Ndenge ya kolakisa bazulunalo (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Mai
“Mokolo na mokolo tozali kozwa bansango ya mobulu. Okanisi ete makambo ya ndenge wana esalemaká mpe kala? [Tiká ye apesa eyano.] Talá oyo Biblia elobi. [Tángá Matai 24:37.] Mikolo ya Noa etondaki na mobulu, yango wana Nzambe abomaki bato nyonso, kasi atikaki kaka Noa na libota na ye. Zulunalo oyo ezali komonisa ndenge nini makambo yango etali biso lelo oyo.”
Lamuká! 22 Mai
“Na mikolo na biso, nyama-nkɛnkɛ oyo epesaka bato maladi ekómi mpenza likama mpo na biso. Oyebaka ete ezali na makambo oyo tokoki kosala mpo na komibatela? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo elobeli makambo yango mpe elaka ya Biblia oyo etali ntango oyo maladi ekozala lisusu te.” Mpo na kosukisa, tángá Yisaya 33:24.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Yuni
“Ntango bayokaka ete mangomba oyo esalisaka babola esalelaka mabe mbongo oyo bapesaka bango, bato mingi bamitunaka soki esengeli kopesaka mangomba yango mbongo. Nzokande, bato mingi bazali konyokwama. Mpo na yo, esengeli kosala nini? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima ntángá Baebele 13:16.] Zulunalo oyo ezali kolimbola lolenge ya makabo oyo esepelisaka Nzambe.”
Lamuká! 8 Yuni
“Lelo oyo, bato mingi bamonaka lisusu ntina ya bizaleli malamu mpe bonkonde te. Yo mpe omonaka bongo? [Tiká ye apesa eyano.] Mbala mosusu okokamwa na koyoka ete Biblia esakolaki likambo yango. [Tángá 2 Timote 3:1-5.] Lamuká! oyo elobeli ntina oyo bizaleli ya bato ezali kobongwana mpe makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya.”