yango nde liyangani na biso ya etúká ya mbala oyo ekolendisa biso.
5 Soki tolingi mpenza kotya likebi na biso mobimba na liyangani, ekosengela na biso mbala mosusu kosala makasi, kasi tokopambolama kozanga ntembe soki tokosala yango. Tósala na boye ete tópema malamu, yango ekopesa biso nzela na kolanda na likebi nyonso biteni bikeseni ya manáka. Tóbongisa mokolo na mokolo ntango ekoki mpo na kokende na liyangani na lolenge boye ete tózwa esika liboso ete manáka mábanda. Mpe tósangana na loyembo ya ebandeli mpe tózwa litomba na libondeli. Mikóló basengeli kopesa ndakisa, mpe baboti basengeli kobongisa bana na bango mpo na yango.—Ef. 6:4.
6 Soki tozali kotala manáka ya masukúlu ya mokolo liboso, tokoki komeka kokanisa makambo oyo ntango mosusu makobimisama polele. Yango ekobakisa bosepeli na biso ntango makambo yango makolobama. Tokoki kozwa kozanga nkaká makambo oyo makosalisa biso na kolimbola na bato mosusu bantina oyo mpo na yango tozali na kondima epai na Nzambe mpe na elaka na ye ya solo ya kopesa mbano epai ya baoyo bazali koluka ye mpenzampenza. (Ebe. 11:1, 6) Tosengeli kokamata banɔ́ti ya mikuse ya makambo ya ntina ya liyangani. Soki tokozwa banɔ́ti mingi, tokoyoka makambo ya ntina malamu te, mpo ete tomipesi bobele na kokoma.
7 Na mobu moleki, tomonaki lisusu na boumeli ya manáka ebele ya mikóló mpe bana kotambolatambola na bilekelo, koyengayenga na libándá mpe kosolola na bato mosusu, na esika ya koyoka oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” abongisaki mpo na bolamu na biso. Yesu alakaki ete akopesa biso bilei na ntango ebongi. (Mat. 24:45-47) Na yango, tosengeli kozala wana mpo na kozwa litomba na bilei yango, kasi tózanga botɔ́ndi te. (2 Kol. 6:1) Ezali mpe komonana ete bana bazali kolɛmba mpe bazali kosɛnga kokende na kabinɛ mbala na mbala, kozwaka bongo ntango ya kotelema mpe ya kotambola. Koteyama ebongi oyo epesami na ndako ekopesa nzela na kopɛngola kokende na kabinɛ mbala na mbala mpe kolálalala na boumeli ya manáka. Mbala mingi, bilenge bafandaka esika moko na pembeni, kosolola, komimisana mpe kobwakenela maloba. Na mikolo na biso, bilenge na biso bazali kokutana na bopusi mabe mpe esengeli na bango kotya likebi na mateya oyo mapesameli bango, kozanga kosala eloko mosusu na boumeli ya manáka. Basengeli kobwaka bamposa ya bolenge oyo ezali na boyokani te na mitindá ya Biblia. (Talá 2 Timoté 2:22.) Likebi ya bato nyonso, mikolo mpe bana, ekosanzola Yehova mpe ekosepelisa ye.
8 Soki emonani malamu ete mosangani moko ya mosala ya koyamba bato apesa toli na moto moko mpo na likambo yango, esengeli kotalela yango lokola elembo ya bolingo euti na Yehova. (Gal. 6:1) Moto na moto asengeli komikundwela ete soki azali kosala makasi mpo na koyangana na liyangani, ezali mpo na “koyoka mpe koyekola.” (Det. 31:12) Mpe lisusu, “moto na mayele akoyoka mpe akofulikisa mayele.” (Mas. 1:5) Uta sikawa kino na liyangani, tósolola kati na libota mpo na ntina ya kofanda esika moko, ya kotikala na esika na biso na boumeli ya manáka mpe ya kotya likebi mpenza na mokano ya kozwela yango litomba.
9 Molato oyo mozali kosepelisa Yehova: Baoyo bazali kati na libota ya Yehova batalelami na mokili mobimba. (1 Kol. 4:9) Mingimingi, toyebani mpo na lolenge na biso malamu ya kolata mpe ya kokata nsuki. Mingi kati na baoyo bazali kosalela mitinda ya Biblia miyebisami na 1 Timoté 2:9, 10 mpe na 1 Petelo 3:3, 4 bamoni ete lolenge na bango ya kolata ebongwani na makambo nyonso mpe ekesani na ntango oyo babandaki kosangana na lisangá ya boklisto. Yango ezali kotya bokeseni mpenza na lolenge ya kolata mpe ya kokata nsuki ya mokili, oyo ezali sé kobeba lokola tozali komona yango. Tolingi kokeba ete tókokana na mokili te na kolatáká bilamba ya nyamunyamu, na kolendisáká mode na lolenge na biso ya kokata nsuki to na kozaláká na molato mozangi bopɔlɔ. Molato na biso mpe nsuki na biso ya ndakisa malamu esengeli kosalisa bato ya sika oyo bazali koyangana na liyangani ete báyeba lolenge nini molato ya baklisto esengeli kozala.
10 Na mayangani oyo masalamaki na mobu moleki, emonanaki ete molato ezalaki malamu mpenza, nzokande, mwa bandeko mibali mosusu mpe bandeko basi mosusu bazali naino na molato mpe nsuki oyo ekokani na mokili, mingimingi na ntango bazali kominanola. Ntango tozali komibongisa mpo na koyangana na liyangani tosengeli kotalela molato na biso mpe nsuki na biso. Baboti, bópona na mayele nyonso bilamba oyo bana na bino ya mike mpe bilenge bakolata. Tómindimisa ete tozali kopesa nzela te na elateli ya mokili to makambo oyo mazali kosepelisa mokili ete ezala na bopusi mabe likoló na molato na biso ya boklisto.
11 Tózala na etamboli malamu: Etamboli malamu ezali elembo ya baklisto ya solo. (1 Pet. 2:12) Ezala tozali wapi, na liyangani, na restorá, na lotele to na ntango tozali kobima, etamboli na biso ekoki kopesa litatoli malamu mpe kosalisa bato na komona makambo oyo kondima epai na Nzambe mpe na liloba na ye ekoki kobimisa. Yango ekoki komema bamoko na koluka koyeba Yehova. (Talá 1 Petelo 3:1, 2.) Tozali na libaku malamu ya kosanzola Yehova na etamboli na biso.
12 Bazali kokundwela biso ntango nyonso ete tósɛnzɛlaka etamboli ya bana na biso, tótika bango bango moko te to tótika bango te kokimakima mbangu bipai nyonso kati na lotele (to na esika oyo bapesi biso mpo na kolala), yango ezali kotya mobulu epai na bakiliya mosusu. Mbula na mbula la Société azali koyoka ete bana na biso mosusu bazali kotikama kozanga kokɛngɛlama. Atako liyangani ezali kopesa biso libaku ya komona bandeko na biso mpe kosangana na bango elongo, baboti basengeli te kobosana mokumba na bango ya kokɛngɛla bana na bango ntango nyonso. Ezali mokumba oyo Yehova apesi na tata mpe mama nyonso. (Mas. 1:8; Ef. 6:4) Makambo masalami na bana oyo bakɛngɛlami te makoki kobebisa lokumu malamu oyo Batatoli mosusu ya Yehova bamitongeli na milende makasi na bango.—Mas. 29:15.
13 Tózongisa mosolo oyo mobimisami mpo na liyangani: Biso nyonso tozali kobimisa mosolo mpo na koyangana na mayangani. Ezali na mosolo mosusu oyo mobimisami oyo mpo na yango tosengeli kokanisa malamu. Bisika oyo bisalelami mpo na mayangani bizali kosɛnga mosolo mingi mpenza. Ezali mpe na makambo mosusu mazali kosɛnga mosolo. Makabo ya bolingo malamu oyo bozali kopesa na boumeli ya mayangani mazali na motuya.—Mis. 20:35; 2 Kol. 9:7, 11, 13.
14 Bifandelo: Malako oyo mapesamaki uta bambula mingi mazali na ntina kino lelo: OKOKI KOKANGA BISIKA BOBELE MPO NA BASANGANI YA LIBOTA NA YO MPENZA MPE MPO NA MOTO MOSUSU OYO BOYAKI ELONGO NA YE. Ezali likambo ya esengo na komona ete, na bambula oyo euti koleka, bayangani mingi bazali kolanda etindá yango, yango ezali kokolisa elimo etondi na bolingo oyo ezali komonana kati na mayangani na biso. Na bisika mingi oyo mayangani mazali kosalema, ezali na mpasi te kokóma na bifandelo mosusu, nzokande ezali bongo te mpo na bifandelo nyonso. Bózala na limemya ya kotika bisika yango na baoyo ebongisamaki mpo na bango.
15 Bikangeli ya fɔtɔ́, kamera mpe manyetofone: Likoki ezali ya kosalela bikangeli ya fɔtɔ́ mpe bisaleli mosusu ya kokotisa maloba. Nzokande, tosengeli te kolongola likebi ya bayangani mosusu na kosaleláká bisaleli yango. Tosengeli te kotambola na ntango ya manáka mpo na kokanga fɔtɔ́, mpamba te tokoki kobenda likebi ya basusu oyo bazali kosala makasi mpo na koyoka. Ata esaleli moko te ya kokotisa maloba, ezala ya lolenge nini, esengeli kotyama na singa ya lotiliki to na myango ya bikoliseli lolaka ya liyangani, to kotya nkaka na bilekelo to na couloir to kopekisa bayangani mosusu komona.
16 Mwa lisungi ya nkisi: Departemá ya mwa lisungi ya nkisi ezali bobele mpo na lisungi ya nokinoki. Ezali na likoki te ya kopesa lisungi mpo na bato oyo bazali na maladi esilá koumela. Na yango osengeli kokanisa liboso na lisalisi oyo nzoto na yo ezali kosɛnga mpe oyo ya libota na yo. Memá aspirine na yo, nkisi na yo ya kopɔtɔ bilei na libumu (digestion), bankisi na yo ya mpota, bipɛngɛlɛ ya bilɛzi na yo mpe biloko mosusu ya lolenge yango oyo ezalaka na liyangani te. Baoyo nyonso bazali na mikakatano ya motema, oyo bakoki kokóma na mokakatano mobengami choc insulinique, mpe bongo na bongo, basengeli na lolenge nyonso kokamata bibongiseli. Basengeli kozala na bankisi oyo bazali na yango mposa, mpe mosangani moko ya libota na bango to mosangani moko ya lisangá oyo ayebi mokakatano na bango asengeli kozala ntango nyonso pene na bango mpo na kosalisa bango soki mposa emonani. Esilaki kokóma na mayangani ete baoyo bazali na bokɔnɔ oyo eumelá mpe batikami bango moko, bokɔnɔ ekomaki makasi, mpe yango ememaki mikakatano. Biro ya bakambi esengisamaki ete ebenga minganga nokinoki mpo na kokotisa bango na lopitalo. Soki moto moko azali na mposa ya lisalisi ya nkisi mpe ata mosangani moko te ya libota na ye azali kosalisa ye, esengeli koyebisa bankulutu ya lisangá na ye likambo yango mpe bango bakozwa bibongiseli bibongi mpo na kosunga ye. Bisika ya sipesiale bikolengelama te mpo na baoyo bakweaka na bampasi (allergie).
17 Bilei: Kolongolama ya departemá ya bilei ezali kopesa nzela na kotya likebi mozindo na bilei ya elimo na boumeli ya manáka. Tozwaki nkomá mingi ya matɔ́ndi mpo na lolenge likambo yango liyeisami pɛ́pɛ́lɛ́. Moto na moto akobongisa bilei ya malamu oyo ebongi komemama mpo na bopemi ya midi. Tokokota te na bisika ya mayangani na milangi to na masanga ya makasi. Bikwokolo ya ngalasi bisengeli kozala mike mpenza mpo ete bíkoka kokota na nsé ya efandelo na yo. Emonanaki ete bayangani bazali kolya na ntango manáka mazali kosalama. Ezali elembo ya kozanga limemya. Na mayangani mosusu, na kati ya esika ya liyangani to na libanda, bazalaki koteka biloko ya kolya, mpe emonanaki ete bandeko bazalaki kokende kosomba biloko na ntango manáka ezali kosalama. Yango ebongi te.
18 Tozali kosepela mingi na elambo na biso ya elimo mpe ezalela ya esengo mpe ya kimya ya bondeko na boumeli ya bopemi ya midi. Na boyokani na mokano ya ebongiseli oyo, memá bilei na yo moko, na esika ya kotika bisika mpo na kokenda kosomba bilei. Bokozala na ntango mingi mpo na kosepela na boninga ya bandeko mibali mpe basi.
19 Tozali na esengo mingi ntango tozali kokanisa liyangani ya etúká “Kondima kati na liloba ya Nzambe” oyo esili kobelema! Tolingi biso nyonso komindimisa ete tokamataki bibongiseli mpo na koyangana na manáka mobimba, mpe kozwa litomba na bilei kitoko ya elimo oyo Yehova abongisi mpo na biso na nzela ya lisangá na ye. Yango ekopesa biso nzela na “koselingwa mpo na misala nyonso malamu” na mikolo mizali koya.—2 Tim. 3:17.
[Etanda na lokasa 6]
Liyangani ya etúká—Makambo ya ntina
Batisimo: Bakandidá ya batisimo bakofanda na bisika oyo bibongisami mpo na bango liboso ete manáka ya mokolo ya pɔ́sɔ na ntɔ́ngɔ́ ebanda. Kandidá mokomoko akomema elamba na ye ya kosukolela oyo ebongi mpenza mpe esumé na ye. Na mikolo mileki, bamoko balataki bilamba bibongi te mpe oyo ezali kokitisa lokumu ya molulu. Bankulutu oyo bakotalela mituna mizwami kati na búku Lisangá elongo na bakandidá ya batisimo bakondimisama ete mokomoko na bango azali kokanga ntina molamu na likambo yango. Nsima wana molobi akosilisa kosala lisikúlu ya batisimo mpe libondeli, prezidá ya manáka akoyembisa loyembo. Nsima ya molɔngɔ́ ya nsuka, basangani ya mosala ya boyambi-bato bakokamba bakandidá ya batisimo na esika bakozwa batisimo. Batisimo ezali elembo ya komipesa ezali likambo ya moto ye moko na Yehova. Epesami nzela te na kopesa “batisimo ya etuluku” ya bakandidá mibale to koleka oyo bakosimbana na maboko moko na mosusu to bakosimbana na maboko na ntango ya kozindisama na mai.
Bilembo: Bólata bilembo ya 1997 ezala na esika ya liyangani to mpe na nzela na ntango ya koya na liyangani mpe na ntango ya kozonga na ndako. Yango epesaka mbala mingi nzela na kopesa litatoli ya malamu. Bokozwa bilembo mpe bityeli na yango na nzela ya lisangá na bino, mpamba te ekozala na liyangani te. Kozela te mwa mikolo pene na liyangani mpo na kosɛnga bilembo mpo na yo mpe libota na yo. Kobosana te komema kalati na yo “Instructions médicales — Pas de sang.”
Bisika ya kolala: Tozali kosɛnga na bino banso ete bósalana elongo na kosaleláká BOBELE liste ya bisika ya kolala oyo epesami na Biro ya liyangani. Soki bandeko oyo bafandi na esika liyangani ezali bayambi biso epai na bango, tokobebisa boyambi na bango te na kotikaláká ntango molai nsima ya liyangani. Ata na ntango ya liyangani, moto moko te akokanisa ete baoyo bayambi biso nde bakoleisa biso. Bamoko bazali na makoki te ya kosala yango. Tómibongisa uta sikawa mpo ete tókoka komema bilei oyo tokokoka kolya na boumeli ya liyangani. Mokomeli ya lisangá akotala ete bademande ya ndako ya kolala etindama noki na adresi ya liyangani epai babyangami. Soki esengisami na bino kolongola nkombo mpo na esika ya kolala, yebisá yango noki liboso epai na moyambi to na lotele mpe na departemá ya bisika ya kolala ya liyangani, mpo ete ndako ekoka kopesama na moto mosusu.
Pusupusu ya bana mpe kiti oyo ekoki kongumbama: Na bisika mingi, epekisami komema pusupusu ya bana na mayangani ya bato nyonso. Mitindá mpo na libateli mipesi nzela te kotika yango na couloir, na bilekelo to katikati na bifandelo. Lokola bato bakozala mingi, yango ekoki kopesa nkaká, pusupusu ya bana ekoki kozala likama mpo na elɛzi mpe mpo na moto oyo akoki kotutana na yango. Komema yango na esika ya liyangani te. Kasi, bakiti ya bilɛzi to bakiti ya bana epesameli nzela, mpamba te baboti bakoki kotya yango na efandelo moko pene na bango. Bómema mpe bakiti oyo ekoki kongumbama te. Ekoki kozala likámá mpe epesameli nzela te kosalela yango na mayangani minene. Na makambo oyo mibale kosalana elongo ezali na ntina mpe na motuya.
Departemá ya basáli ya bolingo malamu: Okoki kopesa mwa ntango na boumeli ya liyangani mpo na kopesa maboko na moko ya misala? Tokoki kozala na ntina mingi mpe kozwa bosepeli mingi soki tozali kosalela bandeko na biso, ata bobele mpo na mwa bangonga. Soki okoki kopesa lisungi na yo omimonisa na departemá ya basáli ya bolingo malamu na liyangani. Bana oyo bazali na mbula na nsé ya 16 bakoki mpe kopesa maboko na bango na lolenge ya malamu mpenza na kosaláká na litamwisi ya batata na bango, ya bamama na bango to ya mikolo mosusu.
Makebisi: Tózala pene na kososola makámá oyo makoki kobima mpo na kopɛngola mikakatano mizangi ntina. Mbala mingi, baoyo bazali na bisika na bango ya momeseno te bazwamaka na miyibi mpe na bato mosusu ya mabe. Bómindimisa ntango nyonso ete bizipelo ya vuatire na bino bikangami na fungola mpe kotika ata eloko moko te ezala ya ndenge nini oyo ezali kobenda likebi ya bato. Miyibi mpe bato ya maboko milai babendamaka na mayangani minene. Ekozala mpe likambo ya mayele te kotika eloko moko ya motuya na esika na yo ya kofanda. Okoki komindimisa te ete baoyo nyonso bafandi zingazinga na yo bazali baklisto. Mpo na nini kotya moto na komekama? Tozwaki mpe balapólo oyo ezali komonisa ete bato oyo bayebanaki te balukaki kobenda bana libanda. KOTIKA BANA MOSIKA NA YO TE.
Esengeli mpe kosɛnzɛla ete makámá mápɛngolama. Na mikolo mileki, bandeko bawelelaki kokota na mituka to bwatu kozanga kotala soki ekokoka. Ebimisaki makámá minene. Lokola bomoi ezali bulɛɛ, tolingi kosala angɛlɛ mpo na kopɛngola komema nyongo ya makila. Ntango tozali kokatisa nzela, esengeli na biso kotala soki motuka ezali te oyo ekoki kotuta biso to bana na biso.
Liyangani ya liboso ya etúká “Kondima kati na Liloba ya Nzambe” ekobanda na mwa 11 Yulí 1997. Tozali kobondela Yehova na motema mobimba ete apambola milende na biso oyo tozali kosala mpo na koyangana na molɔngɔ́ ya mayangani yango ya etúká mpe koleisama na biloko kitoko na mesa na ye.