Likambo nini otyaka na esika ya liboso?
1 Mangomba mingi bamipesaka libosoliboso na misala ya kosalisa bato, lokola kotonga biteyelo to kosalisa bato ya maladi. Nzokande mpo na Batatoli ya Yehova, kosalisa bato na elimo ezalaka na esika ya liboso, atako babosanaka te “kosala malamu mpe kokabela bamosusu biloko.”—Ebe. 13:16.
2 Ndakisa ya baklisto ya liboso: Yesu asalaki ebele ya misala ya malamu ntango azalaki kosala mosala na ye ya kosakola awa na mabelé, kasi mosala ya libosoliboso oyo amipesaki na yango ezalaki nde ya kotatola mpo na solo. (Luka 4:43; Yoa. 18:37; Mis. 10:38) Apesaki bayekoli na ye etinda ‘bákende mpe bákómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, . . . koteyáká bango.’ (Mat. 28:19, 20) Mpe amonisaki ete baoyo bakozala na kondima epai na ye bakosala mosala oyo ye abandisaki, kasi na bisika mingi koleka. (Yoa. 14:12) Yesu atyaki mosala ya kosakola na esika ya liboso mpamba te yango esalisaka bato báyekola nzela ya lobiko.—Yoa. 17:3.
3 Ntoma Paulo azalaki kotalela mosala na ye ya kosakola ete ezali “mokumba oyo batye likoló na [ye],” lisɛngami oyo akokaki te kokangela yango miso. (1 Kol. 9:16, 17) Andimaki komipimela makambo nyonso, koyikela komekama nyonso mpiko, to kondima konyokwama na mikakatano ya ndenge nyonso soki esengelaki kaka mpo akokisa mosala na ye ya kosakola. (Mis. 20:22-24) Ntoma Petelo mpe baoyo bazalaki kosala na ye elongo bamonisaki mpe elimo ya ndenge wana. Ata ntango bazalaki kokangama na bolɔkɔ mpe kobɛtama, “kozanga kotika, bakobaki koteya mpe kosakola nsango malamu oyo etali Klisto, Yesu.”—Mis. 5:40-42.
4 Tokoloba boni mpo na biso? Totyaka na esika ya liboso mosala ya koyebisa nsango malamu ya Bokonzi mpe ya kozalisa bayekoli? Ndenge moko na Yesu, tomibanzabanzaka mpenza mpo na baoyo ‘batikami mpamba mpe bapalanganisami lokola bampate ezangá mobateli’? (Mat. 9:36) Makambo oyo ezali kosalema sikoyo na mokili mpe bisakweli ya Biblia emonisi polele ete ntango ya ebongiseli ya mabe oyo etikali mokuse! Soki tozali kobosana soki moke te ntina monene ya mosala ya kosakola, ekotinda biso tókoba kosakola na molende mpenza.
5 Talelá malamumalamu makambo ya bomoi na yo: Lokola makambo ya bomoi ya moto ebongwanaka mbala mingi, ekozala malamu kotalela mbala na mbala soki tokoki kobongisa makambo mosusu mpo ete tósakola lisusu mingi. Ndeko mwasi moko asalaki mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza na bambula 1950, 1960 mpe 1970, kasi amonaki ete esengeli akata mpo nzoto ezalaki lisusu malamu te. Kasi na nsima, nzoto ekómaki malamu lisusu. Autaki kotalela lisusu makambo ya bomoi na ye mpe amonaki ete akoki mpenza kosala lisusu mosala ya mobongisi-nzela. Oyo nde esengo ayokaki ntango akɔtaki na Eteyelo mpo na babongisi-nzela ntango azalaki na mbula 90! Bongo ezali boni mpo na yo? Etikali moke ozwa pansyo to osilisa kelasi? Mbongwana na bomoi na yo ekoki mbala mosusu kopesa yo nzela osala mosala ya mobongisi-nzela?
6 Ntango Yesu amonaki ete Malata “azalaki na makanisi epai na epai mpo na ebele ya misala oyo azalaki kosala,” ayebisaki ye na boboto mpenza ete akozwa mapamboli mingi koleka soki ayeisi makambo pɛpɛlɛ. (Luka 10:40-42) Okoki koyeisa bomoi na yo pɛpɛlɛ? Ezali mpenza na ntina ete mobali ná mwasi bázala na mosala? Soki bokobongisa makambo mosusu, libota ekoki kobikela na mbongo ya moto moko kaka? Bandeko mingi bazwi matomba ebele na elimo ntango babongisaki makambo na bango mpo bákoka kosala lisusu mingi na mosala ya kosakola.
7 Tiká ete biso nyonso tólanda ndakisa oyo Yesu ná bantoma bapesi! Na ntembe te Yehova akopambola mpenza milende tozali kosala mpo na kosangana lisusu mingi na mosala oyo etali kobikisa bomoi ya bato, kosakola nsango malamu ya Bokonzi.—Luka 9:57-62.