Ndenge ya kolakisa bazulunalo (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Mar.
“Ondimi te ete soki tózalaka na batambwisi ya malamu, mbɛlɛ mabele oyo elingaki kozala esika moko kitoko mpo na kofanda? [Tiká ye apesa eyano.] Talá makambo oyo Biblia elaki. [Tángá Nzembo 37:11.] Tokoki kozala na kimya ya ndenge wana. Kimya yango ekozala na ntango oyo Motambwisi moko ya kokoka akoyangela. Masolo oyo ezali komonisa nani azali motambwisi yango.”
Lamuká! 22 Mar.
“Koningana ya mabele ezali koboma ebele ya bato mpe kobebisa biloko mingi. Mbala mingi, bato oyo babikaka bazalaka lisusu na esika ya kofanda te mpe batikalaka mabɔkɔ mpamba. Nimero oyo ya Lamuká! ezali komonisa ndenge oyo basalisaki bato ya ndenge wana nsima ya koningana ya mabele. Ezali mpe kolimbola ete koningana ya mabele ezali moko ya makambo oyo elobelami na esakweli moko ya ntina mingi oyo ezali na Biblia.”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Apr.
“Tiká nayebisa yo likanisi moko ya kosepelisa oyo ezali na kati ya Biblia. [Tángá Matai 22:37.] Okanisi ete yango elimboli nini? [Tiká ye apesa eyano.] Talá lisolo oyo: ‘Salelá motema mpe makanisi na yo mpo na koluka Nzambe.’ Okanisi ete kondima ya solo ezali likambo oyo etali kaka motema, to esengeli mpe kotala makanisi? Eyano oyo zulunalo oyo epesi ekosalisa yo oyeba likambo yango malamumalamu.”
Lamuká! 8 Apr.
“Ndenge oyebi yango, kokokisa bamposa ya libota ezali likambo ya pɛtɛɛ te na mikolo na biso, mpe kozala mama ya libota ezali mosala ya moke te. Nimero oyo ya Lamuká! ezali na lisolo moko kitoko oyo ezali na motó ya likambo ‘Être maman: un dur métier?’ (Ezali nde mpasi kozala mama?) Nakosepela kotikela yo zulunalo yango.”