Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/06 lok. 8
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2006
km 11/06 lok. 8

Ndenge ya kolakisa bazulunalo

(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Nov.

“Lokola mokili etondi na makambo ya mabe, bato mosusu bamitunaka boye: ‘Ezali mpenza na ntina koboma nzoto mpo na kosala makambo oyo ezali malamu?’ Yo mpe osilá komituna motuna wana? [Tiká ye apesa eyano.] Yoká maloba oyo ya kolendisa mpenza. [Tángá Masese 2:21, 22.] Zulunalo oyo elimboli ntina mpenza oyo tosengeli kozala bato ya sembo.”

Lamuká! Nov.

“Bato mosusu bakanisaka ete Nzambe nde abimisaka makambo nyonso oyo ekómelaka bato. Soki likama moko esalemi, balobaka ete Nzambe ayebi ntina oyo abimisi yango. Yo mpe ondimi likanisi yango? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Yakobo 1:13.] Na lisalisi ya Biblia, zulunalo oyo emonisi ntina ya bampasi ya bato mpe makambo oyo Nzambe azali kosala mpo na kosilisa yango.”

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Des.

“Okanisi ete esakweli oyo ya Biblia ezali kokokisama lelo oyo? [Tángá Matai 24:11. Na nsima, tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo elobeli mateya mosusu oyo epanzani mingi lelo oyo. Emonisi mpe makambo oyo tokoki kosala mpo bateyi ya lokuta bákosa biso te.”

Lamuká! Des.

“Mpo na yo, nani azali moto oyo alekaki bato nyonso tii lelo oyo? [Tiká ye apesa eyano.] Mpo na bato mingi, Yesu nde aleki bato nyonso. Talá oyo akosala mpo na mabelé ntango akoyangela yango na nzela ya Bokonzi ya Nzambe. [Lakisá ye elilingi na nkasa 8-9, mpe tángá moko ya bavɛrsɛ oyo batye wana.] Zulunalo oyo emonisi ndenge nini mpe ntango nini Yesu akosala makambo yango.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto