Ndenge ya kolakisa bazulunalo
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Ɔkɔt.
“Nini esengeli mpo na kosala mokili ya malamu mpe ya esengo? [Tiká ye ayanola.] Bato basili komeka biyangeli ndenge na ndenge mpo na koluka kobongisa mokili. Kasi tótala likanisi ya Nzambe mpo na yango. [Tángá Yilimia 10:23.] Lisolo oyo ezali komonisa ‘sɛkɛlɛ ya kozala na mokili ya esengo,’ ezali komonisa ndenge likambo yango ekokokisama mosika te.”
Lamuká! 22 Ɔkɔt.
“Ondimi ete lelo oyo bato bazali na mitungisi mingi koleka ndenge ezalaki liboso? [Tiká ye ayanola.] Biblia esakolaki likambo yango. [Tángá 2 Timote 3:1] Bato mingi bamonaka ete bomoi ezali mpasi, yango wana balɛmbaka nzoto. Kasi zulunalo oyo ezali kobɔndisa mpenza. Ezali komonisa ndenge ya kolonga makanisi ya kozanga elikya mpe kosala ete bomoi ezala na ntina.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Nov.
“Nsima ya kolobela nsango moko ya kobulunganisa oyo euti kobima na zulunalo moko, tuná motuna oyo: “Mpo na nini bato bazali kosala makambo mabe boye? Biso nyonso toyebi oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe, kasi bato bazali kaka kosala makambo ya mabe. Mpo na nini? [Nsima ya koyoka eyano na ye, tángá Emoniseli 12:9.] Zulunalo oyo ezali kolimbola ndenge tokoki kosala ete lisosoli na biso ezala malamu.”
Lamuká! 8 Nov.
“Mbala mosusu okondima ete tozali na bomoi na ntango moko ya mobulu. [Nsima ya koyoka eyano na ye, tángá 2 Timote 3:3.] Mbala mingi ‘makambo ya mabe’ emonanaka ata na kati ya libota. Lisolo oyo, ‘Lisalisi mpo na basi oyo mibali na bango babɛtaka bango’ ezali na nsango ya kobɔndisa. Mbala mosusu oyebi moto moko oyo okoki kosolola na ye makambo yango.”