Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/06 lok. 8
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2006
km 10/06 lok. 8

Ndenge ya kolakisa bazulunalo

(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Ɔkɔt.

“Lokola Nzambe azalaka na likoló, bato mosusu bakanisaka ete ezali mpasi koyeba ye malamu. Ekómelaka yo okanisa ndenge wana? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Yoane 17:3.] Zulunalo oyo elimboli ndenge oyo tokoki kosala mpo na koyeba Nzambe.”

Lamuká! Ɔkɔt.

“Mingi na biso tokufelá bato oyo tolingaka. Okanisi ete ezali na makambo oyo tokoki kosala mpo na kosalisa bango ata na nsima ya liwa? [Tiká ye apesa eyano.] Lisolo oyo emonisi eyano ya Biblia na motuna wana. Elobeli mpe elikya oyo ya kobɔndisa.” Tángá Yoane 5:28, 29. Na nsima, lakisá ye lisolo oyo ezali na lokasa 10.

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Nov.

“Lelo oyo, makanisi oyo bato bapesaka na likambo ya kobɔkɔla bana ezali bongolabongola. Okanisi ete ezali na esika moko oyo baboti bakoki kozwa toli oyo ebongi kotyela motema? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Nzembo 32:8.] Zulunalo oyo elobeli mateya ya malamu mpenza oyo Biblia epesi na likambo ya kobɔkɔla bana.”

Lamuká! Nov.

“Omituna naino te motuna oyo: Soki Nzambe ya bolingo, ya sembo, mpe ya nguya azalaka, mpo na nini bampasi etondi boye? [Tiká ye apesa eyano.] Talá oyo vɛrsɛ oyo elobi mpo na ntina oyo tozali konyokwama. [Tángá 1 Yoane 5:19.] Na lisalisi ya Biblia, zulunalo oyo emonisi oyo Nzambe azali kosala mpo na kosilisa bampasi.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto