Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛl 15 Feb.
“Bato mingi bamitungisaka mpo na makambo mabe oyo bato basalaka na nkombo ya mangomba. Bato mosusu bakanisaka ete mangomba nde ezali komemela bato mikakatano. Osí okanisá likambo yango? [Tiká ye apesa eyano. Nsima tángá Emoniseli 18:24.] Zulunalo oyo ezali komonisa oyo Biblia elobi mpo na likambo yango.”
Lamuká! 22 Feb.
“Bato mingi basepelaka koyekola makambo ya banyama, mpe basusu basepelaka kozala na nyama na ndako. [Tiká apesa likanisi na ye.] Zulunalo oyo ezali kolobela mikakatano mosusu oyo ebimaka soki ozali na nyama na ndako. Ezali mpe kolimbola elaka oyo Nzambe apesi ete mokolo mosusu banyama bakozala na kimya kati na bango mpe elongo na bato.” Tángá Yisaya 11:6-9.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛlii 1 Mar.
“Mokolo moko batunaki Yesu boye: ‘Komandema nini eleki bakomandema nyonso?’ Yoká eyano oyo apesaki. [Tángá Malako 12:29,30.] Osí omituná soki Yesu alingaki koloba nini? [Tiká ye apesa eyano.] Lisolo ‘Ndenge ya komonisa ete tolingaka Nzambe’ ezali kolimbola maloba yango.”
Lamuká! 8 Mar.
“Kala, bato mingi bazalaki kobanga ete etumba moko ya nikleere ekobima. Okanisi ete etumba ya nikleere ekoki kosalema lelo oyo? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo ezali kolobela ndenge likambo yango ekómi makasi na mikolo na biso, mpe ndenge yango ezali kotalela biso nyonso. Ezali mpe kolimbola elaka ya Biblia oyo elobi ete kobanga ekozala lisusu te na mokili.” Tángá Sefania 3:13.