Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela oyo ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Sɛt.
“Bamilio ya bato bakanisaka ete ‘basantu’ bazali na nguya moko boye mpe ezali malamu kosɛnga bango bálobela biso epai na Nzambe. Okanisi boni mpo na likambo yango? [Tiká ye apesa eyano.] Talá oyo Yesu Klisto alobaki. [Tángá Yoane 14:6.] Maloba yango ezali kobimisa mwa ntembe na likambo ya kosambela Nzambe na nzela ya ‘basantu.’ Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ezali kolobela likambo yango ya ntina mingi.”
Lamuká! 22 Sɛt.
“Bato mingi lelo bazali komitungisa mpo na terorisme, mpe na ndenge bazali kosalela mikrobe ya mabe na bitumba mpo na koboma bato. Okanisi ete baguvɛrnɛma ya bikólo awa na mabele ekoki kosilisa likambo ya terorisme na mokili oyo? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia emonisi ndenge oyo Nzambe akanisaka mpo na likambo yango. [Tángá Ezekiele 34:28.] Lamuká! oyo ezali kolimbola mwa makambo oyo mokakatano yango ebimisaka.”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Ɔkɔt.
“Bato mingi bamitunaka soki mobulu ekosila mokolo mosusu na mokili oyo: makambo lokola bitumba, kobomana, mpe terorisme. Okanisi boni mpo na likambo yango? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia ezali kopesa biso elikya oyo ebɔndisaka mpenza. [Tángá Nzembo 37:10, 11.] Zulunalo oyo ezali kolimbola ntina oyo Nzambe asilisi naino te mabe mpe mpasi oyo yango ememaka.”
Lamuká! 8 Ɔkɔt.
“Lelo oyo, emonani lokola ete mabota oyo ezalaka na moboti se moko ezali kokóma ebele mpenza. Biblia emonisi ete Mozalisi na biso azali koyokela bango mawa. [Tángá Nzembo 146:9.] Lamuká! oyo ezali komonisa ete kosalela malako ya Biblia esalisaka baboti oyo bazali kobɔkɔla bana na bango bango moko.”