Ndenge ya kolakisa bazulunalo (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Nov.
“Bato mosusu bamitunaka soki bandako ya losambo ezali na ntina mingi mpo na kosambela Nzambe. Okanisi boni? [Tiká ye apesa eyano.] Talá oyo Biblia elobi na likambo yango. [Tángá Misala 17:24.] Bongo, ntina mpenza ya bandako ya losambo esengeli kozala nini? Zulunalo oyo ezali kopesa eyano oyo euti na Biblia na motuna yango.”
Lamuká! 22 Nov.
“Okanisi ete mokolo mosusu siansi ekosilisa maladi nyonso? [Tiká ye apesa eyano.] Lamuká! oyo ezali kolobela ndenge mayele ya bato ya siansi ekoli na makambo mosusu. Ezali mpe komonisa mpo na nini kaka Mozalisi nde azali na likoki ya kosilisa maladi na liwa.” Tángá Nzembo 146:3-5, mpe pesá ye zulunalo.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Des.
“Mikolo oyo, mbongo ekómi mpenza mpasi mpo na bato mingi. Yango ezali kosala ete mangomba esɛngaka mbongo ya mabonza mbala na mbala. Likambo yango etungisaka mpe yo? [Tiká ye apesa eyano. Nsima tángá 1 Batesaloniki 2:9.] Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ezali komonisa oyo Biblia elobi mpo na likambo yango.”
Lamuká! 8 Des.
“Mpo na makaneli ya bato ya mobulu, bato mingi bakómi komituna soki ezali malamu kosala mobembo na mpɛpɔ. Likambo yango etungisaka mpe yo? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia elobi ete mabe ekwelaka moto nyonso. [Tángá Mosakoli 9:11.] Atako bongo, Lamuká! oyo ezali komonisa ndenge oyo okoki kosala mpo obika soki likama ebimi na ntango ozali kosala mobembo na mpɛpɔ, mpe mpo oyoka esengo koleka na mobembo na yo.