Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛl 15 Nov.
“Bato mingi bamitunaka ntina oyo mikakatano ya bato ezali kaka kobakisama, na esika ete esila. Mbala mosusu ntina na yango emonisami na vɛrsɛ oyo; osilá kokanisa yango? [Tángá Emoniseli 12:9. Na nsima, tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo elobeli makambo oyo Satana asalelaka mpo na kokosa bato mpe ndenge oyo tokoki kolonga mayele mabe na ye.”
Lamuká! 22 Nov.
“Atako biloko ezali ebele, oyo ekoki koleisa bato ya mokili mobimba, bato soki milio 800 balyaka malamu te. Yango ezali likambo ya nsɔmɔ mpenza, boye te? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo elobeli ndenge mokakatano ya koleisa bato oyo bafandaka na bingumba ezali se kokóma makasi. Elobeli mpe elaka oyo Biblia epesi ya mokili moko oyo nzala ekozala te.” Tángá Nzembo 72:16a.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛlii 1 Des.
“Ntango bato bayokaka liloba ‘Armagedona,’ mingi bakanisaka ete ezali kobomama ya nsɔmɔ, ya ebele ya bato. [Lakisá etanda ya lokasa 3.] Okokamwa soki bayebisi yo ete Armagedona ezali likambo malamu koleka makambo nyonso oyo ekoki kokómela biso? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo elimboli ntina oyo tolobi bongo.” Tángá 2 Petelo 3:13.
Lamuká! 8 Des.
“Nalingaki kosolola na yo na ntina etali ntango oyo moto nyonso akozala na esika ya kofanda ya malamu. Epesaka yo mawa te komona ete bato mingi bazali na esika ya kofanda te? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Yisaya 65:21, 22.] Zulunalo oyo elimboli makambo oyo esalaka ete bato bázanga bisika ya kofanda. Elimboli mpe ndenge oyo Nzambe akokokisa elaka oyo touti kotánga.”