Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛl 15 Mar.
“Tosepeli kobenga yo na molulu ya Bolei ya Mpokwa ya Nkolo, na mokolo ya lomingo 4 Aprili. [Salelá libyangi oyo ezali na lokasa ya nsuka ya zulunalo to lokasa ya libyangi mpo na kolimbola likambo yango. Na nsima tángá Luka 22:19.] Masolo ya ebandeli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ezali kolimbola ntina ya molulu yango mpe ndenge oyo basalaka yango.”
Lamuká! 22 Mar.
Lobelá likambo moko ya nsɔmɔ esalemaki, oyo bato bayebi yango malamu, na nsima tuná boye: Omituná naino te mpo na nini Nzambe atikaka ete makambo ya ndenge wana esalema? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Yakobo 1:13.] Lisolo oyo ekomami mpenzampenza mpo na bilenge, ezali kolimbola ntina oyo Mozalisi na biso ya bolingo asilisi naino te bampasi ya bato.”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛlii 1 Apr.
“Bavɛrsɛ mingi te na Biblia ezalaka mpasi mpo na kokanga ntina na yango lokola bavɛrsɛ oyo elobeli elembo ya nyama. Osí oyoka likambo yango? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Emoniseli 13:16-18.] Biblia yango moko epesi mayele ya kososola libombami yango. Zulunalo oyo ezali kolobela mayele yango.”
Lamuká! 8 Apr.
“Bato mingi bayebi malamu lisolo ya Moize. Kasi, oyebaka ete Moize alobaki likambo moko oyo ezali mpenza kotalela bomoi na biso lelo oyo? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Deteronome 18:15.] Lamuká! oyo ezali kolobela mosakoli yango mpe makambo malamu oyo akosala mpo na bato.”