‘Bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe’—Liyangani ya etúká 1996
1 Ntembe ezali te ete liyangani ya etúká na mbula oyo likosunga biso ete tóbatela kimya ya Nzambe, mpe likomonisa mosala na biso motali kosunga bazalani ete bázwa mpe kimya yango. Lokola Mosala na biso ya Bokonzi ya Febwáli 1996 eyebisaki yango, liyangani oyo likozala na motó ya likambo “Bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe.” Osili komibongisa mpo ete ozanga eloko moko te?
2 Liyangani ya mikolo misato: Tondimisami ete okosepela mpenza na liyangani ya mbula oyo mpe ete okozonga epai na yo na molende moko ya sika. (2 Nta. 7:10) Mbula oyo, liyangani likoumela mpe mikolo misato. Osili kosɛnga loi mpo ete ozala wana na boumeli ya mikolo nyonso misato? Soki ozali na bana oyo bazali na kelasi, osili koyebisa na limemya nyonso na balakisi na bango ete bakozala te na kelasi mokolo ya mitano mpo na libaku ya molulu moko ya ntina motali kobongisama na bango ya elimo?
3 Mosala na biso ya Bokonzi ya Febwáli 1996 epesaki badati mpe bisika nyonso oyo mayangani yango makosalema kati na teritware na biso. Mokomeli ya lisangá na bino asili koyebisa bino liyangani oyo bino bobyangami na yango.
4 Liyangani likobanda mikolo nyonso na 9 h 30, mpe likosuka pene na 16 h na mokolo ya lomingo. Bizibɛli bikofungwama na 8 h. Bobele baoyo bazali na mosala moko ya sikisiki nde bakopesamela nzela ya kokɔta liboso mpenza, kasi bakopesamela nzela te ya kokanga bisika liboso ete bisika bífungwama mpo na bato nyonso. Tokomonisa bonkonde epai na bandeko na biso mibange mpe bibɔ́sɔ́nɔ́ na kotikeláká bango bifandelo na bisika ya malamu mpe bibongi mpo na bango? Kobosana te ete “bolingo elukaka malamu na yango mpenza te.”—1 Kol. 13:4, 5; Filp. 2:4.
5 Tokopɛlisama? Nsima ya kotánga Masese 27:17, “Ebende ekopɛlisama na ebende mosusu,” Mosenzeli ya 15 Augústo 1993, na lokasa 8, na nsé ya motó ya likambo moke “Lolenge nini baklisto bazali ‘kopɛlisana,” paragrafe 1 elobaki ete: “Tozali lokola bisaleli oyo bizali ntango nyonso na mposa ya kopɛlisama. Mpo ete komonisa bolingo mpo na Yehova mpe kozwa bikateli bitongami likoló na kondima na biso esɛngi kokesana na mokili, tosengeli kolanda komikesenisa na bato mingi.” Lolenge nini tokoki kosalela toli yango?
6 Tokesani na mokili mpe tosengeli kotikala bobele bongo. Tosengeli kolanda ntango nyonso mikano na biso soki tolingi kozala na molende mpo na misala malamu. (Tito 2:14) Na ntina yango nde lisoló ya Mosenzeli oyo etángamaki likoló elobaki ete: “Ntango tozali elongo na baoyo balingi Yehova, tozali kopɛlisana—tozali kopesana simbisi mpo na kolingana mpe na kosaláká misala malamu.” Liyangani ya etúká ezali moko ya bibongiseli oyo Yehova azali kokamata mpo na kosunga biso ete tópɛlisa elimo na biso. Tosengeli te komipesa nzela ete tózanga ata eteni moko.
7 Tómimonisa bato ya mayele na koyokameláká: Koyokamela ezali momeseno oyo tosengeli kolóna. Balobaka ete moto ya mwayene akangaka bobele pene na katikati ya makambo oyo ayoki, ezala ata likebi ya ndenge nini oyo ayokamelaki na yango. Lelo oyo, likebi etyami mingi na kominanola; na yango ekoki kokómela biso ete tózala na mokakatano ya kotya likebi ntango molai. Tokoki komeka kobongisa likoki na biso ya kotya likebi, mingimingi ntango tofandi kati na bato ebele mpo na koyokamela moto moko oyo azali koloba? Soki, ntango ya bozongi na yo na ndako, basɛngi na yo ete oloba na mokuse makambo oyo malekaki mokolo moko na moko ya liyangani, okozala na likoki ya kosala yango? Ndenge nini biso banso tokoki kobongisa likoki na biso ya koyokamela, na lolenge ya kotya likebi makasi na eteni moko na moko elobelami na liyangani?
8 Ezali likambo ya ntina ete tómonisa bosepeli mozindo, soki bongo te tokosalela mpe te likabo oyo liuti na Nzambe: bɔɔngɔ́. Na ndakisa, na meko oyo tozali kosepela mingi na lisoló moko, ekozala mpe pɛtɛɛ mpo ete tómikundola makanisi ya ntina ya lisukúlu moko to eteni moko ya manáka. Nzokande, yango etaleli mingimingi likebi mozindo oyo totyaka na makambo oyo tozali na libaku malamu ya koyoka yango na mayangani ya etúká. Ezalela na biso ya elimo mpe bilikya na biso ya mikolo mizali koya etaleli bosepeli mpe likebi oyo tozalaka na yango na eteni moko na moko ya liyangani. Na mayangani, bateyaka biso banzela ya Yehova, mpe tozwaka malako matali lolenge ya kokokisa mosala moko ya lobiko. (1 Tim. 4:16) Kanisá ete ozali masuwa oyo ezwami kati na mai monene oyo etɔmboki na mopɛpɛ makasi. Bilaka ya Yehova bizali lokola lóngo makasi ya elikya. Soki moto moko atyaka likebi te na ntango ya mayangani ya boklisto mpe atikaka elimo na ye koyengayenga, mbala mosusu akosimba te batoli to mateya oyo makanisi na yango ya ntina makokaki kobatela ye ete azinda te na elimo.—Ebe. 2:1; 6:19.
9 Na bisika mingi na mokili, bandeko na biso bazali kosala milende mingi mpo na koyangana na makita. Ezali mpenza likambo ya kosimba motema na komona likebi makasi oyo bango batyaka na ntango ya mayangani. Nzokande, bipai mosusu, basusu bazalaki kopɛngwisa likebi ya bayangani, kotambola pambapamba na bisika ya liyangani na ntango masukulu mazali kosalema. Basusu bakómaka nsima ya ngonga. Na ntango ya mayangani mosusu, ezalaki mpasi mpo na koyoka makambo oyo mazalaki kolobama na miniti ya liboso ya manáka, pamba te bato mingi bazalaki kolekaleka na banzela mpe na nsima ya bafandi. Ezali mpenza te bandeko oyo bazali kosala na bolingo malamu na departemá moko, to mpe bamama oyo bazali kobɔndela bana na bango. Mingimingi, mobulu eutaka na bato oyo bazali bobele kobɛta masoló. Na mbula oyo, bandeko oyo basalaka na departemá ya koyamba bato bakotya likebi mingi na likambo yango, mpe tozali na elikya ete ntango prezidá ya liyangani akosɛnga na bayangani ete báfanda, moko na moko akozwa esika na ye. Tokozala na botɔ́ndi mingi epai na bino soki bokozala na botosi kati na likambo yango.
10 Batoli nini ebongi ekosunga biso ete tótya likebi makasi na liyangani mpe kosimba malamu koleka makanisi oyo makolobelama? Makambo oyo tolobelaki na bambula eleki mazali ntango nyonso na ntina: (a) Sosolá na mozindo ntina mpenza oyo oyelaki na engumba oyo liyangani lizali kosalema. Ezali mpo na kominanola te, kasi mpo na koyokamela mpe koyekola. (Det. 31:12) Sala na boye ete olala malamu na butu moko na moko. Soki olɛmbi mingi na ntango oyei na liyangani, okozala na mokakatano ya kotya likebi. (b) Kómá na ngonga malamu mpenza mpo na kozwa ntango ya kotya motuka na yo na esika esengeli mpe kozwa esika ya kofanda liboso ya ebandeli ya manáka. Soki okopɔta mbangu mpo na kofanda pene na ngonga ya kobanda, ekoki mpenza kokwela ete ozanga koyoka ebandeli ya manáka. (c) Zwá banɔ́ti na mokuse ya makanisi ya ntina. Soki ozali kozwa banɔ́ti mingi, yango ekopekisa yo ete oyokamela na likebi nyonso. Na ntango ozali kokoma, omindimisa ete ozali te kozanga makanisi mosusu pamba te ozali komipesa mingi na banɔ́ti na yo. (d) Soki eteni moko ya liyangani eyebisami, zalá pene ya koyokamela yango na likebi nyonso. Omituna: ‘Nakoyekola nini na eteni oyo mpo na kokólisa botɔ́ndi na ngai mpe bolingo na ngai mpo na Yehova? Lolenge nini makambo yango makoki kosunga ngai ete namonisa mpenza bomoto ya sika? Lolenge nini yango ekosunga ngai mpo na kobongisa mosala na ngai ya kosakola?’
11 Etamboli oyo ezali kokembisa mosala na biso: Paulo alendisaki Tito ete azala “ndakisa na misala kitoko.” Na komonisáká bosembo na mateya na ye, Tito akokaki kosunga basusu ete “bákembisa mateya na Nzambe Mobikisi na biso, kati na makambo nyonso.” (Tito 2:7, 10) Mbula na mbula, tozwaka makundweli ya boboto oyo mazali komonisa biso mpo na nini ezali ntina ete tózala na etamboli ebongi na mokano ya Nzambe na nzela ntango tozali kokenda na liyangani, na bisika oyo bayambi biso lokola bapaya, bakisá mpe na bisika ya liyangani.
12 Moyangeli ya ɔtɛ́lɛ moko alobaki: “Ezalaka ntango nyonso esengo ya komona Batatoli ya Yehova pamba te bazalaka motema pɛtɛɛ, basalaka na bomoko mpe basɛnzɛlaka bana na bango.” Moyambi-bato na ɔtɛ́lɛ moko alobaki ete mosala na ye “ekómaka pɛtɛɛ mpenza ntango Batatoli bakomisaka nkombo wana bakómi to ntango babimaka na ɔtɛ́lɛ, pamba te, ata soki esengeli na bango ete básala molɔngɔ́, bazalaka ntango nyonso na bonkonde, motema pɛtɛɛ mpe bamityaka na esika ya basusu.” Na etúka Nouvelle-Angleterre, na mokili ya États-Unis, mwasi moko akamwaki mingi na etamboli ya bilenge Batatoli oyo bazalaki na ɔtɛ́lɛ moko ya nzela elongo na ye; na yango asɛngaki kozwa mikanda oyo mizali kolobela lisangá na biso.
13 Nzokande, ezali na makambo mosusu oyo tosengeli naino kobongisa. Tolingi koyebisa bino mwa makambo oyo bato mosusu bamonaki mpe batindaki nkomá mpo na yango epai ya la Société. Mokɛngɛli motamboli moko ayebisaki biso ete bana ya Batatoli ya Yehova basengeli lisusu kosɛnzɛlama malamu. Bamonaka bango bapotaka na bakulware mpe kosala makɛlɛlɛ mingi. Esengeli tólimbwela bana na biso ete etamboli na biso ya boklisto esukaka te na bangonga mosusu ya mokolo. Esukaka te ntango totiki bisika ya liyangani. Tozali baklisto butu mpe moi. Etamboli na biso na ndako mpe na balabála esengeli mpe kozala na lokumu wana tofandi elongo na bandeko na biso na boumeli ya liyangani, kozwáká mateya mauti na Yehova.—Yis. 54:13; 1 Pet. 2:12.
14 Atako departemá ya bilei ezali lisusu te na mayangani, mosolo mingi mozali kobimisama mpo na kofutela bisika, kobongisa bisika ya kotya mituka mpe kosomba biloko mingi. Makabo na biso ya bolingo malamu mapesaka nzela na kozongisa mosolo yango. Ndeko mwasi moko oyo bana na ye bazali naino bilenge ayaki na liyangani na mwa mosolo moke. Nzokande, ye ná bana na ye bapesaki mwa lisungi na kotyáká mwa likabo na bango moke kati na sanduku. Oyo moko na moko azwi ekateli ya kosala na likambo yango etaleli bobele moto ye moko, kasi toyebi ete bozali kososola makundweli yango.—Mis. 20:35; 2 Kol. 9:7.
15 Toyebani na lolenge na biso ya kolata: Lolenge na biso ya kolata ezali na ntina mingi mpo na biso mpe mpo na mayoki na biso epai na basusu. Bilenge mingi mpe bakólo ebele bazalaka esika moko na eteyelo to na esika ya mosala na bato mingi oyo balataka bilamba ya midɛ́lɛ ya sika mpe ezangi mpenza kiló. Mbula na mbula midɛ́lɛ ya kolata mizali kokóma mobulu, kutu kozokisa mitema. Soki tokebi na yango te, tokoki mpenza kopusama na bato ya mokili oyo bazali zingazinga na biso, mpe kolata lokola bango. Midɛ́lɛ mingi ya bilamba mibongi te mpo na makita ya losambo. Nsima ya moko ya mayangani oyo masalemaki na mbula eleki, tozwaki nkomá ya botɔ́ndi, kasi oyo ebakisaki ete: “Namitunaki mpenza mpo na nini bilenge basi mingi balataki barobɛ mikuse, bilamba oyo bizali kotika mokɔngɔ polele mpe oyo bizali komonisa bibɛlɔ.” Ntembe ezali te ete tolingaka biso banso kolata na lolenge lobongi na baministre baklisto, ezala na liyangani to na ntango ya kominanola nsima na yango. Ezali malamu ete tómanyola ntango nyonso toli ya ntoma Paulo ya komilatisa na “lolenge na bopɔlɔ mpe na makanisi malamu.”—1 Tim. 2:9.
16 Nani asengeli komonisa lolenge ya molato “molongobani” mpe ya bopɔlɔ? Kozala moto ya bopɔlo elimboli “komimona te ete oleki bato nyonso, komipekisa na makambo mosusu.” Diksionere elimboli lisusu moto ya bopɔlɔ lokola “moto oyo alingaka kobenda likebi te likoló na ye.” Ezala la Société, ezala bankulutu, basengeli te kotya mibeko na makambo matali molato to ekateli ya nsuki. Kasi, moklisto oyo elateli na ye ezangi bopɔlɔ to elongobani te, asengeli komitalela te? (Talá Bafilipi 1:10.) Bilamba na biso mpe ekateli na biso ya nsuki esengeli te kobenda likebi mingi koleka. Lolenge na biso esengeli komonana malamu, kasi kokokana te na mokili to kozokisa bato. Lokola tozali baministre ya nsango malamu, tokopesa lokumu na Yehova mpe tokomonisa ete ebongiseli na ye ezali malamu na kozaláká na molato mpe na ekateli ya nsuki oyo elongobani na boumeli ya eleko oyo tozali na engumba ya liyangani ya etúká. Na yango, baboti bakopesa ndakisa mpe bakomindimisa ete bana na bango balati na lolenge lobongi mpo na molulu yango. Bankulutu basengeli kopesa ndakisa malamu mpe basengeli kozala pene mpo na kopesa toli na boboto nyonso soki esengeli.
17 Kamerá, kameskɔpe mpe manyɛtofɔnɛ: Bakamerá mpe bisaleli mosusu ya kokanga bilili mpe kokɔtisa mingongo bikoki kosalelama, kasi tózala na limemya mpo na bayangani mosusu. Soki tozali kotambolatambola mpo na kokanga bafɔtɔ́ ntango masukulu mazali kosalema, tokobulunganisa te bobele basusu oyo bazali kosala milende ya koyokamela, kasi biso moko mpe tokozanga eteni mosusu ya liyangani. Mingimingi, tozwaka matomba koleka na makambo oyo malobami na kotyáká likebi makasi na balobi mpe na kozwáká banɔ́ti ya mikuse. Mbala mosusu tokokɔtisa na bandɛ makambo malekaki na liyangani mpo na ndeko mwasi to ndeko mobali oyo atikali na mpasi na ndako; nzokande, soki ezali bobele mpo na biso moko, ntembe ezali te ete ntango tokozonga na ndako tokomona ete nsima ya kolekisa bangonga mingi na kokɔtisáká na bandɛ makambo mazali koleka na liyangani, tokozwa ata ntango te ya koyokamela to kotala makambo oyo tokɔtisaki. Esaleli moko te ya kokɔtisa makambo na bandɛ, ezala ya lolenge nini, esengeli te kokangisama na bansinga ya lontiliki to na bansinga ya bikóliseli lolaka ya liyangani, to mpe kopesa mobulu na banzela, na bakulware to kopekisa bayangani ete bámona te.
18 Bisika ya kofanda: Tozali komona ete mbongwana malamu ezali kokɔta na oyo etali kokanga bisika ya kofanda. Na mbula eleki, bayangani mingi balandaki etindá oyo: ESENGELI KOKANGA BISIKA BOBELE MPO NA LIBOTA NA YO MOKO MPE MPO NA BAOYO OYAKI NA BANGO ELONGO. Lokola bato mingi basalaki bongo, bomiyoki mbala mosusu ete bozalaki malamu mpenza. Oyo eleki ntina lisusu, botosi na bino esepelisi Yehova mpe “moombo ya sembo,” oyo azali kopesa bilei ya elimo.—Mat. 24:45.
19 Bandeko mingi bazali na makɔnɔ oyo mazali kosɛnga likebi mingi. Basusu bayaka na liyangani na kiti ya kotambwisa mpe bazali na mposa ete básungama na basangani ya mabota na bango. Basusu bazali naino kozwa lisalisi ya minganga mpo na makɔnɔ oyo maumela, na ndakisa, mikakatano ya mpasi ya motema. Ezali mpenza likambo ya kosepelisa komona bandeko yango basi mpe mibali oyo tolingaka ete bázala wana na liyangani, bazwi ekateli ya kozanga eloko moko te na bilei ya elimo. Nzokande, emonanaki ete bato mosusu bakweyaki na mpasi na liyangani, kasi mosangani moko te ya libota to ya lisangá na bango azalaki wana mpo na kosunga bango. Na mabaku mosusu, batambwisi ya liyangani nde babéngaki minganga ete bámema mbangumbangu ndeko mwasi to ndeko mobali moko na lopitalo. Mokumba ya kosɛnzɛla likoló na baoyo bazali na bokɔnɔ moko oyo eumeli etaleli libosoliboso basangani ya mabota na bango mpe biboto na bango ya pene. Ebongiseli ya liyangani mpo na kosunga mwa moke babɛli ezali na likoki te ya kosalisa makɔnɔ oyo maumela. Soki mosangani moko ya libota na bino azali na mposa ya lisungi moko ya sikisiki, bosɛnzɛla ete atikala ye moko te, na ntango oyo mpasi ya mbalakaka ekoki kozwa ye. Lisusu, bisika bikolɛngɛlama te na liyangani mpo na bato oyo bazali na mikakatano ya kolɔngɔ́nɔ́ oyo ezali kopekisa bango ete báfanda na bisika ya bato nyonso. Bankulutu basengeli kotya likebi likoló na baoyo nyonso, kati na masangá na bango, bazali na bosɛnga ya lisalisi ya sikisiki mpe bakosɛnzɛla ete bibongiseli ya malamu mpenza bikamatama libela mpo na kosunga bango.
20 Bilei: Lokola toyekolaki yango na Mosala na biso ya Bokonzi ya Apríli, departemá ya bilei ekozala te na liyangani oyo ya etúká, ekozala mpe te na mayangani ya zongazonga mpe mayangani ya mokolo moko oyo makolanda. Ebongiseli yango ya sika ebimisi bakomantɛrɛ mingi ya malamu likoló na matomba oyo makomonana soki moto na moto ayei na bilei na ye. Ndeko mobali moko akomaki ete: “Nazali komona kati na yango litomba moko monene ya elimo. Ntango nyonso wana mpe nguya wana ekoki sikawa kopesama na makambo ya elimo. Nasili naino koyoka komantɛrɛ moko te ya mabe.” Ndeko mwasi moko alobaki ete: “Bandeko ya bolingo, na ndakisa yango bozali kolendisa moklisto moko na moko ete amitalela mpe atala lolenge nini akoki kosala mbongwana na bomoi na ye mpe kokólisa mosala na ye ya Teokrasi.” Mokɛngɛli motamboli moko akomaki na ntina na departemá ya kala ya bilei: “Na ebongiseli oyo eleki, bandeko mingi bazalaki kozanga kolanda liyangani mobimba.” Kolobáká na ntina na bilei oyo bandeko basombaki, nkulutu moko akomaki boye: “Bazwaki mpenzampenza oyo bango balingaki kozanga kosala molɔngɔ́.” Na nsuka, ndeko mwasi mosusu akomaki ete: “Na bopemi to na nsuka ya mokolo, bato nyonso bazalaki na kimya, na boboto mpe na esengo.” Ya solo, moto na moto akoki komema bilei bikoki na kolya mpo na kozala makasi na nsima ya nzánga. Mingi balobaki ete bakómi na ntango mingi mpo na kotala baninga na bango.
21 Na mayangani ya etúká ya mbula oyo, departemá ya bilei ekozala te. Bokoki kotalela na boumeli ya mwa miniti libakema ya Mosala ya Bokonzi ya Apríli 1996, na paragrafe 8 mpe na nsuka ya lisoló, esika oyo makanisi mapesamaki ete ezali malamu komema bilei ya pɛ́pɛ́lɛ́ na liyangani. Bómikundola ete ebongi te koya na bikwokolo ya minene ya ngalasi to na masanga makasi (bière, vinyo mpe bongo na bongo). Soki ozali na mposa ya mwa ekwokolo moke ya ngalasi, esengeli kokoka kotyama na nsé ya efandeli na yo. Bóbosana te ete bozali na ntango mingi na bopemi ya midi mpo na kolya mpe komɛla biloko bolɛngɛlaki. Lolenge moko na makita na Ndako ya Bokonzi, tokolya soko moke te na ntango masukulu mazali kosalema. Na bongo, tokomonisa limemya na biso mpo na bibongiseli oyo bikamatami mpo na losambo mpe mpo na bilei ya elimo oyo tozali kozwa.
22 Mayangani ya etúká “Bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe” masili kobanda na mikili misusu. Osili kokamata bibongiseli nyonso bisengeli mpo na koyangana na oyo ya bino, mpe ozali sikawa pene mpo na kozwa matomba na mikolo yango misato ya boninga malamu na boumeli na yango tokozwa makambo ya kitoko na elimo? Tozali kobɔndela na motema mobimba Yehova mpo ete apambola milende na bino mpo na kozala wana na liyangani na mbula oyo.
[Etanda na lokasa 6]
Liyangani ya etúká—Makambo ya ntina
Batisimo: Baoyo balingi kozwa batisimo bakofanda na bisika oyo bibongisami mpo na bango liboso ete liyangani libanda na mokolo ya pɔ́sɔ na ntɔ́ngɔ́. Emonanaki ete basusu balataki bilamba oyo bibongi te mpe yango ezali kolongola kiló na molulu ya batisimo. Kandidá moko na moko akoya na elamba ebongi mpo na kokɔta na yango na mai, mpe na epangwiseli to esumɛ́. Bankulutu oyo bakotalela mituna mizwami kati na búku Lisanga na baoyo balingi kozwa batisimo bakolimbola malamumalamu na mokomoko na bango makambo yango nyonso. Nsima wana molobi akosala lisukúlu ya batisimo mpe libɔndeli, prezidá ya eleko yango akopesa mwa malako mpo na bakandidá, na nsima akoyembisa loyembo. Nsima ya loyembo, basáli na departemá ya koyamba bato bakokamba bakandidá kino esika ya kobatisama. Lokola batisimo ezali elembo ya komipesa mpe ezali likambo litaleli bobele moto ye moko mpe Yehova, ebongisami te mpo na “kobatisa na bituluku” bato mibale to koleka oyo bakosimbana na mabɔkɔ moko na mosusu na ntango ya libatisi.
Bilembo: Bólata bilembo na bino ya liyangani 1996 na esika ya liyangani mpe na banzela ya kokenda mpe kozonga. Mbala mingi yango epesaka litatoli malamu. Bokozwa bilembo yango na lisangá na bino, pamba te bikozala te na esika ya liyangani. Kozela te bobele mwa mikolo liboso ya liyangani mpo na kosɛnga bilembo mpo na yo mpe libota na yo. Bóbosana te kozala na bakálati na bino “Instructions médicales — Pas de sang.”
Basáli ya bolingo malamu: Sikawa lokola departemá ya bilei ezali lisusu te, bandeko mingi oyo bazalaki basáli ya bolingo malamu na departemá yango bakolinga mbala mosusu kopesa mabɔkɔ na badepartemá mosusu. Okosepela kobomba mwa ntango na yo na boumeli ya liyangani mpo na kopesa lisungi na yo kati na moko ya badepartemá yango? Tokoki kozala na ntina mpe kosepela mingi soki tozali kosalela bandeko na biso, ata na boumeli ya mwa bangonga. Soki okoki kopesa lisungi na yo, kendá komimonisa na departemá ya basáli ya bolingo malamu na liyangani. Bana oyo bazali na mibu na nsé ya 16 bakoki mpe kosala oyo ekoki na bango na lolenge kitoko na kosaláká na litambwisi ya batata na bango, bamama na bango to na mokólo moko motambwisi.
Likebisi: Tózala pene ya kotalela makambo oyo makoki kobima mpo na kopɛngola mikakatano mizangi ntina. Mbala mingi, baoyo bazali bapaya nde babungisaka biloko na bango mpo na miyibi mpe na bato mosusu oyo bazangi bizaleli malamu. Kangá ntango nyonso bizibeli ya motuka na yo na fungola mpe kotika ata eloko moko te na polele oyo ekoki kobenda likebi. Bayibi babendamaka mingi na mayangani minene. Ekozala likambo ya mayele te kotika eloko moko ya motuya na efandeli na yo. Okoki koyeba te soki bato nyonso oyo bazali zingazinga na yo bazali baklisto. Mpo na nini kotya moto na komekama? Tozwaki balapólo oyo emonisi ete bato mosusu oyo bayebani te bamekaki kobenda bana mike libándá. SƐNZƐLÁ BANA NA YO MALAMU.