Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛl 15 Ɔkɔt.
“Bato mingi bamonaka ete mpo na kozala na bomoi ya malamu, esengeli kotánga kelasi. Okanisi ete ezali na mateya oyo ekoki kosalisa moto akóma moto malamu mpe ayeba oyo akoki kosala soki akutani na mikakatano na bomoi na ye? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Baloma 12:2.] Zulunalo oyo ezali kolobela ndenge oyo mateya eleki malamu oyo ezali lelo oyo ekoki kosalisa biso.”
Lamuká! 22 Ɔkɔt.
“Bato mingi balingaka kotánga zulunalo ata mikolo nyonso. Okanisi ete tokoki mpenza kondima makambo oyo bakomaka na bazulunalo? [Tiká ye apesa eyano.] Lamuká! oyo ezali komonisa ndenge ya kotánga zulunalo mpo esalisa yo. Ezali mpe komonisa mpo na nini esengeli kokebaka.” Tángá Masese 14:15.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛlii 1 Nov.
“Bato mingi bamitungisaka mpo na kozanga bosembo oyo ezali na mokili. Okanisi ete ezali na moto oyo akoki kobongola makambo? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo ezali kolobela mikakatano oyo ezali kosala ete makambo ebongwana te. Ezali mpe komonisa moto oyo akosilisa mikakatano yango mpe ndenge oyo akotya kimya na mokili mpe akosilisa mobulu.” Tángá Nzembo 72:12-14.
Lamuká! 8 Nov.
“Na mokili mobimba, bato mosusu bazali na bomɛngo mingi, nzokande basusu bazali na bobola makasi. Okanisi ete ezali na eloko moko oyo ekoki kosilisa bokeseni wana? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Matai 6:9, 10.] Zulunalo oyo emonisi ntina oyo tokoki kondima ete Bokonzi ya Nzambe ekosilisa bokeseni kati na bato, bokeseni oyo ezali kotungisa bato mingi lelo oyo.”