Ndenge ya kolakisa bazulunalo (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Apr.
“Moto nyonso, ezala ata afandaka wapi, alingaka kozala na bomoi ya malamu; na ndakisa moto nyonso alingaka kozwa mosala ya malamu mpe akolinga te bálongola ye na mosala yango. Kasi oyebaka ete ezali mpenza na esika oyo tokoki kozwa bomoi ya malamu mpo na ntango nyonso, epai tokoki kozwa bomoi ya malamu mpo na libela? [Tángá Nzembo 16:8, 9.] Nimero oyo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali komonisa epai wapi tokoki kozwa bomoi ya malamu mpenza.”
Lamuká! 22 Apr.
“Bato mingi lelo bazali kokima mangomba ya minene oyo eyebani banda kala, bazali kosambela Nzambe na ndenge oyo bango moko bamoni malamu. Okanisi boni mpo na likambo yango, oyo ekómi komonana mingi? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia emonisi ete ndenge oyo tosambelaka Nzambe ezali na ntina mingi na miso na ye. [Tángá Yoane 4:24.] Nimero oyo ya Lamuká! eyebisi lolenge ya malamu mpenza ya kokokisa bamposa na yo ya elimo.”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Mai
“Oyebi moto moko oyo azali kobɛla makasi to oyo azali konyokwama mpo enama na ye moko ya nzoto ebebá? Na ntembe te, ondimi ete bato ya lolenge wana bazali mpenza na mposa ete bálendisa bango. Kasi maloba nini tokoki koloba mpo na kolendisa bango? Biblia ezali na nsango moko ya elikya. [Tángá Yisaya 35:5, 6.] Nimero oyo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elimboli ntina oyo tokoki kondima ete esakweli yango ekokokisama.”
Lamuká! 8 Mai
“Makambo oyo esalemaki na mbula oyo euti koleka elingaki mpenza kobebisa kimya ya mokili na ndenge oyo emonaná naino te. Okanisi ete baguvɛrnɛma ya bato ekoki mpenza kotya kimya na mokili mobimba? [Nsima ya koyoka eyano na ye, tángá Yisaya 2:4.] Nimero oyo ya Lamuká! emonisi ntina oyo tokoki kondima ete etikali moke, mokili mobimba ekozala na kimya.”