Tókɔtisa mokemoke elikya ya bomoi ya seko epai na bato mosusu
1 Atako bato baluki myango ndenge na ndenge mpo ete bákóma mibange noki te kasi bázala na bomoi molai, nde balongi te kosilisa liwa mpe bobange. Tozali mpenza na botɔ́ndi lokola toyebi oyo Biblia ezali koloba na ntina na konuna mpe liwa, mpe lisusu lolenge oyo mikakatano ya bobange ekolimwa mpe liwa ekosila. Makambo yango ya solo mamonisami na buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Buku yango ezali kopesa biyano ya polele na mituna minene na ntina na bomoi mpe liwa, mpe ezali komema makanisi ya motángi na eleko oyo mabelé makozongisama lisusu Paladiso.
2 Na sanza oyo ya Apríli, tokolakisa buku Boyebi na mokano ya kobanda koyekola na yango Biblia elongo na bato. (Mat. 28:19, 20) Na nsima, tokosala bozongeli ya sika epai na bato nyonso oyo bakosepela na nsango ya Bokonzi. Na lolenge yango tokoki kokɔtisa mokemoke elikya ya bomoi ya seko epai na bato mosusu. (Tito 1:2) Mpo na kosala bongo, okoki mbala mosusu kozwa lisalisi na makanisi oyo malandi.
3 Ntango okutani na moto moko mpo na mbala ya liboso, okoki kotuna motuna oyo:
◼ “Osila komituna mpo na nini bato balingaka kozala na bomoi molai? [Tiká moto yango apesa eyano.] Babudiste, baklisto, Bahindu, Bamizilma mpe basusu, bango nyonso bazalaka na elikya ya bomoi nsima ya liwa.” Fungolá buku Boyebi na mokapo 6, na motó na likambo “Mpo na nini tonunaka mpe tokufaka?,” mpe tángá paragrafe 3. Pesá makanisi ya bavɛrsɛ oyo ipesami kuna. Na kosaleláká mituna mibale oyo mizwami na nsuka ya paragrafe yango, tuná molobani na yo soko alingi kozwa biyano na mituna yango. Soki alingi, bókoba kotalela mwa baparagrafe oyo elandi. Na kosaláká bongo, bosili kobanda boyekoli! Soki likoki ezali te, tikelá moto yango buku mpo atánga mpe omibongisa mpo na kozongela ye, malamu mpenza nsima ya mokolo moko to mibale, mpo ete bótalela biyano na mituna yango.
4 Ntango olingi kokolisa mposa nsima ya kotika buku “Boyebi,” okoki koloba:
◼ “Nazongi kotala yo mpo tótalela elongo biyano na mituna mibale oyo mitikalaki, na ntina na liwa.” Okundwela ye mituna yango. Na nsima, bósolola likoló na mateya oyo mazwami na mokapo 6, na motó na likambo moke oyo elobi ete “Mayele mabe.” Ntango mosusu, okoki kokoba na boyekoli to kobimisa motuna oyo ezali na nsuka ya paragrafe 7 mpo na kolamwisa mposa ya moto yango ete bóyekola na mbala ekoya. Kamatá bibongiseli ya sikisiki mpo na kozongela ye. Pesá molobani na yo lokasa ya libyangi na makita, mpe yebisá ye na mokuse lolenge makita ya lisangá masalemaka. Sɛngá ye, na esengo nyonso, ete aya koyangana.
5 Ezala na mosala ya kosakola ndako na ndako to na litatoli ya libaku malamu, okoki kobanda lisolo na kolobáká boye:
◼ “Osilá komituna lolenge bomoi na biso mpe mabelé ekozala na mikolo mizali koya? [Tiká moto yango apesa eyano.] Biblia ezali komonisa bomoi na mikolo mizali koya na liloba moko—Paladiso! Na ebandeli, engebene Biblia, Nzambe asalaki babalani mibale ya liboso mpe atyaki bango kati na eteni ya mabelé oyo ezalaki paladiso moko kitoko. Babalani yango mibale basengelaki kobota bana mpo na kotondisa mabelé, mpe mokemoke bákómisa mabelé mobimba paladiso. Talá lolenge yango ekokaki kozala.” Fungolá buku Boyebi na lokasa 8, mpe tángá paragrafe 9 na nse ya motó na likambo moke “Bomoi kati na Paladiso.” Na nsima, bósolola likoló na makanisi oyo mazwami na paragrafe 10, mpe bótánga vɛrsɛ ya Yisaya 55:10, 11 oyo etyami kuna. Sɛngá na moto yango ete bókoba lisolo mpo na koyeba lolenge bomoi ekozala na paladiso oyo ekozongisama mpe na yango bótalela paragrafe 11 kino 16. To okoki kolendisa moto yango ete atikala kotánga yango ye moko, mpe bóyokana mpo na kokutana lisusu mpe kotalela yango na mbala ya nsima.
6 Soki bobandaki boyekoli ntango bokutanaki na mbala ya liboso te, okoki komeka kosala yango na bozongeli ya sika na kolobáká boye:
◼ “Na lisolo na biso ya mbala eleki, tolobaki ete Nzambe azali na mokano ya kobongola mabelé mobimba paladiso. Yango ebimisi motuna oyo, ‘Paladiso ekozala lolenge nini?’” Fungolá buku Boyebi na mokapo ya liboso, mpe bóyekola paragrafe 11 kino 16 na nse ya motó na likambo “Bomoi kati na Paladiso oyo ekozongisama.” Nsima na yango, monisá elilingi oyo ezali na nkasa 4 mpe 5, mpe tuná moto yango soki akolinga kozala na bomoi na esika kitoko motindo wana. Na nsima, tángá molɔngɔ́ ya liboso ya paragrafe 17 na lokasa 10. Ntango mosusu, okoki kokoba na boyekoli, to kopesa elaka ete, na mbala ekoya, okolimbolela ye masɛngami oyo mokomoko asengeli kokokisa mpo na kozala na bomoi kati na paladiso oyo ekozongisama. Tikelá ye lokasa ya libyangi na makita, limbolá manaka ya makita, mpe byangá ye na esengo nyonso ete ayangana na makita na Ndako ya Bokonzi.
7 Buku Boyebi ezali esaleli kitoko mpo na koyebisa basusu “bomoi ya seko” oyo Nzambe alaki biso. Na koyekoláká Biblia na bato, okoki kokɔtisa mokemoke epai na bango elikya yango monene epemami na Nzambe oyo “akobukaka lokuta te.”