Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛl 15 Mai
“Okanisi ete mokolo mosusu bobola ekosila na mokili? [Tiká ye apesa eyano.] Talá elaka oyo Nzambe apesi. [Tángá Yisaya 65:21.] Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ezali kolobela ndenge elaka wana ya Nzambe ekokokisama.” Yokaná na ye mpo na kozongela ye mpo bótalela motuna: Ntango nini mbongwana oyo Nzambe alaki ekosalema?
Lamuká! 22 Mai
“Bato mingi bayebi ete ngalasisi esalisaka moto azala na nzoto kɔlɔngɔnɔ, atako bongo, mingi balobaka ete basalaka mpenza ngalasisi te. Ezali bongo te? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo ezali kolobela matomba ya kosalaka ngalasisi mbala na mbala mpe epesi mwa makanisi oyo ekoki kosalisa biso tósalaka ngalasisi atako lelo oyo moto nyonso azali na makambo mingi ya kosala.”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛlii 1 Yuni
“Atako bato mingi balobelaka kimya, bato balongi ata moke te kozala na bomoko na mokili mobimba. Okanisi ete kozala na kimya ezali kaka ndɔtɔ ya mpamba? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo ezali kobenda likebi na biso na guvɛrnɛma oyo ekotya bomoko na mokili mobimba.” Tángá Nzembo 72:7, 8, mpe yokaná na ye mpo na kozongela ye mpo bólobela ndenge likambo yango ekosalema.
Lamuká! 8 Yuni
“Omoni te ete bato mingi bazali kobanga ndenge ebele ya bato bazali kobɛla kanser ya mposo? [Tiká ye apesa eyano.] Lamuká! oyo ezali komonisa mpo na nini tokómi lelo oyo na likama monene ya kozwa kanser ya mposo mpe makambo oyo tokoki kosala mpo na komibatela.” Mpo na kosukisa, monisá ye elaka ya kolendisa oyo ezali na Yobo 33:25.