Ndenge ya kolakisa bazulunalo (soki Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Yuni
“Bato mosusu bandimaka ete Yesu azalaki moto oyo alekaki bato nyonso banda mokili ebandá. Bato mosusu bamitunaka kutu soki mpenza azalaká. Okanisi ete lolenge oyo totalelaka ye ezali mpenza na ntina? [Tiká ye apesa eyano, nsima tángá Misala 4:12.] Likambo nini emonisi mpenza ete Yesu azalaki awa na mabelé? Zulunalo oyo ezali kopesa eyano na motuna yango.”
Lamuká! 22 Yuni
“Bato mingi bamitungisaka ndenge bamonaka bato bazali kobebisa mopɛpɛ, mai mpe bazamba. Okanisi ete likoki ezali ya kobatela bazamba minene ya mikili ya molungé? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo elobeli milende oyo bato bazali kosala lelo oyo mpo na kobatela bazamba ya minene. Ezali mpe kolobela elaka oyo kitoko ya Nzambe ndenge ekokokisama.” Tángá Yisaya 11:9.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Yuli
“Biso bato tozalaka mpenza na mposa makasi ya kolinga bato mpe ya koyeba ete balingaka biso. [Tángá maloba oyo ezali na nse ya motó ya lisolo na lokasa 4.] Kasi, omoni te ete lelo bato batyaka nde makambo mosusu na esika ya liboso? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo elimboli bolingo ya solo mpe emonisi ndenge ya kokolisa yango.” Tángá 1 Bakolinti 13:2.
Lamuká! 8 Yuli
Bato mingi bazali komitungisa mpo na misala ya mobulu ya bozoba oyo ezali se kokóma mingi. [Tángá ndakisa moko oyo eyebani na esika bofandi, mpe tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo elobeli mwa makambo oyo etindaka bato na kosala mobulu. Ezali mpe komonisa ndenge Nzambe akosilisa mabe mpe mobulu, mbala moko mpo na libela.” Tángá Nzembo 37:10, 11.