Ndenge ya kolakisa bazulunalo (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Nov.
“Kala, bato mingi bazalaki kondima ete mokolo mosusu mabelé ekokóma paladiso. Lelo oyo, bato mosusu bazali kutu komituna soki mabelé ekozala kaka. Mpo na yo, mabelé ekozala ndenge nini na mikolo ezali koya? [Tiká ye apesa eyano.] Yoká ndenge Biblia elobi mpo na likambo yango. [Tángá Nzembo 37:11.] Zulunalo oyo elobeli makambo mosusu oyo Biblia elaki mpo na mabelé.”
Lamuká! 22 Nov.
“Bato mosusu bazali komitungisa ndenge mopɛpɛ, mai mpe zamba ebebi boye, bazali kokanisa ete mabelé ebebi mpo na libela. Yo mpe okanisi bongo? [Tiká ye apesa eyano.] Mokano ya Mozalisi ezalaki te ete mabelé ekóma lokola esika ya kobwaka bosɔtɔ epai bato bakokoka lisusu kofanda te. [Tángá Yisaya 45:18.] Zulunalo oyo elimboli ndenge oyo mabelé ekobatelama.”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Des.
“Lelo oyo, bato mosusu bazali lisusu kondimela Nzambe te. Likambo moko oyo ezali kosala ete bándimela lisusu Nzambe te ezali ete bazali kozwa biyano ya malamu te na mituna ya mpasi lokola oyo. [Pesá ndakisa moko oyo ezali na etanda ya lokasa 6.] Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ezali kolobela likambo moko ya ntina oyo ekosalisa biso tókóma na kondima ya solosolo epai ya Nzambe.” Tángá Bafilipi 1:9.
Lamuká! 8 Des.
“Okanisi ete mokolo mosusu bato bakozala na bomoi lokola oyo balobeli awa? [Tángá Yisaya 14:7. Na nsima, tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo ezali kolobela makambo oyo ekoki kosalisa biso ntango tozali kozela ete Nzambe akokisa bilaka na ye.” Bendá likebi na lisolo “Ndenge nini okoki koboya bamposa ya mabe?”