Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Nov.
“Biso nyonso tolingaka kozala na bomoi ya esengo mpe oyo ezali na ntina. Yo mpe ondimi ete sɛkɛlɛ ya kozala na esengo ezali oyo Yesu amonisi awa? [Tángá Matai 5:3. Na nsima, tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo emonisi ete mpo tózala na bomoi ya ntina, tosengeli kokokisa mposa oyo moto nyonso abotamaka na yango, ya kosambela Nzambe.”
Lamuká! Nov.
“Lelo oyo, lokola mayele ya siansi ezali se kokola mpe bato balingi lisusu kokipe makambo ya Nzambe te, mingi bakómi kokanisa ete Biblia esilá ngala. Yo okanisi nini na likambo yango? [Tiká ye apesa eyano.] Oyebi ete likambo nyonso oyo Biblia elobá na boyokani na siansi ezali ya solo? [Tángá Yobo 26:7.] Lamuká! oyo ya ntina mingi emonisi bantina oyo tosengeli kondimela Biblia.”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Des.
“Okopesa eyano nini na motuna oyo? [Tángá motuna oyo ezali na ezipeli. Na nsima, tiká ye apesa eyano.] Mokano ya Nzambe ezali ete asilisa bokabwani oyo ezali kati na bato ya mposo ndenge na ndenge. [Tángá Nzembo 46:8, 9.] Na lisalisi ya Biblia, zulunalo oyo emonisi makambo oyo ekosala ete bato bákóma na boyokani ya malamu.”
Lamuká! Des.
“Bato mosusu bakanisaka ete moto akobaka kozala na bomoi nsima ya liwa; nzokande basusu balobaka ete soki moto akufi, esili mpo na ye. Yo mpe obangaka liwa? [Tiká ye apesa eyano.] Talá elikya oyo Yobo azalaki na yango mpo na liwa. [Tángá Yobo 14:14, 15.] Na lisalisi ya Biblia, zulunalo oyo emonisi polele nini ekómelaka biso soki tokufi.”