Ndenge ya kolakisa bazulunalo (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Yan.
“Bato mingi basalelaka bililingi na losambo na bango. Okanisi ete biloko yango ezali na nguya ya kobikisa moto? [Tiká ye apesa eyano.] Nasɛngi yo otala likambo oyo Nzambe ya solo akosala mpo na biso. [Tángá Emoniseli 21:3, 4.] Bobele Nzambe oyo azali mpenza nde akoki kosala makambo yango. Zulunalo oyo ezali komonisa soki Nzambe yango azali nani mpe tokozwa nini soki tondimi ye.”
Lamuká! 22 Yan.
“Lokola biso tozali na esika ya kofanda, tokoki kokanisa ete bato nyonso mpe bazali na bisika ya kofanda. Kasi na mokili mobimba, bamilio ya bato oyo bakimá mboka na bango bazali koyengayenga, bazali koyeba te epai wapi bákende; bazali koluka esika ya komibatela kasi bazali kozwa yango te. Lamuká! oyo emonisi ntina oyo mokakatano yango ezali mpe emonisi elaka oyo Biblia epesi ete mokolo mosusu moto nyonso akozala na esika na ye ya kofanda.”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Feb.
“Bato bazali komitungisa mingi ndenge oyo mboka na bango, bazamba, mopɛpɛ, mai, mpe makambo mosusu ezali kobeba. Kasi osilá kokanisa mpe na ndenge oyo makanisi ya bato ezali kobeba? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia ezali kolobela mingi ntina ya kozala pɛto na nzoto mpe na elimo. [Tángá 2 Bakolinti 7:1.] Nandimi ete okosepela na makambo oyo ezali na kati ya zulunalo oyo.”
Lamuká! 8 Feb.
“Na ntembe te yo mpe omonaka ete mbala mingi mabala ebandaka na esengo, kasi mingi esukaka na kopanzana. Nakosepela kotikela yo Lamuká! oyo mpo ezali kolobela likanisi ya Biblia na oyo etali ndenge ya kosala mpo libala eumela mpe ezala na esengo.”