Ndenge ya kolakisa bazulunalo (Soki bazulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Yuni
“Okanisi ete ekozala na mokolo oyo tokomona lisusu te mikakatano lokola oyo? [Tángá lapolo oyo bapesi na ebandeli ya lisolo ya liboso, mpe tiká ye apesa eyano.] Liloba ya Nzambe oyo epemami endimisi biso ete etikali moke mikakatano ya ndenge wana esila. [Tángá Nzembo 72:12-14.] Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ezali kolimbola ndenge likambo yango ekosalema.”
Lamuká! 22 Yuni
“Okanisi ete ekoki kosalema ete mokolo mosusu moto nyonso awa na mabele azala na bonsomi ya solosolo? [Tiká ye apesa eyano.] Yoká elaka ya kitoko oyo Nzambe apesi. [Tángá Baloma 8:21.] Mpo elaka wana ekokisama, esengeli boombo ya lolenge nyonso esila, boye te? Lamuká! oyo ezali komonisa ndenge likambo yango ekosalema.”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Yuli
“Bamilio ya bato basalelaka bililingi na losambo na bango, nzokande bamilio mosusu ya bato balobaka ete kosala bongo ezali mabe. Omituná naino te soki Nzambe akanisaka nini mpo na likambo yango? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Yoane 4:24.] Masolo oyo ezali komonisa ndenge likambo ya kosalela bililingi ebandaki mpe ezali komonisa oyo Biblia elobi mpo na losambo ya bililingi.”
Lamuká! 8 Yuli
“Biblia esakolaki ete na mikolo ya nsuka ntango ya mpasi ekozala. [Tángá 2 Timote 3:1, 3.] Mabe oyo ezali kosalema na mokili mobimba emonisi ete maloba yango ezali solo. Kanisá naino! Omoni te ete soki bapolisi bázalaka te mabe elingaki koleka nde koleka? Lamuká! oyo elobeli mikakatano oyo bapolisi bazali kokutana na yango na mokili mobimba.”