Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Feb.
“Bato mosusu bamonaka ete bato nde bazali kobebisa mabelé. Likambo yango etungisaka yo te? [Tiká ye apesa eyano.] Talá elaka oyo ezali kokitisa motema. [Tángá Emoniseli 11:18.] Zulunalo oyo elobeli makambo oyo emonisi ete mabelé ekeseni na baplanɛti mosusu nyonso. Eyebisi mpe makambo oyo Biblia elobi ete ekosalema awa na mabelé.”
Lamuká! Feb.
“Okanisi ete oyo mpenza nde ntina oyo mobulu ezali mingi na mokili? [Tángá 1 Yoane 5:19. Tiká ye apesa eyano.] Lisolo oyo ezali kolobela oyo Biblia elobi mpo tóyeba ‘moto mabe’ mpe oyo tokoki kosala mpo nguya mabe na ye ekɔtela biso te.” Lakisá ye lisolo oyo ebandi na lokasa 12.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Mar.
“Bato mingi bakanisaka ete mangomba nyonso esambelaka kaka Nzambe. Mpo na yo, ezali mpenza na ntina moto apona lingomba? [Tiká ye apesa eyano.] Talá oyo basɛngi biso awa. [Tángá 1 Yoane 4:1.] Zulunalo oyo emonisi ndenge oyo tokoki komeka mateya mpo na koyeba soki euti solo epai ya Nzambe. Elimboli mpe ndenge ebandaki ete mangomba ekóma ebele boye.”
Lamuká! Mar.
“Mpo na yo, mikakatano nini bilenge bazali kokutana na yango lelo oyo? [Tiká ye apesa eyano.] Vɛrsɛ oyo emonisi mokakatano moko: kozwa baninga ya malamu. [Tángá Masese 13:20.] Zulunalo oyo emonisi makama ya koluka baninga na nzela ya Internet, mpe ndenge ya kobatela bilenge.”