Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Ɔkɔt.
“Lokola bato mingi bayebaka te nini ekoyela bango lobi, balobaka ete ‘ebongi bábuka ndika ntango bazali naino na mino.’ Yo okanisi nini? [Tiká ye apesa eyano.] Yoká likambo moko ya ntina oyo Yesu alobaki. [Tángá Matai 6:34.] Zulunalo oyo elimboli ndenge oyo tokoki kobongisa avenire na biso kozanga ete tómitungisa koleka ndelo.”
Lamuká! Ɔkɔt.
“Biso nyonso tokufelá bandeko to baninga. Okanisi ete bato yango bakendá na likoló mpe bamonaka biso? [Tiká ye apesa eyano.] Yoká oyo Yesu alobaki ntango Lazalo akufaki. [Tángá Yoane 11:11.] Lisolo oyo elimboli soki bato oyo bakufá bazali na bomoi esika moko boye to soki balali mpɔngi mpo na kozela lisekwa.” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 28.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Nov.
“Okanisi ete mokili elingaki kozala malamu koleka soki bato bázalaka na komikitisa mingi? [Tiká ye apesa eyano.] Yoká oyo Yesu alobaki mpo na ezaleli wana. [Tángá Matai 23:12.] Lisolo oyo emonisi ntina ya kozala na komikitisa, atako mokili oyo ezali kolendisa elimo ya kowelana.”
Lamuká! Nov.
“Na ntango ya kala, mbala mingi bato bazalaki koluka toli na Biblia. Kasi, lelo oyo bato mingi batyelaka Biblia ntembe. Yo okanisi nini? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá 2 Timote 3:16.] Lamuká! oyo ya ntina mingi elobeli makambo oyo emonisi mpenza ete Biblia epemami na Nzambe.”