Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Nov.
“Soki mwasi ná mobali basaleli toli oyo ya Biblia, okanisi ete bakozala na boyokani malamu na libala na bango? [Tángá Yobo 31:1. Na nsima tiká ye apesa eyano.] Lisolo oyo elobeli mitinda ya Biblia oyo ekoki kosalisa mwasi ná mobali bátosa ndai na bango ya libala.” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 18.
Lamuká! Nov.
“Bato mingi bandimi ete mbisi mpe biloko mosusu ezali kosila noki mpenza na mai monene. Okanisi ete baguvɛrnema ya bato ekolonga kosilisa mokakatano yango? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Matai 6:10.] Lisolo oyo elobeli ndambo ya makambo oyo ezali kotinda bato bámitungisa mpe ndenge oyo Nzambe akosilisa mokakatano yango.” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 20.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Des.
“Soki tokómi pene na nsuka ya mbula, bato mingi bakanisaka Yesu. Bongo yo, otyaka Yesu na esika nini na bomoi na yo? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia elendisi biso tólanda ndakisa ya Yesu. [Tángá 1 Petelo 2:21.] Yango ekosalisa biso tókóma bato malamu mpe tózala na esengo. Zulunalo oyo elimboli yango.”
Lamuká! Des.
“Banda kala, bato bamitunaka motuna oyo. [Lakisá motuna oyo ezali na ezipeli.] Mpo na yo, epai wapi tokoki kozwa eyano ya malamu? [Tiká ye apesa eyano.] Yoká ntina oyo tosengeli koluka ete Nzambe apesa biso eyano na motuna yango. [Tángá Nzembo 100:3.] Zulunalo oyo emonisi oyo Biblia elobi na likambo yango.”