Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/03 lok. 4
  • Zalá ndakisa na misala ya malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Zalá ndakisa na misala ya malamu
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Masolo mosusu
  • ‘Tólanda ntango nyonso oyo ezali malamu’
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • “Bózalaka na etamboli malamu na kati ya bikólo”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Zalá mosantu na etamboli na yo mobimba
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Kobá kozela Yehova
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2003
km 4/03 lok. 4

Zalá ndakisa na misala ya malamu

1. Mpo na nini tosengeli kotya likebi mingi na etamboli na biso ntango tozali na Liyangani ya etúká?

1 Ntango toyanganaka batatoli ebele na Mayangani ya etúká, nyonso oyo tosalaka mpe makambo tosalelaka bato mosusu emonanaka polele mpenza epai ya bato oyo bazali kotala biso. Yango wana, moko na moko kati na biso asengeli kotya likebi mingi na toli oyo ya Biblia: ‘Bózala bato ya makanisi malamu, na makambo nyonso bómimonisa ndakisa na misala ya malamu.’ (Tito 2:6, 7) Tósengeli kosala makasi koleka mpo na ‘kotya likebi, na kobanzabanza kaka na makambo na biso moko te, kasi na kobanzabanza mpe na makambo ya bamosusu.’ (Filp. 2:4) Tótalela mwa makambo oyo tokoki kosalela toli yango na Liyangani ya etúká “Pesá Nzambe nkembo” oyo ezali koya.

2. Na oyo etali bisika ya kolala, likambo nini tosengeli kobosana te?

2 Bisika ya kolala: Tokoki mpenza komonisa misala na biso ya malamu na likambo etali bisika ya kolala. Na ntango ya liyangani, na momeseno, bandeko ya elimo bayambaka bandeko oyo bazali na mposa ya esika ya kolala. Nzokande, ntango mosusu basusu bakendeke kofanda epai ya bandeko na bango ya mosuni mpo bákoka koyebisa bango nsango malamu mpe kobengisa bango na liyangani. Basengeli kozwa longonya mpo na yango. Ezala esika nini tokofanda, ezali na ntina mingi ete tózala na makanisi oyo ebongi mpe lisusu tómonisa mbuma ya elimo ya Nzambe. (Gal. 5:22, 23) Na makambo nyonso wana, tokolinga te kotya mikumba na biso nyonso na motó ya moto oyo ayambi biso. Liboso ya kokende na liyangani, tokomonisa ete tozali na boboto soki tobongisi libela nyonso oyo tokozala na yango mposa, na ndakisa biloko ya kolya mpe tike. Tokolinga mpe te kosalela na ndenge ya mabe boboto oyo bamoniseli biso na ndenge bayambi biso, mpe tokolinga mpe te koumela mikolo mingi nsima ya liyangani, soki ntina ezali te. Soki tosali bongo, tokomonisa ete tozali na limemya mpe tosepeli na boboto oyo bamoniseli biso.

3. Ndenge nini tokoki ‘kosala epai ya bato nyonso oyo ezali malamu’ ntango ndeko moko ayambi biso na ndako na ye?

3 Tóbosana te ete tozali bapaya, mpe yango ekosɛnga ete tókɔtaka na makambo na bango te mpe tósɛngaka ndingisa liboso ya kosalela biloko na bango. Ekozala malamu te kosalela biloko soki nkolo ndako apesi yo ndingisa te. Ntango tofandi wana, tokomonisa boboto na biso soki tozali kosala misala mosusu ya ndako, na ndakisa kosukola mpe kobongisa ndako. Ntango tolingi kozonga epai na biso, tokosala makasi mpo tótikela ndeko oyo ayambi biso mosala mingi te na ndenge tofandaki epai na ye. Na makambo ya ndenge wana, tosengeli kolanda etinda ya Yesu oyo ezali na Matai 7:12. Soki tolandi kosalela makambo nyonso wana, ‘tokosala epai ya bato nyonso oyo ezali malamu,’ mpe na ndenge yango tokopesa litatoli ya malamu mpenza epai ya bato mosusu.​—Gal. 6:10.

4, 5. Ndenge nini bana bakoki kopesa Yehova lokumu, mpe mokumba nini baboti bazali na yango?

4 Baboti mpe bana: Na mokili oyo bilenge mingi bazali na bizaleli mabe, bana na biso bakeseni mpenza, mpe yango epesaka Yehova mpe ebongiseli na ye lokumu. Kasi, na bantango mosusu, mikakatano ebimaki mpo bakɛngɛlaki bana malamu te. (Mas. 29:15) Baboti basengeli te kotika bana na bango básala oyo balingi na esika ya liyangani. Soki te, bana bakotambolatambola mpambampamba na ntango programɛ ezali koleka, bakolanda te, bakosala makɛlɛlɛ mpe bakolongola likebi ya baoyo bazali kolanda. Esengeli te kotika bango bákendaka twalɛti mpambampamba ntango masolo ezali kosalema. Soki esengeli, moboti moko nde akokende kokita mwana. Bana basengeli kozala esika moko na baboti na bango, mwana na mwana na Biblia na ye mpe na mwa kaye na ye mpo na kokoma bavɛrsɛ; yango ekosalisa bango báyoka, bayekola mpe bábanga Yehova.​—Det. 31:12.

5 Baboti mingi bamonaka ete liboso liyangani ebanda, ezali malamu kofanda na bana na bango mpe kozongela bizaleli oyo basengeli kozala na yango. (Ef. 6:4) Basalisaka bana na bango báyeba ete bolingo ya solosolo ya boklisto “emitambwisaka na ndenge ya nsɔni te” to “elukaka matomba na yango moko te.” (1 Kol. 13:5) Liyangani ya etúká ezali ntango oyo tobongisi mpo na koteyama na Yehova, mpe ezala bana to mikóló bakomonisa limemya na bango mpo na ebongiseli yango na etamboli na bango, ezala na esika ya liyangani to na bisika mosusu.​—Yis. 54:13.

6. Etamboli na biso ya malamu mpenza ekoki kosala nini epai ya bato mosusu?

6 Etamboli na biso ya malamu mpenza esalisaka bato bálongola makanisi ya mabe oyo bazalaka na yango mpo na biso, mpe ebendaka bato na losambo ya solo. (Mat. 5:16; 1 Pet. 2:12) Tiká ete bato nyonso oyo tokokutana na bango na liyangani na biso ya etúká bázwa litatoli ya malamu na etamboli na biso mpe na lolenge tozali kosalela basusu makambo. Na ndenge wana, ‘tokomimonisa ndakisa na misala ya malamu’ mpe tokopesa Yehova nkembo.​—Tito 2:7.

[Etanda na lokasa 4]

Pesá bato mosusu lokumu

▪ Zalá na motema molai mpe na limemya epai ya bandeko basi mpe mibali, mpe epai ya moto oyo ayambi yo

▪ Mpo na bolamu na yo mpe ya bayangani nyonso, landá malako oyo epesami na baoyo bazali kokamba liyangani

▪ Koluka te kosalela mabe boboto oyo ndeko amoniseli yo ndenge ayambi yo epai na ye

▪ Kɛngɛlá bana na yo malamu

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto