Ndenge ya kolakisa bazulunalo (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Ɔkɔt.
“Ndenge nini okolimbwela bana mike to bato mosusu ntina oyo mabe ezali kosalema lelo oyo? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia ezali kopesa eyano na motuna oyo: ‘Mabe nyonso eutaka na nani?’ [Tángá 1 Yoane 5:19.] Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ekosalisa yo oyeba nani azali moto mabe yango mpe ndenge oyo okoki kotɛmɛla ye.”
Lamuká! 22 Ɔkɔt.
“Okanisaka nini: mabondeli ya bakonzi ya mangomba to ya moto mosusu ekoki koyeisa kimya na mokili mobimba? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia ezali kopesa elaka ete ntango ezali koya oyo kimya ekozala na mokili mobimba. [Tángá Yisaya 9:6, 7.] Omoni ndenge ekomami ete mokonzi moko oyo akeseni na basusu nde akotya kimya na mokili? Lamuká! oyo emonisi soki mokonzi yango ezali nani mpe ndenge nini akotya kimya ya solosolo.”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Nov.
“Mingi kati na biso tolukaka kofanda na kimya na bato mosusu. Kasi, nakanisi yo moko omonaka ete ezalaka likambo moke te. [Tiká ye apesa eyano.] Biblia ezali kolimbola mpo na nini ezalaka bongo. [Tángá Yakobo 3:2.] Lisolo oyo ezali komonisa ete kosɛnga bolimbisi ezali sɛkɛlɛ ya kozongisa boyokani mpe ya kobatela kimya.”
Lamuká! 8 Nov.
“Esakweli moko ya Biblia ezali komonisa ete mokolo ekoya oyo moto moko te akoloba lisusu ete, ‘Ngai nazali na maladi.’ [Tángá Yisaya 33:24.] Omoni te ete yango ekozala likambo ya malamu mingi? [Tiká ye apesa eyano.] Nzokande, lelo oyo bato bazali konyokwama na bamaladi ndenge na ndenge, ezala mpe na sida oyo ezali koboma bato mingi. Lamuká! oyo ezali kopesa eyano na motuna, Mokolo mosusu sida ekosila?”