Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛl 15 Ɔkɔt.
“Bato mosusu bakanisaka ete soki bazali na mbongo mingi bakozala mpe na bomoi ya malamu. Okanisi ete ezali mpenza bongo? [Tiká ye apesa eyano.] Talá likambo oyo moto moko ya bomengo akomaki. [Tángá Mosakoli 5:10.] Zulunalo oyo ezali kolobela bomengo oyo eleki bomengo nyonso.”
Lamuká! 22 Ɔkɔt.
“Bato mingi bamonaka ezali na ntina koteya bana banda bazali naino mike. Okanisi ete yango ezali na ntina lelo oyo? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Masese 22:6.] Lamuká! oyo ezali kolobela makambo oyo baboti bakoki kosala mpo na kosalisa bana na bango bákola na bizaleli ya sembo mpe bázala na bomoi ya malamu ntango bakokóma mikóló.”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛlii 1 Nov.
“Bato mingi bandimaka te ete bakonzi ya mokili bakosilisa mikakatano oyo ezali kobima lelo oyo. Okanisi ete ezali na moto moko oyo akoki kokokisa makambo oyo esakolamaki na bavɛrsɛ oyo? [Tángá Nzembo 72:7, 12, 16. Na nsima tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo ezali kolobela mokonzi yango oyo asakolamaki mpe makambo oyo akosala.”
Lamuká! 8 Nov.
“Bana bazalaka na mposa bálakisa bango ndenge bakoki kosala mpo na mitungisi oyo bazali kokutana na yango lelo oyo, ezali bongo te? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Baefese 6:4.] Zulunalo oyo ezali komonisa soki disipilini elimboli nini. Ezali mpe kolobela ndenge baboti bakoki kolakisa bana na bango mpe kopesa bango disipilini kozanga konyokola bango.”