Ndenge ya kolakisa bazulunalo (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Yan.
“Soki totali ndenge oyo ebele ya bato bazali kobomama, okanisi ete mabe elongi malamu? [Tiká ye apesa eyano.] Talá oyo Biblia elobi mpo na Nzambe. [Tángá Nzembo 83:18b.] Lokola Nzambe azali Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba, mabe ekoki mpenza kolonga? [Tiká ye apesa eyano.] Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ezali kopesa eyano oyo ebongi na motuna yango.”
Lamuká! 22 Yan.
“Lelo oyo tozali mpenza na likama koleka ndenge ezalaki liboso. Likambo moko oyo ekómi kotungisa mingi ezali ya koyiba makambo ezali na buku ya mpako (pièce d’identité) ya moto mosusu. Osilá koyoka likambo yango? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia epesi elaka ete mokolo ekoya oyo makambo ya ndenge wana oyo etyaka biso na likama ekozala lisusu te na mabele. [Tángá Yisaya 11:9.] Zulunalo oyo ezali kolimbola ndenge oyo likambo yango ekosalema.”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Feb.
“Lelo oyo, bato mingi bamitungisaka mpo na kozanga mosala, mpe bato mosusu batyaka bango mpanzi likoló na esika ya mosala. Okanisi ete moto akoki mpenza komiyoka na esengo mpe azanga kobanga kobungisa mosala na ye? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Yisaya 65:21-23.] Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo elobeli ntango moko oyo ekoya wana bato nyonso bakozala na mosala oyo epesaka matomba.”
Lamuká! 8 Feb.
“Lamuká! oyo elobeli likambo moko ya nsɔmɔ oyo ezali kosalema na ntango na biso—bana bazali komipesa na kindumba. Biblia elaki ete lolenge wana ya konyokola bana etikali moke esila. [Tángá Masese 2:21, 22.] Zulunalo oyo ezali komonisa makambo oyo ememaka na lolenge yango ya konyokola bana mpe emonisi ndenge oyo ekosila.”