Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Feb.
“Soki okokaki kopona moto moko azala mokonzi na mokili mobimba, olingaki kopona nani? [Tiká ye apesa eyano.] Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo elobeli makambo oyo ezali kosalisa biso tóyeba Masiya, moto oyo Nzambe aponi mpo na koyangela mabelé. Ezali mpe kolimbola makambo oyo boyangeli na ye ekokokisa mpo na bato.” Tángá Yisaya 9:6, 7.
Lamuká! Feb.
“Lelo oyo, bato basambelaka banzambe mingi. Kasi, talá oyo Yesu alobaki na libondeli moko oyo asalaki epai ya Tata na ye oyo azali na likoló. [Tángá Yoane 17:3.] Soki ezali kaka na Nzambe moko ya solo, okanisi nini mpo na banzambe mosusu nyonso? [Tiká ye apesa eyano.] Lisolo oyo epesi likanisi ya Biblia na likambo yango.” Lakisá ye lisolo oyo ezali na nkasa 28-29.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Mar.
“Bato mingi bandimaka ete tosengeli kolingana ndenge Yesu apesaki etinda na vɛrsɛ oyo. [Tángá Yoane 13:34, 35.] Kasi, epai wapi tokoki komona bato oyo basalelaka mateya ya Yesu na bomoi na bango? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo elobeli ndenge oyo tokoki koyeba baklisto ya solo lelo oyo.”
Lamuká! Mar.
“Bolingo ezali na ntina mingi mpo tózala na esengo mpe na bomoi ya malamu. Kasi, bato mingi bamonaka ete balingaka bango mpenza te. Okanisi ezali mpo na nini? [Tiká ye apesa eyano.] Mpo bato bálinga yo mpenza, sɛkɛlɛ ezali ete yo mpe osengeli komonisa mpenza ete olingaka basusu. Zulunalo oyo ezali kolobela likambo yango.” Tángá 1 Bakolinti 13:4-7.