Zalá mosantu na etamboli na yo mobimba
1. Mpo na nini ezali na ntina ete tózala basantu na etamboli na biso mobimba?
1 Lokola tozali basaleli ya Yehova, Nzambe oyo azali mosantu, tosalaka makasi tózala basantu na etamboli na biso mobimba. (1 Pet. 1:15, 16) Elingi koloba ete tosalaka makasi tótosa mitinda ya Yehova na makambo nyonso ya bomoi na biso. Liyangani ya etúká ya mbula oyo ekopesa biso libaku ya malamu mpenza ya komitambwisa na ndenge oyo ezali komonisa ete tozali basantu.
2. Ndenge nini tokoki komonisa etamboli ya malamu na esika oyo tokolala?
2 Na bisika oyo tokolala: Ezala tokolala epai ya moklisto mosusu, epai ya ndeko na biso to na Ndako ya Bokonzi, tóbosana makambo oyo te: (1) Liboso ya kolamba, tuná naino nkolo ya ndako to bandeko oyo bazali na mokumba ya kotalela bisika ya kolala na Ndako ya Bokonzi, makambo oyo okoki kosala mpo likama ebima te. (Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya Desɛmbɛ 2003, lokasa 3.) (2) Kobebisa te biloko oyo bapesi yo osalela. Zaláká na bokatikati. (3) Bopɛto ezali ndeko ya ezaleli ya kobanga Nzambe. Mikolo nyonso, liboso ya kobima, bongisá esika na yo ya kolala mpe tiká yango pɛto. (4) Monisá mbuma ya elimo na makambo oyo ozali kosalela basusu, ezala moto oyo ayambi yo to bandeko mosusu oyo bakoki kotya yo ná bango esika moko.—Gal. 5:22, 23.
3. Ndenge nini etamboli ya bana na biso ekoki kokamwisa bato mosusu?
3 Baboti ná bana: Ebele ya bilenge na biso babongi kozwa longonya mpo na etamboli na bango ya malamu, oyo ezali kopesa lokumu na Yehova mpe na ebongiseli na ye awa na mabelé. Bato mosusu bakamwaki na komona bana na biso bafandi mpe bazali kolanda programɛ na likebi mpenza, bazali kozwa banɔti mpe kotánga na Biblia na bango bavɛrsɛ oyo balobi bazali kotánga. Nzokande, emonani ete bana mosusu balandaka mpenza liyangani na likebi te, mpamba te baboti na bango bakɛngɛlaka bango te. (Mas. 29:15) Esengeli kokɛngɛla bana malamu. Bana mosusu bakómaka na momeseno ya kokende twalɛti mpambampamba. Tata to mama to mpe yaya nde asengeli kokende kotika bango. Ekozala likambo ya mayele komema mai ya komɛla, yango ekosala ete bótɛlɛmaka mpambampamba te. Na bopemi, tosengeli kokeba ete bana na biso bákimakima mbangu te na basikalie noki te bákwea to bákweisa bato mosusu. Moto oyo azali matoi mangbongi atungisaka basusu mpe afingisaka nkombo ya Yehova. Etamboli na biso ya malamu ekumisaka Yehova mpe emonisaka polele motuya monene ya mateya ya Biblia.—Tito 2:7.
4. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na limemya mpo na basusu ntango tozali kolya?
4 Bilei: Lokola banda mwa bambula biloko ya kolya epesamaka lisusu na mayangani te, soki moto alingi, akoki komema biloko oyo akolya na midi. Balendisaki biso tómemaka biloko ya mindɔndɔ te kasi oyo ekopesa biso makasi na nzoto, na ndakisa: mampa, mbuma, nguba, mikate to gato. Ezali malamu te kolya biloko ya kilo, mpamba te ekopesa biso mpɔngi na ntango programɛ ya nsima ya midi ezali kosalema. Moto na moto asengeli komema mai na ye ya komɛla, tii to kafe. Tótya yango na milangi te mpo makama ezala te. Epekisami komema masanga ya makasi na liyangani. Soki moto na moto amemi biloko ya kolya ná mai mpo na libota na ye, ntina ya kosomba biloko epai ya bato oyo batandaka mwa bamesa na bango pembenipembeni ya esika ya liyangani ekozala te. Emonanaka mbala mingi ete baoyo basombaka biloko epai ya batɛki wana babwakaka nkasa na mabelé. Okomona bipai na bipai na esika mobimba ya liyangani bapapye, basashɛ, babushɔ ya milangi ya masanga ya sukali mpe bongo na bongo. Likambo yango esilisaka mpenza lokumu ya esika na biso ya liyangani oyo ekómaka mpenza esika na biso ya losambo na boumeli ya liyangani. Esengeli te kotika bato bátɛka na kati ya ya esika ya liyangani. Yehova azali Nzambe ya bosantu, basaleli na ye mpe basengeli kozala basantu.—1 Pet. 1:16.
5. Mpo na nini ezali malamu te kolamba ntango liyangani ezali kosalema?
5 Emonanaki mpe na mayangani mosusu ete bandeko mosusu bazalaki kolamba ntango liyangani ezali kosalema. Yango esengeli kosalema bongo te. Tosengeli kotya likebi mpenza mpe kotya makambo ya elimo na esika ya liboso. Tótambolatambolaka te mpo tólongola likebi ya bayangani mosusu te. Baoyo bakosalela bambambola basengeli liboso kotuna bandeko oyo bazali kotambwisa liyangani mpo bálakisa bango esika oyo bakoki kotya yango. Bibongiseli esengeli kozwama mpo makama ebima te.—Luka 10:38-42.
6. Wapi mwa makambo oyo tokoki kosala na esika ya liyangani mpo na komonisa etamboli na biso ya malamu?
6 Na liyangani: Etamboli na biso ya malamu esengeli komonana mingi mpenza na esika ya liyangani. Ezala na esika ya kotɛlɛmisa mituka to na esika ya liyangani, tolendisi bino bótosa malako oyo bandeko oyo bakoyamba bino bakopesa. (Ebe. 13:17) Mabota basengeli kofanda bango nyonso esika moko, na esika ya kotika bana mike mpe bilenge báfanda elongo na bilenge mosusu. Bósala ete batelefone na bino ya mabɔkɔ ebebisa likebi ya bayangani mosusu te.
7. Ndenge nini etamboli na biso na esika ya liyangani epesaka Nzambe nkembo?
7 Etamboli na biso ekesenisaka biso na bato mosusu ya mokili oyo mpe epesaka Nzambe nkembo. (1 Pet. 2:12) Na liyangani, makambo oyo biso Batatoli ya Yehova tokosala ekomonana na miso ya moto nyonso. Yango wana, zwá mokano ya kozala mosantu na etamboli na yo mobimba.
[Etanda na lokasa 5]
Monisá etamboli ya bosantu
◼ Tosá malako nyonso etali esika okolala
◼ Kɛngɛlá bana na yo malamu
◼ Zalá na limemya mpo na basusu