Tózwa litomba ya Eteyelo ya mosala ya teokrasi na 1996—Eteni 1
1 Osili kotánga malako oyo mazali kati na “ Manáka mpo na Eteyelo ya mosala ya teokrasi mpo na 1996”? Osili komona mwa bambongwana? Kobanda Yanuáli kino Apríli, lisoló No. 3 likozwama na búku Comment raisonner, mpe kobanda Máí kino Desɛ́mbɛ, na búku ya sika Boyebi. Lisoló No. 4 likolobela, pɔ́sɔ na pɔ́sɔ, moto moko azwami kati na Biblia.
2 Masoló ya banakelasi: Lisoló No. 3 likopesama na ndeko mwasi moko. Soki lisoló yango lizwami na búku Comment raisonner, libaku oyo ndeko mwasi akosalela lisengeli komonisa mosala ya kosakola ndako na ndako to litatoli ya libaku malamu. Soki lisoló liuti na búku Boyebi, lisengeli kosalema lokola bozongeli ya sika to boyekoli ya Biblia. Yango esengeli kozala na ntina mingi mpamba te búku Boyebi ekosalelama mingi mpo na kotambwisa boyekoli ya Bilia epai na bato.
3 Soki libaku oyo eponami ezali nde boyekoli ya Biblia, bandeko basi nyonso mibale bakoki kofanda. Kɔtá mbala moko kati na lisoló na nsima ya mwa komantere mokuse ya ebandeli, na nsima tuná mituna minyantami oyo mizwami kati na búku. Molobani asengeli kokokisa mokumba na ye na lolenge elongobani. Mikapo oyo mipesami misengeli kolukama na Biblia mpe kotángama soki ntango epesi nzela. Ndeko mwasi oyo akosala lisoló yango asengeli komonisa ntɔki ya koteya na kosaláká ete molobani na ye azwa libaku ya koloba na lisalisi ya mituna mpe ya kososola elongo na ye likoló na mikapo oyo misalelami.
4 Esengeli kosala nini soki lisoló lizali na mikapo mingi koleka kati na yango na boye ete likoki ezali te mpo na kotalela yango nyonso na boumeli ya miniti mitano? Poná mikapo oyo mizali komonisa mpenza makanisi ya ntina. Soki mikapo mizali mingi te, makanisi ya ntina ya lisoló makoki kolobelama mingi koleka. Mbala na mbala, okoki kotánga paragrafe moko to fraze moko ya mokanda mpe kotalela yango elongo na molobani na yo.
5 Soki lisoló oyo lipesameli yo likɔtisi paragrafe ya nsuka ya mokapo moko ya búku Boyebi, okoki kotalela na mokuse etánda oyo ezwami na nsuka mpe ezali na motó ya likambo “Meká boyebi na yo.” Bitánda oyo bityami kati na baparagrafe oyo epesami bisengeli mpe kotalelama soki ntango epesi nzela. Soki etánda moko ezwami kati na masoló oyo masalelami na bandeko basi mibale, oyo akosala eteni ya liboso akoki kolobela yango. Bililingi ya búku bikoki kolimbolama mbala na mbala soko bilobelami kati na masoló oyo matalelami.
6 Lisoló No. 4 lisengeli kosalema na lolenge ya kosepelisa mpe ya malamu. Pɔ́sɔ na pɔ́sɔ tokolobela moto moko oyo azwami kati na Biblia. Tótalela na likebi nyonso makambo oyo búku Auxiliaire ezali kolobela biso na ntina na moto yango. Tókólisa lisoló zingazinga na motó ya likambo mpe tópona mikapo ya Biblia oyo mikosunga bayangani ete básosola likoló na moto oyo alobelami kati na Biblia mpe likoló na bomoto na ye, bakisá mpe bizaleli to makanisi oyo tokomekola to tokobwaka. Tokoki kolobela mikapo oyo mizali kotalela na mbala moko te moto yango soki mizali komonisa lolenge oyo Yehova atalelaka bizaleli mosusu, ezala ya malamu to ya mabe, to soki ezali na boyokani na motó ya likambo ya lisoló.
7 Soki tozali mpenza kozwa litomba na kobongisama oyo tozali kozwa na Eteyelo mpo na mosala ya teokrasi, tokozala na likoki ya ‘koteya liloba’ na kosaláká oyo ekoki na biso mpo na oyo etali “ntɔki ya koteya.”—2 Tim. 4:2.