Ndenge ya kolakisa bazulunalo (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Ɔkɔt.
“Bikateli mingi oyo tozwaka ekoki kobebisa to kobongisa bomoi na biso. Nini ekoki kosalisa biso tózwaka bikateli ya malamu? [Tiká ye apesa eyano. Nsima, tángá Masese 3:6.] Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ezali kolobela mitinda mitano ya Biblia oyo ekoki kosalisa biso na kozwa bikateli ya malamu.”
Lamuká! 22 Ɔkɔt.
“Mikolo oyo bakómi kolobela mingi mikrobe oyo ezali koboya kokufa na bankisi ya monganga. Yo mpe oyokaki likambo yango? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo ezali kolobela bantina ya likambo yango mpe komonisa oyo tokoki kosala mpo na komibatela. Ezali mpe kolobela elaka oyo Biblia epesi ete moto moko te akobɛla lisusu awa na mokili.” Tángá Yisaya 33:24.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Nov.
“Esilá kokómela biso nyonso ete moto moko oyo totyelaki motema asala biso mabe. Omituná naino te motuna oyo: ‘Ezali na moto moko oyo nakoki mpenza kotyela motema?’ [Tiká ye apesa eyano. Nsima, tángá Masese 3:5.] Zulunalo oyo ezali kolimbola ntina oyo tokoki kotya motema na biso mobimba epai na Nzambe. Ezali mpe kolobela makambo oyo ekoki kosalisa biso tóyeba bato oyo babongi ete tótyela bango motema.”
Lamuká! 8 Nov.
“Makambo mingi na bomoi na biso esimbami na esansi, mazuti, mafuta ya motɛrɛ mpe biloko mosusu oyo eutaka na petrole. Omituná naino te soki bomoi elingaki kozala ndenge nini soki biloko yango ezalaki te? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo ezali komonisa ndenge oyo petrole ekómaki eloko moko ya ntina mingi na bomoi ya bato ya mikolo na biso. Ezali mpe kolimbola ntina oyo tosengeli kobanga te ete petrole ekosila mokolo mosusu.”