Ndenge ya kolakisa bazulunalo (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Feb.
“Bato mingi bamitunaka soki Nzambe azalaka mpenza moto. Bamosusu kutu bandimaka ete Nzambe azali kasi bakanisaka azali mosika na bango. Osilá kotya likebi na likambo yango? [Tiká ye apesa eyano.] Talá mpo na nini koyeba ete Nzambe azalaka moto ya elimo ezali na ntina. [Tángá Yoane 17:3.] Yango wana, okosepela mingi na masolo ya kitoko oyo ezali na ebandeli ya zulunalo oyo.”
Lamuká! 22 Feb.
“Okanisi ete mokano ya Nzambe ezalaki ete bato bányokwamaka na nzala, ezala bana mike? [Tiká ye apesa eyano.] Yoká elikya ya kobɔndisa oyo Biblia epesi. [Tángá Nzembo 72:16.] Lamuká! oyo elobeli ntina oyo bato bazali kokufa nzala mpe, likambo oyo eleki ntina, elikya Nzambe apesi ete etikali moke asilisa likambo yango.”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Mar.
“Tolingi koyeba makanisi na yo mpo na vɛrsɛ oyo ekamwisaka bato. [Tángá Matai 5:10.] Ndenge nini moto akoki kozala na esengo ntango azali konyokwama? [Tiká ye apesa eyano.] Masolo mibale ya liboso ya zulunalo oyo ezali kolobela bato mosusu oyo bazalaki na esengo atako bazalaki konyokwama. Okosepela koyeba ndenge basalaki likambo yango.”
Lamuká! 8 Mar.
“Omonaka mpe ete atako mikakatano ezali, tozali na makambo mingi oyo tosengeli kozala na botɔndi mpo na yango? [Tiká ye apesa eyano.] Ndenge nzoto na biso esalemá ezali moko ya makambo oyo tosengeli kozala na botɔndi mpo na yango. [Tángá Nzembo 139:14.] Ndenge Lamuká! oyo ezali komonisa yango, tokoki mpenza kozala na botɔndi mingi mpo na lolemu, matoi, miso, zolo, mpe loposo oyo tozali na yango, oyo esalaka ete tósepela na bomoi!”