Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/01 lok. 8
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 11/01 lok. 8

Ndenge ya kolakisa bazulunalo

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Nov.

“Toyokaka maloba oyo: ‘Yesu akufaki mpo na biso.’ [Lobelá Yoane 3:16.] Osilá komituna ndenge nini liwa ya moto moko ekoki kobikisa biso nyonso? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia epesi eyano ya pɛtɛɛ. Lisolo oyo ‘Yesu azali Mobikisi​—Na ndenge nini?,’ elimboli yango malamumalamu.”

Lamuká! 22 Nov.

“Bato bazali kosala nyonso oyo ekoki na bango mpo na kobatela mai, mopɛpɛ mpe bazamba? [Tiká ye apesa eyano.] Bato mingi bazali kobanga ete lokola mai, mopɛpɛ mpe bazamba ezali kobeba, soki likambo moko esalemi te, ekokóma na ntango moko oyo bomoi yango moko ekokóma na likama na mokili oyo. Kasi, koyeba ete Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na likambo yango ezali kopesa esengo. [Tángá Nehemia 9:⁠6.] Lamuká! ezali kolobela ndenge bomoi ekozala awa na mabele na mikolo oyo ezali koya.”

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Des.

“Mbula na mbula, na sanza oyo, bato mingi bapesanaka makabo mpe balukaka kosala makambo ndenge na ndenge mpo na komonisana boboto. Yango ezali kotinda biso tókanisa Lilako Lileki Malamu. [Tángá Matai 7:12.] Okanisi ete tokoki kotosa lilako yango mbula mobimba? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo ezali na lisolo moko ete ‘Lilako Lileki Malamu-Ezali kaka na ntina tii lelo?,’ lisolo yango ezali kolobela makambo mingi oyo ekotinda yo okanisa lisusu malamumalamu likambo yango.”

Lamuká! 8 Des.

“Biblia epesi elaka ete mokolo mosusu moto moko te akoloba ete: ‘Nazali na maladi.’ [Tángá Yisaya 33:24.] Na boyokani na elaka yango, nimero oyo ya Lamuká! ezali kolobela maladi moko oyo ezali konyokola bato mingi, ezala mikóló to bilenge. Ezali na motó ya likambo ‘Maladies articulaires: des raisons d’espérer.’ Nandimi ete yo moko okomona ete masolo yango ezali na mateya kitoko.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto